“Okozwa ntango ya kotánga mikanda wana nyonso?”
Na sanza ya Yuli 2001, mobali moko na engumba Khabarovsk, na ɛsti ya Russie, akutaki ba Lamuká! 34 na bibliotɛkɛ moko ya engumba yango. Asɛngaki akenda kotánga yango na ndako, mpe ntango mokolo ya kozongisa yango ekokaki na sanza ya Augusto, azongisaki yango te. Asɛngaki alanda kotánga yango tii na sanza ya Sɛtɛmbɛ. Asepelaki na bazulunalo yango mingi, yango wana akendaki kosɛnga yango lisusu na sanza ya Novɛmbɛ, asɛngaki mpe ba Lamuká! mosusu ya sika motoba.
Liboso, mobali yango azalaki kolinga mikanda ya makambo ya Nzambe te. Mpo na nini abandaki kotánga Lamuká! ? Akomaki boye: “Mpamba te masolo mingi ya zulunalo yango elobelaka makambo ya bomoi ya bato oyo ezali kosepelisa mpe etali moto nyonso.”
Abakisi boye: “Mbala mingi, zulunalo yango ezalaka na masolo kitoko oyo elobelaka bingumba mpe bikólo mosusu ya ntango na biso, bakisá mpe makambo etali mimeseno ya bato mosusu.” Asepelaki mpe na masolo oyo elobelaki bato oyo basalelaki bomoi na bango malamu, babatelaki bizaleli na bango ya elimo, mpe basalisaki basusu báyikela minyoko mpe makama mpiko. Alobi boye mpo na Lamuká!: “Nakoki mpenza koloba ete Lamuká! eleki bazulunalo nyonso oyo elobelaka makambo oyo ezali koleka lelo oyo na mokili; makambo ya siansi, ya jeografi, mpe mimeseno ndenge na ndenge ya bato na mokili mobimba!”
Mobali yango asɛngaki bátindela ye ba Lamuká! nyonso oyo ebimá na monɔkɔ ya Russe banda 1995. Asɛngaki mpe bátindela ye babuku mpe mwa babuku mosusu oyo Batatoli ya Yehova babimisá. Akomaki boye: “Ntango mosusu bokomituna, ‘Okozwa ntango ya kotánga mikanda wana nyonso?’ ” Ye moko apesi eyano ete azali na ntango mingi mpo na kotánga mikanda ya ntina, mpamba te alekisaka ntango mingi te na kotala televizyo to na kosalela Internet.
Lamuká! ezalaka na masolo mingi oyo elobelaka makambo ezali koleka na mokili mpe emonisaka ndenge ya kolonga mikakatano ya bomoi ya lelo. Mpo na nini te kosɛnga Batatoli ya Yehova báyaka kotikela yo ba Lamuká! nyonso ya sika sanza nyonso?
[Elilingi na lokasa 31]
Bana na bino bazalaka na mposa ya nini?
[Elilingi na lokasa 31]
Mpo na nini nazalaka lelo esengo lobi nkandankanda?
[Elilingi na lokasa 31]
Oyebaka nkombo ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 31]
Likama ya niklɛɛrɛ—Ezali mpenza solo?
[Elilingi na lokasa 31]
Elikya—Epai wapi okoki kozwa yango?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
Bɔmbi epanzani: U.S. Department of Energy photograph