Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Octobre nk. 3-5
  • Likama moko monene mpenza

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likama moko monene mpenza
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Banani bazali konyokwama na yango?
  • Eutaka mpenza na nini, mpe mikakatano nini ya minene ebimisaka?
    Lamuká!—2003
  • Bana bazali na mpasi
    Lamuká!—1993
  • Makambo mazali na kati
    Lamuká!—2003
  • Bilei na yo bizali mpenza ya malamu?
    Lamuká!—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—2003
g03 Octobre nk. 3-5

Likama moko monene mpenza

Erikaazali na sanza motoba. Kasi soki omoni ye, okokanisa azali na sanza moko to mibale. Akɔndi mpenza makasi, makolo na ye, libumu na ye mpe elongi na ye evimbi. Azali komonana ete asili makila, nsuki na ye eteli mpe ezali kolongwalongwa, nzoto na ye esali mwa bampota ya nzelanzela. Soki kaka basimbi ye moke aleli. Monganga asengeli mpenza kokeba ntango azali kofungola ye miso, mpamba te mposo ya miso na ye ekoki kozoka. Ekoki kozala ete mayele na ye ezali mpe kokola malamu te. Ezali mawa, mpamba te bana oyo bazali lokola Erik bazali ebele.

LAPOLO moko (La situation des enfants dans le monde) ya Ebongiseli ya ONU mpo na kosalisa bana (UNICEF) elobi boye: “Bana nyonso oyo bakufaka na mokili mobimba, koleka katikati na bango bakufaka na bamaladi oyo eutaka mpe na yango​—⁠banda maladi babengi peste noire esilá, maladi mosusu te oyo eutaka na mikrobe ebomá bato ebele ndenge yango ezali koboma. Nzokande, yango ezali maladi oyo eutaka na mikrobe te. Bamilio ya bato oyo bazali konyokwama na yango, ata soki bakufi te, bakómaka bato oyo balɛmbálɛmbá, babɛlaka mpambampamba mpe bazalaka mayele mingi te. Ezali kotya basi mingi mpe mabota mingi na likama, mpe nsukansuka ekoki kobebisa ata mboka mobimba.”

Nini bazali kolobela? Ezali nde kozanga kolya malamu, mingi mpenza kozanga kolya bilei oyo ezali na proteini mpe kalori (malnutrition protéino-calorique), oyo Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) ebengi yango “likama ya kotalela nokinoki oyo eyebani malamu te.” Likama yango ezali monene ndenge nini? OMS elobi ete “soki tozwi bana milio 10,4 oyo bakufaka mbula na mbula, bana milio soki 5,2 bakufaka mpe mpo na kozanga kolya malamu.”

Kozanga kolya malamu ebimisaka bamaladi ndenge na ndenge: kozanga kolya malamu bilei oyo ezangi eloko moko to biloko mingi oyo etongaka nzoto, lokola vitamini mpe minéraux; koya monene mingi mpe bamaladi mosusu oyo esilaka te, oyo moto akoki kozwa soki azali kolya malamu te. Kasi, OMS elobi ete kozanga kolya malamu bilei oyo ezali na proteini mpe kalori nde “motindo ya kozanga kolya malamu oyo ebomaka mingi koleka.” Etalelaka mingi mpenza bana oyo bakokisi naino mbula mitano te.

Kanisá mwa moke Erik, oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, mpe bamilio ya bana mosusu oyo balyaka malamu te. Tokoki kopesa bango foti te ndenge balyaka malamu te, bango moko mpe bakoki kosala eloko te mpo na komilongola na mpasi yango. Georgina Toussaint, monganga ya bana, ayebisaki na Lamuká! ete: “Baoyo basali eloko te mpe bakoki komilukela biloko ya kolya te, bango nde bazali komona mpasi mpe bazali kolya malamu te.”

Bato mosusu bakoki kokanisa ete mokakatano yango ekoki kosila te mpo biloko ya kolya ezali mingi te mpo na bato nyonso. Kasi, OMS emonisi ete “na mokili oyo tozali lelo, biloko ya kolya ezali beboo.” Biloko ya kolya ezali mingi, kutu koleka, mpo na bato nyonso na mabelé mobimba. Lisusu, kozanga kolya malamu ezali maladi oyo ezali mpasi te mpo na kokima yango mpe esɛngaka mbongo mingi te mpo na kosalisa yango. Omoni te ete soki mpenza ezali bongo, ntina bato bázanga kolya malamu esengeli kozala te?

Banani bazali konyokwama na yango?

Kozanga kolya malamu esuki kaka na bana mike te. Lapolo ya OMS ya sanza ya Yuli 2001 emonisi ete “kozanga kolya malamu ezali likambo oyo ezali komonana bisika nyonso, mpamba te bato pene na milio 800 (20% ya bato oyo bafandi na mikili ya bobola) bazali konyokwama na yango.” Yango elingi koloba ete moto 1 kati na bato 8 na mokili mobimba alyaka malamu te.

Atako ezali na Azia, mingi mpenza na bikólo ya sudi mpe ya ntei, nde bato ebele koleka balyaka malamu te, ezali na Afrika nde okokuta bikólo oyo atako bato bazali mingi te, kasi baoyo balyaka malamu te baleki mingi. Bikólo mosusu ya bobola ya Amerika ya sudi mpe ya bisanga ya Antilles nde elandi na molɔngɔ yango.

Bato oyo bafandi na mikili ya bozwi bakoki mpe kolya malamu te? Ɛɛ. Na kotalela lapolo moko (L’état de l’insécurité alimentaire dans le monde 2001), bato milio 11 oyo bafandi na mikili ya bozwi balyaka malamu te. Bato mosusu milio 27 oyo bafandi na mikili oyo babengi ya bozwi te, ya mpe te, mingi mpenza mikili ya Mpoto ya Ɛsti mpe mikili oyo kala ezalaki na Union Soviétique, balyaka mpe malamu te.

Mpo na nini kozanga kolya malamu ekómi likama monene boye? Ezali nde na likambo ya kosala mpo bato oyo lelo bazali kolya malamu te bákóma kolya malamu? Ekozala na mokolo mosusu oyo bato nyonso ya mabelé bakolya malamu? Masolo oyo elandi ekolobela mituna wana.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi ye nkombo mosusu.

[Etanda/Karte na lokas 4]

MIKILI OYO BATO BAZALI NA LIKAMA YA KOZANGA KOLYA MALAMU

LIKAMA EZALI MONENE

LIKAMA EZALI MINGI TE

LIKAMA EZALI MOKE MPENZA

LIKAMA EZALI TE TO MITANGO EZALI YA KOKOKA TE

[Elilingi na lokasa 3]

Bazali kozela biloko ya kolya na Soudan

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Fɔtɔ ya Eskinder Debebe, UN/DPI

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto