Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/10 nk. 15-19
  • Nasalelaki Nzambe atako nakutanaki na mikakatano

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasalelaki Nzambe atako nakutanaki na mikakatano
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nalendisami mpo na koyikela minyoko mpiko
  • Minyoko ezali se kobakisama
  • Mikakatano nsima ya etumba
  • Bamemi biso na Sibérie
  • Bakangi ngai mpe batye ngai na bolɔkɔ
  • Nazwi makasi ya koyikela mikakatano mpiko
  • Eleko moko ya mwa bonsɔmi
  • Nazongi na Moldavie
  • Nasali koleka mbula 40 na epekiseli ya bakoministe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Lobanzo na ngai ya liboso—Kotikala sembo
    Lamuká!—2001
  • Koyika mpiko na komekama ememaka mapamboli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Nayekolaki kotyela Nzambe motema
    Lamuká!—2006
Makambo mosusu
Lamuká!—2005
g05 8/10 nk. 15-19

Nasalelaki Nzambe atako nakutanaki na mikakatano

LISOLO YA IVAN MIKITKOV

Mokonzi moko ya basirete ya ekólo Union soviétique (KGB) akebisaki ngai ete: “Soki ofandi kaka awa na engumba na biso, okozonga lisusu na bolɔkɔ.” Nautaki kobima na bolɔkɔ nsima ya kolekisa mbula 12. Tata na ngai ná mama na ngai bazalaki kobɛla makasi mpe esengelaki nasalisa bango. Nasengelaki kosala nini?

NABOTAMAKI na 1928 na T̩aul, mwa mboka moke na ekólo Moldavie. Ntango nazalaki na mbula moko, tata na ngai Alexander, akendaki na mboka Ias̩i, na Roumanie. Kuna, akutanaki na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Ntango azongaki na T̩aul, ayebisaki biso bato ya libota na ye mpe bato ya kartye makambo oyo Bayekoli ya Biblia bateyaki ye. Eumelaki te, mwa etuluku ya Bayekoli ya Biblia esalemaki na T̩aul.

Lokola nazalaki mwana ya nsuka kati na bana minei​—nyonso ya mibali—​banda bomwana na ngai, nazalaki esika moko na bato ya elimo, oyo bapesaki ngai ndakisa malamu. Nsima ya mwa ntango, nayebaki mpenza ete kosalela Yehova ekobimisela ngai mikakatano mpe botɛmɛli. Nabosanaka te ndenge bapolisi bazalaki koya mbala na mbala na ndako na biso mpo na koyeba soki tobombi mikanda oyo elimbolaka Biblia. Atako bongo nazalaki kobanga te. Nayebaki na nzela ya boyekoli na biso ya Biblia ete Yesu Klisto, Mwana mpenza ya Nzambe, ná bayekoli na ye, banyokolaki bango. Na makita, bazalaki koyebisa biso ntango nyonso ete bayekoli ya Yesu basengeli koyeba ete bakonyokola bango.​—Yoane 15:20.

Nalendisami mpo na koyikela minyoko mpiko

Na 1934, ntango nazalaki na mbula motoba mpamba, batángelaki biso mokanda moko na lisangá ya T̩aul; mokanda yango eyebisaki biso ndenge Banazi bazalaki konyokola bandeko na biso baklisto na Allemagne. Balendisaki biso tóbondelaka mpo na bango. Atako nazalaki naino mwana moke mpenza, nabosanaka mokanda wana te.

Mbula minei na nsima, bosembo na ngai emekamaki mpo na mbala ya liboso. Na kelasi, ntango sango ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse azalaki kotángisa liteya ya makambo ya Nzambe, azalaki kotinda ngai mbala na mbala ete nalata ekulusu na nkingo. Mokolo moko, ntango naboyaki, asɛngaki bana-kelasi nyonso bálakisa bikulusu na bango mpo na komonisa ete bazali bandimi ya malamu. Na nsima, sango alakisaki ngai mosapi mpe alobaki ete: “Bolingi moto ya ndenge oyo azala na kelasi na bino? Moto nyonso oyo alingi ye te atombola mosapi.”

Lokola bana-kelasi bazalaki kobanga sango, bango nyonso batombolaki misapi. Alobaki na ngai ete: “Omoni, moto moko te alingi yo. Bimá na ndako oyo sikoyo.” Nsima ya mwa mikolo, mokambi ya eteyelo ayaki na ndako na biso. Ntango asololaki na baboti na ngai, atunaki ngai soki nalingi kozongela kelasi. Nandimaki. Alobaki na ngai ete: “Ngai nde nazali mokambi ya eteyelo, okokenda na kelasi mpe sango akobengana yo te.” Akokisaki maloba na ye, mpo ntango nyonso oyo ye azalaki mokambi ya eteyelo yango, sango asalaki ngai eloko moko te.

Minyoko ezali se kobakisama

Na 1940, etúká ya Bessarabie, epai tozalaki kofanda, ekómaki na mabɔkɔ ya Union soviétique. Na mwa 13 mpe mwa 14 Yuni 1941, bato nyonso ya politiki mpe bato nyonso oyo bayebanaki mingi, bamemaki bango na Sibérie. Batatoli ya Yehova bazalaki kati na bato yango te. Atako bongo, kobanda wana, tokómaki kosala makita mpe mosala ya kosakola na bokɛngi mingi.

Na nsuka ya sanza ya Yuni 1941, Allemagne, oyo ezalaki kotambwisama na Banazi, eyaki kobundisa Union soviétique etumba moko monene ya mbalakaka, nzokande na mwa mikolo oyo eleki bazalaki ngámbo moko mpo na kobundisa banguna. Mwa moke na nsima, basoda ya Roumanie babɔtɔlaki lisusu Bessarabie. Roumanie ekómaki lisusu koyangela biso.

Na bamboka ya penepene na biso, bakangaki Batatoli oyo baboyaki kokóma basoda na mampinga ya Roumanie, mpe bakatelaki mingi na bango etumbu ya mbula 20 ya misala makasi. Babengaki tata na biro ya bapolisi mpe babɛtaki ye makasi mpo azalaki Motatoli. Lisusu, bazwaki ngai na kelasi mpe bakɔtisaki ngai na makasi na misa na ndako-nzambe.

Na nsima, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebongwanaki. Na sanza ya Marsi 1944, Union soviétique ebɔtɔlaki mbala moko bamboka ya nɔrdi ya Bessarabie. Na sanza ya Augusto ebɔtɔlaki ekólo yango mobimba. Na ntango wana nazalaki na mbula soki 15.

Mwa moke na nsima, bakɔtisaki na makasi mibali nyonso ya mboka na biso oyo bazalaki nzoto kolɔngɔnɔ na mampinga ya Union soviétique. Kasi Batatoli baboyaki mpo balingaki kokɔta na makambo ya mokili te. Yango wana, bakatelaki bango etumbu ya mbula zomi ya bolɔkɔ. Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki na Mpoto na sanza ya Mai 1945, ntango Allemagne etikaki kobunda mpe emipesaki epai ya banguna. Nzokande, ebele ya Batatoli ya Moldavie batikalaki kaka na bolɔkɔ tii na 1949.

Mikakatano nsima ya etumba

Ntango etumba esilaki na 1945, Moldavie ekɔtaki na eleko moko oyo mbula ezalaki kobɛta ata moke te. Atako bongo, Union soviétique ekobaki kosɛnga basali-bilanga bápesaka ndambo monene ya milona na bango lokola mpako. Yango ebimisaki nzala makasi mpenza. Na 1947, namonaki komona bibembe ebele na babalabala ya T̩aul. Ndeko na ngai Yefim akufaki; mpe na boumeli ya bapɔsɔ, nzala elɛmbisaki ngai mingi mpe nazalaki kokoka ata koningana te. Na nsima nzala esilaki, mpe biso Batatoli oyo totikalaki na bomoi tokobaki mosala na biso ya kosakola. Ngai nazalaki kosakola na mboka na biso, mpe ndeko na ngai Vasile, oyo alekaki ngai na mbula nsambo, azalaki kosakola na bamboka ya penepene na biso.

Lokola Batatoli bakómaki kosakola mingi, bakonzi babandaki kokɛngɛla biso mingi. Lokola tozalaki kosakola mpe tozalaki koboya kokɔta na makambo ya politiki to kosala mosala ya soda, bakonzi ya Union soviétique babandaki kotinda bato na bango bákɔta na bandako na biso koluka mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo na kokanga biso. Na 1949, bamemaki Batatoli mosusu ya masangá oyo ezalaki pene na biso na Sibérie. Mbala oyo lisusu, biso baoyo totikalaki tobandaki kosakola na bokɛngi mpenza.

Na ntango wana, nabandaki kobɛla mpenza mpe mokemoke maladi yango ezalaki kokóma makasi koleka. Na nsima, minganga bayaki komona ete nazali kobɛla tuberculose ya mikuwa, mpe na 1950 batyaki ngai simá na lokolo ya mobali.

Bamemi biso na Sibérie

Na mwa 1 Aprili 1951, wana lokolo na ngai ezalaki naino na simá, bakangaki ngai ná libota na biso mobimba mpe Batatoli mosusu, bamemaki biso na Sibérie.a Lokola tozwaki ntango mingi te mpo na kolɛngɛla mobembo yango, tomemaki kaka mwa biloko moke ya kolya. Eumelaki te, biloko yango esilaki.

Nsukansuka, nsima ya mobembo ya pɔsɔ mibale na engbunduka, tokómaki na mboka Asino, na etúká ya Tomsk. Kuna bakitisaki biso na engbunduka lokola bakitisaka banyama. Atako malili ezalaki makasi, tosepelaki na mopɛpɛ ya mpiɔ. Na sanza ya Mai, ntango mai ya ebale oyo ezalaki mabanga ebandaki konyangwa, bamemaki biso na masuwa tii na Torba, na kilomɛtrɛ 100. Na mboka yango, kaa moko ya kokata banzete ezalaki na kati ya zamba ya Sibérie oyo babengaka taïga. Kuna nde tobandaki etumbu oyo bakatelaki biso ya kosala misala makasi​—oyo bayebisaki biso ete ekozala na nsuka te.

Misala ya kokata nzete na kaa ezalaki makasi, kasi ezalaki lokola na bolɔkɔ te, bazalaki kokɛngɛla biso ntango nyonso. Na butu, libota na biso mobimba tozalaki kolala na wagɔ. Na eleko ya molunge totongaki mwa bandako, oyo ndambo na yango mosusu ezalaki na kati ya mabelé, mpo na eleko ya mpiɔ.

Lokola nazalaki na simá na lokolo, batindaki ngai na misala ya zamba te, kasi bapesaki ngai mosala ya kosala nsɛtɛ. Mosala wana epesaki ngai ntango ya kosalaka na kobombana bakopi ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. Mikanda yango ezalaki kouta bankóto ya kilomɛtrɛ na wɛsti ya Mpoto mpe bazalaki kokɔtisela biso yango na ndenge ya kobombana.

Bakangi ngai mpe batye ngai na bolɔkɔ

Na 1953, balongolaki simá oyo batyaki ngai na lokolo. Kasi, na ntango wana, atako nazalaki kosala na ekɛngɛ, mosala na ngai ya elimo mpe ya kosala bakopi ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, eyaki koyebana na KGB. Mpo na yango, bayaki kokatela ngai etumbu ya mbula 12 na kaa ya bakangami elongo na Batatoli mosusu. Kasi, ntango bazalaki kosambisa biso, biso nyonso topesaki litatoli malamu mpo na Nzambe na biso, Yehova, mpe mikano na ye ya bolingo mpo na bato.

Na nsima, batindaki biso na bakaa ndenge na ndenge pene na Irkoutsk, na ntaka ya bankama ya kilomɛtrɛ na ɛsti. Bakaa wana esalemaki mpo ezala bisika ya kopesa bitumbu na bato oyo bazalaki komona bango ete bazali banguna ya ekólo Union soviétique. Kobanda na mwa 8 Aprili 1954 tii ebandeli ya 1960, batindaki ngai na bakaa wana 12 ya misala makasi. Nsima na yango, bamemaki ngai na Mordovie, na kilomɛtrɛ koleka 3 000 na wɛsti, na kaa ya bakangami oyo eleki monene, kaa oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 400 na sudi-ɛsti ya Moscou. Kuna nazwaki libaku ya kozala esika moko na Batatoli mosusu ya sembo oyo bautaki na bamboka mingi ya Union soviétique.

Bakonzi ya Union soviétique bayaki komona ete ntango bazalaki kotikela Batatoli nzela bázala esika moko na bato mosusu ya bolɔkɔ, bato mosusu kati na bato yango bazalaki kokóma Batatoli. Yango wana, na bolɔkɔ monene ya Mordovie, oyo ezalaki na bakaa mingi ya misala makasi oyo kobanda nsuka tii nsuka ezalaki kilomɛtrɛ 30 to koleka, bakabolaki biso Batatoli mpo tózala esika moko te na bato mosusu ya bolɔkɔ. Batyaki Batatoli koleka 400 na kaa oyo ngai nazalaki. Batyaki bandeko basi na kaa mosusu oyo ezalaki na ntaka ya bakilomɛtrɛ soko nkama.

Na kaa na biso, nazalaki kosala na molende elongo na bandeko mosusu mpo na kobongisa makita na biso ya boklisto mpe kosala bakopi ya mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo ezalaki kokɔta na kobombana na kaa. Emonani ete bakonzi ya kaa bayaki koyeba likambo yango. Mwa moke na nsima, na sanza ya Augusto 1961, bakatelaki ngai etumbu ya mbula moko na bolɔkɔ ya mabe na Vladimir, bolɔkɔ ya ntango ya ba Tsar, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soko 200 na nɔrdi-ɛsti ya Moscou. Francis Gary Powers motambwisi-mpɛpɔ mpe moto ya États-Unis, oyo bakweisaki mpɛpɔ na ye na masasi mpe bakangaki ye na mwa 1 Mai 1960 ntango ayaki konɔnga Russie, azalaki mpe na bolɔkɔ wana tii na sanza ya Febwali 1962.

Ntango nazalaki na bolɔkɔ na Vladimir, bazalaki kopesa ngai kaka mwa bilei moke mpo nakufa te. Nzala makasi esalaki ngai eloko te, mpamba te ntango nazalaki mwana, tolekisaki ntango moko ya nzala makasi, kasi eloko nakokaki te ezalaki malili makasi ya eleko ya malili ya mobu 1961/1962. Batiyo oyo molunge etambolaka ebukanaki mpe malili ekómaki makasi mpenza (na nse ya 0 oC) na mwa shambre na ngai. Monganga moko amonaki mpasi na ngai mpe asɛngaki bábimisa ngai wana mpe bátya ngai na shambre mosusu oyo ezalaki na mwa molunge tii bapɔsɔ wana ya malili makasi eleka.

Nazwi makasi ya koyikela mikakatano mpiko

Kolekisa basanza na bolɔkɔ ekoki kotinda moto akóma na makanisi ya mabe mpe alɛmba nzoto; yango nde bakonzi ya bolɔkɔ bakanisaki ete ekokómela ngai. Kasi, nazalaki kobondela ntango nyonso mpe elimo santu ya Yehova mpe mikapo oyo nayebaki na motó epesaki ngai makasi.

Mingi mpenza ntango nazalaki na bolɔkɔ na Vladimir, namimonaki lokola ntoma Paulo oyo alobaki ete ‘akamolamaki na ndenge nyonso, kasi afinamaki te tii na kozanga koningana; mpe asilaki mayele, kasi azangaki ata mwa nzela moke te ya kobimela.’ (2 Bakolinti 4:8-10) Nsima na mbula moko, nazongaki na bakaa ya Mordovie. Na bakaa yango, nasilisaki etumbu na ngai ya mbula 12 na mwa 8 Aprili 1966. Ntango babimisaki ngai na bolɔkɔ, bakómaki kobenga ngai “moto oyo abongwanaka te.” Mpo na ngai, yango ezalaki elembeteli oyo euti na bakonzi oyo emonisi ete natikalaki sembo epai ya Yehova.

Batunaka ngai mbala na mbala ndenge nini tozalaki kozwa mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe ndenge nini tozalaki kosala bakopi na yango na bakaa, mpamba te bapekisaki biso kosala yango. Mwasi moko ya Lettonie, oyo asalaki mbula minei na bolɔkɔ mpo na makambo ya politiki na kaa ya basi na Potma, alobaki ete ezali sekele oyo bato mingi te bayebi yango. Ntango abimaki na bolɔkɔ na 1966, akomaki boye: “Batatoli bazalaki kozwa mikanda mingi kasi toyebi te ndenge nini bazalaki kosala.” Asukisaki ete: “Ezalaki lokola nde baanzelu bazalaki kopumbwa na butu mpe kobwakela bango mikanda yango.” Ya solo, kaka na lisalisi ya Nzambe nde tozalaki kosala mosala na biso!

Eleko moko ya mwa bonsɔmi

Ntango nabimaki na bolɔkɔ, bandeko oyo bazalaki kotambwisa mosala ya kosakola basɛngaki ngai nakende na wɛsti ya Ukraine, pene ya Moldavie, kosalisa bandeko na biso ya Moldavie. Kasi, lokola nazalaká moto ya bolɔkɔ mpe bato ya KGB bazalaki kolandela ngai, nakokaki kosala mosala malamu te. Nsima ya mbula mibale, lokola nakómaki na likama ete bákanga ngai lisusu, nakendaki kofanda na Kazakhstan, moko na bikólo ya Union soviétique, kuna bakonzi bazalaki mpenza te kotuna bato mikanda. Na 1969, ntango baboti na ngai babɛlaki makasi, nazongaki na Ukraine mpo na kosalisa bango. Kuna, na engumba ya Artyomosk, na nɔrdi ya engumba monene ya Donetsk, mokonzi moko ya bato ya KGB alingaki kokanga ngai mpe kozongisa ngai lisusu na bolɔkɔ, ndenge nalobeli yango na ebandeli ya lisolo oyo.

Emonanaki ete mokonzi yango alingaki kaka kobangisa ngai mpamba. Azalaki mpenza na likambo ya kofunda ngai te mpo na kotya ngai na bolɔkɔ. Lokola nazalaki na mposa ya kokoba mosala na ngai ya kosakola, mpe nayebaki ete bato ya KGB bazalaki kolandela ngai bipai nyonso, nakobaki kosalisa baboti na ngai. Tata na ngai mpe mama na ngai batikalaki sembo epai ya Yehova tii liwa na bango. Tata akufaki na sanza ya Novɛmbɛ 1969, mpe mama na sanza ya Febwali 1976.

Ntango nazongaki na Ukraine, nazalaki na mbula 40. Ntango nazalaki kosalisa baboti na ngai kuna, tozalaki lisangá moko na elenge mwasi moko, nkombo na ye Maria. Maria azalaki na mbula mwambe mpamba ntango ye na baboti na ye, lokola mpe libota na biso, bamemaki bango longwa na Moldavie tii na Sibérie na ebandeli ya sanza ya Aprili 1951. Maria alobaki na ngai ete alingaka ndenge nayembaka. Wana ezalaki ebandeli ya boninga na biso, mpe atako biso nyonso mibale tozalaki na mingi ya kosala na mosala ya kosakola, tosalaki makasi ya kozwa ntango ya kokolisa boninga na biso. Na 1970, andimaki nabala ye.

Eumalaki te, tobotaki mwana na biso ya mwasi Lidia. Na nsima, na 1983, wana Lidia azalaki na mbula zomi, moto moko oyo azalaki liboso Motatoli atɛkaki ngai epai ya bato ya KGB. Na ntango wana, nakokisaki mbula soki zomi na mosala ya mokɛngɛli-motamboli na Ukraine ya ɛsti mobimba. Batɛmɛli ya mosala na biso ya kosakola bamemaki batemwe ya lokuta ntango tozalaki kosamba na tribinale, mpe bakatelaki ngai etumbu ya mbula mitano na bolɔkɔ.

Na bolɔkɔ, bakabolaki ngai na Batatoli mosusu. Atako nazalaki ngai moko na bambula wana, moto moko te to eloko moko te ekokaki kopekisa ngai kosolola na Yehova, oyo asalisaki ngai ntango nyonso. Kutu, nazwaki likoki ya kosakola epai ya bato mosusu ya bolɔkɔ. Nsukansuka, nsima ya kosilisa mbula minei ya etumbu na ngai, babimisaki ngai na bolɔkɔ mpe nakómaki lisusu kofanda esika moko na mwasi na mwana na ngai, oyo bango nyonso mibale batikalaki sembo epai ya Yehova.

Nazongi na Moldavie

Tolekisaki mbula moko na Ukraine mpe na nsima tozongaki libela na Moldavie, epai bazalaki na mposa ya bandeko oyo bakɔmeli mpe bayebi makambo mingi. Na ntango wana, bakonzi ya Union soviétique batikelaki bato nzela ya kokende epai nyonso balingi. Na 1988, tokómaki na Bălţi, epai Maria azalaki kofanda liboso bámema bango na Sibérie, eleki mbula 37. Na 1988, Batatoli bazalaki soki 375 na engumba yango oyo ezali engumba ya mibale na monene, na Moldavie; sikoyo ezali na Batatoli koleka 1 500! Atako tozalaki kofanda na Moldavie, nazalaki kaka mokɛngɛli-motamboli na Ukraine.

Na sanza ya Marsi 1991, ntango ebongiseli na biso endimamaki na mikanda ya Leta ya Union soviétique, ebele ya bato balɛmbaki nzoto mpo Kominisme ekokisaki bamposa na bango te. Mingi babulunganaki mpe bazalaki na elikya moko ya malonga te. Yango wana, ntango Moldavie ezwaki lipanda, kosakola epai ya bazalani na biso​—ata mpe baoyo bazalaki liboso konyokola biso—​ekómaki kobota mbuma mingi! Ntango bamemaki biso na 1951, kaka Batatoli moke nde batikalaki na Moldavie, kasi sikoyo ezali na Batatoli koleka 18 000 na mwa ekólo wana ya moke ya bato soki 4 200 000. Esengo oyo tokómaki na yango esilisaki bampasi nyonso oyo tomonaki liboso!

Na katikati ya bambula ya 1990, natikaki mosala ya mokɛngɛli-motamboli mpo nzoto ezalaki lisusu malamu te. Na bantango mosusu, mikakatano ya nzoto elɛmbisaka ngai. Kasi, nayaki komona ete Yehova ayebi nini tozali na yango mposa mpo na kolendisa biso. Alendisaka biso ntango oyo tozali mpenza na mposa na yango. Soki esengeli kozongela lisusu bomoi na ngai, mbɛlɛ nakopona nde bomoi ya ndenge mosusu? Te. Kutu, mbɛlɛ nakosakola nde na mpiko mpe na molende koleka.

Namiyokaka ete Yehova apamboli ngai mpe azali kopambola basaleli na ye nyonso ezala bazali na bomoi ya ndenge nini. Tozali mpenza na elikya ya solosolo, na kondima oyo ezali na bomoi, mpe tondimi mpenza ete etikali moke moto nyonso akozala na nzoto kolɔngɔnɔ mpenza na mokili ya sika oyo Yehova akosala.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na bawikende mibale ya ebandeli na sanza ya Aprili 1951, lokola bato ya Union soviétique bamibongisaki mpenza, bakangaki Batatoli ya Yehova koleka 7 000 elongo na mabota na bango oyo bazalaki kofanda na wɛsti ya Union soviétique, mpe bamemaki bango na engbunduka na ntaka ya bankóto ya bakilomɛtrɛ na ɛsti, na Sibérie.

[Elilingi na lokasa 17]

Ndako na biso ntango tozalaki na Torba epai bamemaki biso, na Sibérie, na 1953. Tata ná mama (na lobɔkɔ ya mwasi), mpe ndeko na ngai Vasile ná mwana na ye (na lobɔkɔ ya mobali)

[Elilingi na lokasa 17]

Na kaa ya bakangami, na 1955

[Elilingi na lokasa 19]

Bandeko basi na Sibérie, ntango Maria (na nse na lobɔkɔ ya mwasi) azalaki na mbula soki 20

[Elilingi na lokasa 19]

Ná mwana na biso Lidia

[Elilingi na lokasa 19]

Mokolo ya libala na biso, na 1970

[Elilingi na lokasa 19]

Ngai ná Maria lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto