Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/05 lok. 1
  • Ekolobela mingi Biblia!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekolobela mingi Biblia!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Epai ya batángi
    Lamuká!—2006
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!​—⁠Bazulunalo oyo eyebisaka solo na ntango na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Tósakola bansango malamu ya eloko eleki kitoko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tókabola bazulunalo oyo epesaka litatoli na ntina etali solo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 3/05 lok. 1

Ekolobela mingi Biblia!

1. Na ebandeli, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisamaki mpo na banani, mpe L’Âge d’Or mpo na banani?

1 Nimero ya liboso ya zulunalo L’Âge d’Or ebimaki na mokolo ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1919. Zulunalo yango ezalaki esaleli moko ya malamu mpenza mpo na mosala ya kosakola. Mpo na nini? Mpo bazalaki kobimisa yango mpenzampenza mpo na bato nyonso. Kasi ezalaki bongo te mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo, banda bambula mingi, etalelamaki mingimingi lokola zulunalo oyo ebimisamaka mpo na “etonga moke.” (Luka 12:32) Basakoli ya Bokonzi basepelaki mingi na zulunalo L’Âge d’Or oyo eutaki kobima mpe na boumeli ya bambula mingi bakabolaki yango mingi koleka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.

2. Lelo oyo babengaka L’Âge d’Or nini, mpe ntina na yango banda ebandá tii lelo ezali nini?

2 Zulunalo L’Âge d’Or ebimisamaki mpo na komonisa bato ete mikakatano ya mokili ekosila kaka na Boyangeli ya Mbula Nkoto ya Klisto, oyo ekokɔtisa bato na eleko moko ya malamu koleka. Na boumeli ya bambula oyo elandaki, mbongwana mingi esalemaki na L’Âge d’Or na kotalela bamposa oyo ezalaki na ntango wana. Na 1937, nkombo na yango ekómaki Consolation. Na 1946, ekómaki Lamuká!, nkombo oyo ezali tii lelo.

3. Lamuká! esalisi na kokokisa esakweli nini ya monene?

3 Banda ebandeli, zulunalo yango esali mosala monene na litatoli monene oyo epesami banda 1919. (Mat. 24:14) Atako bongo, lokola mikolo etikali ya kotánga na ntango na biso, emonani ete ezali likambo ya mayele kokɔtisa mbongwana mosusu na Lamuká!

4. (a) Eloko nini moto asengeli kosala soki alingi abombama na ‘mokolo ya nkanda ya Yehova’? (b) Na kotalela Emoniseli 14:​6, 7, ‘anzelu oyo azali kopumbwa na katikati ya likoló’ azali kosɛnga bato nyonso básala nini?

4 Bamilio ya bato basepelaka kotánga Lamuká! mpo elobelaka masolo ndenge na ndenge ya kitoko oyo ezali makambo ya Nzambe te. Ntembe ezali te ete bato mingi oyo bayanganaka na Ekaniseli mbula na mbula ezali baoyo batángaka Lamuká! Nzokande, mpo moto azala na elikya ya kobombama na ‘mokolo ya nkanda ya Yehova,’ asengeli kosuka kaka te na kotánga mikanda na biso.—Sef. 2:3; Emon. 14:6, 7.

5. (a) Kobanda na nimero ya Yanuali 2006, Lamuká! ekolobela mingi makambo nini? (b) Bato mingi bakoluka ntango mosusu koyeba nini, mpe yango ekokokisa esakweli nini?

5 Yango wana, kobanda na Yanuali 2006, Lamuká! ekobanda kolobela mingi Bokonzi ya Nzambe. Ekolendisa mpenzampenza batángi na yango bátalela Biblia mpo na koluka kosilisa mikakatano na bango mpe ekobimisa polele ndenge oyo Biblia ezali kolimbola makambo oyo ezali kobima lelo. Na ndenge yango, batángi bakokanga malamu ntina ya makambo oyo ezali kobima lelo mpe ntango mosusu yango ekotinda bango báluka koyeba makambo mingi etali Yehova.—Zek. 8:23.

6, 7. (a) Ndenge nini Lamuká! ekosalisa bato mingi básalela 1 Tes. 2:13? (b) Lamuká! ekobanda kobima mbala boni na sanza mpe mbongwana yango ekotalela minɔkɔ soki boni?

6 Lamuká! ekokoba kobimisa masolo oyo ekolobela makambo ndenge na ndenge. Kasi, ekolobela mingi mpenza Biblia. (1 Tes. 2:13) Lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaka masolo ya Biblia na mozindo mpe lokola Lamuká! ekobanda mpe kolobela mingi masolo ya Biblia, emonani ete ezali na ntina te kolanda kobimisa Lamuká! mbala mibale na sanza. Yango wana, kobanda na nimero ya Yanuali 2006, Lamuká! ekobanda kobima mbala moko na sanza. Yango ekolɛmbisa mingi mosala ya kobongisa, kobongola, mpe kotinda mikanda na biso.

7 Mbongwana yango ekotalela minɔkɔ mingi (40%) oyo Lamuká! ebimaka. Na minɔkɔ mingi, Lamuká! ebimaka kaka mbala moko na sanza to mbala moko nsima ya sanza misato. Kasi, mbongwana moko te esalemi mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.

8. Ndenge nini basakoli bakolakisa Lamuká! esika moko ná Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli?

8 Basakoli bakoki kolakisa Lamuká! ya sanza moko esika moko na nimero ya liboso to ya mibale ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sanza yango. Basakoli oyo bakolakisa Lamuká! bakosalela kaka nimero yango moko sanza mobimba, kozanga ete bábongola ndenge ya kolakisa yango na katikati ya sanza, ndenge ezali kosalema sikoyo.

9. Lamuká! ekokoba kosala mosala nini?

9 Banda nimero ya liboso ebimaki na 1919, zulunalo yango oyo ezalaki na nkombo L’Âge d’Or, Consolation, mpe sikoyo Lamuká! esali mosala monene mpenza na mosala ya kosakola. Tozali kobondela Yehova akoba kopambola kokabolama ya zulunalo yango na ebongiseli oyo ya sika mpe elanda kosalisa lisusu bato mingi ya “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” bátya elikya na bango kaka na Bokonzi ya Nzambe.​—⁠Emon.  7:⁠9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto