Nasali koleka mbula 40 na epekiseli ya bakoministe
LISOLO YA MIKHAIL VASILEVICH SAVITSKII
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 1956 (ebimeli ya Lifalanse), eyebisaki ete na mokolo ya 1, ya 7, mpe ya 8 Aprili 1951, “mosala monene ya kokɔmbɔla” Batatoli ya Yehova esalemaki. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete “Batatoli ya Yehova na ekólo Russie bakobosana mikolo wana te. Na mikolo yango misato, Batatoli ya Yehova nyonso oyo bazalaki na wɛsti ya ekólo Ukraine, na Russie blanche [Bélarus], Bessarabie, Moldavie, Lettonie, Lituanie, mpe na Estonie—mibali na basi koleka nkóto nsambo . . . bakɔtisaki bango na makalo, bamemaki bango na bisika engbunduka etɛlɛmaka, bamatisaki bango na bingbunduka oyo ememaka bibwele mpe batindaki bango mosika.”
MOKOLO ya 8 Aprili 1951, bakangaki mwasi na ngai na mwana na ngai ya mobali ya nsanza mwambe, baboti na ngai, leki na ngai ya mobali, na Batatoli mosusu mingi na bandako na bango na engumba ya Ternopol mpe na bisika mosusu ya zingazinga, na ekólo Ukraine. Bakɔtisaki bango na bingbunduka oyo ememaka bibwele, bakendaki na bango mosika; basalaki soki pɔsɔ mibale na nzela. Bakendaki kokitisa bango na zamba oyo ezali na sudi ya Sibérie na wɛsti ya Libeke ya Baïkal.
Mpo na nini bakɔmbɔlaki mpe ngai te? Liboso ya koyebisa bino esika nazalaki na ntango wana mpe makambo oyo ekómelaki biso na nsima, bótika nayebisa bino naino ndenge nakómaki Motatoli ya Yehova.
Bateyi biso solo ya Biblia
Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1947, ntango yango nazalaki bobele na mbula 15, Batatoli ya Yehova mibale bayaki na ndako na biso, na mboka moke ya Slaviatin, kilomɛtɛlɛ soki 50 ekaboli mwa mboka yango na engumba Ternopol. Ntango ngai na mama tofandaki mpo na koyoka bilenge yango wana bazalaki koteya biso, nakangaki ntina ete lingomba yango ekeseni na mangomba mosusu; moko na bilenge yango nkombo na ye Maria. Na lolenge ya polele mpenza, bazalaki kolimbola bindimeli na bango mpe koyanola mituna oyo tozalaki kotuna mpo na Biblia.
Nazalaki kondima ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, kasi nazalaki kolinga lisusu lingomba te. Nkɔkɔ na ngai azalaki koloba ete: “Basango babangisaka bato na masolo na bango ya lifelo ya mɔ́tɔ, kasi basango bango moko babangaka eloko moko te. Mosala na bango se koyiba mpe kokosa babola.” Nazali lisusu kokanisa mobulu oyo ezalaki kosalema mpe ndenge bazalaki kotumba bandako ya bato ya ekólo Pologne oyo bazalaki kofanda na mboka na biso na ebandeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Esalaki ngai mpenza mpasi, mpamba te sango moko ya Katolike nde azalaki kotinda bato básala makambo yango. Na nsima, namonaki ebele ya bibembe mpe namitunaki mpo na nini bazalaki kosala makambo mabe motindo wana.
Lokola nazalaki koyekola Biblia na Batatoli, nabandaki kokanga ntina. Nayekolaki mateya ya ebandeli ya Biblia, na ndakisa, liteya oyo emonisi ete lifelo ya mɔ́tɔ ezalaka te mpe Satana asalelaka mangomba ya lokuta mpo na kolendisa bitumba mpe kosopa makila. Mbala mingi, na boumeli ya boyekoli na ngai moko, nazalaki kopema mwa moke mpe kosala libondeli ya mozindo mpo na kotɔnda Yehova ntango nakangi ntina ya likambo moko. Nabandaki koyebisa Stakh leki na ngai ya mobali mateya yango ya Biblia, mpe nasepelaki mingi ndenge andimaki yango.
Nazali kosalela makambo oyo nayekolaki
Namonaki ete esengeli nabongola bomoto na ngai. Mbala moko natikaki komɛla likaya. Namonaki lisusu ete esengeli nasanganaka pɔsɔ na pɔsɔ elongo na bandeko na makita mpo na boyekoli ya Biblia. Mpo na kosala bongo, nazalaki kotambola kilomɛtɛlɛ soki zomi na zamba mpo na kokóma na esika oyo makita ezalaki kosalema na nkuku. Na bantango mosusu bobele bandeko basi moke nde bazalaki koya na makita, mpe atako nazwaki naino batisimo te, basɛngaki ngai ete natambwisaka makita yango.
Ezalaki likama kozala na mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe soki bakangi yo na yango, bakokaki kokatela yo etumbu ya bolɔkɔ oyo ekoki kokóma kino mbula 25. Kasi, nazalaki na mposa ya kozala na mikanda na ngai moko. Moto moko oyo azalaki kofanda pene na biso ayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova, kasi mpo na kobanga, atikaki koyekola mpe akundaki mikanda oyo azalaki na yango na elanga na ye. Natɔndaki Yehova ntango moto yango akundolaki mikanda yango nyonso na bazulunalo mpe apesaki ngai yango! Nabombaki yango na bandako ya nzoi oyo tata asalaki, epai oyo bato bakokaki kozwa likanisi ya kokende koluka te.
Na Yuli 1949, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo mpo na komonisa elembo ya komipesa na ngai. Ezalaki mokolo oyo eleki esengo na bomoi na ngai. Lisukulu ya batisimo esalemaki na nkuku; ndeko oyo asalaki yango alobaki polele ete kozala moklisto ya solo ezali pɛtɛɛ te mpe komekama mingi ezali liboso na biso. Mosika te namonaki bosolo ya maloba na ye! Kasi, bomoi na ngai lokola Motatoli oyo azwi batisimo ebandaki na esengo. Sanza mibale nsima ya batisimo na ngai, nabalaki Maria, moko na Batatoli ya Yehova mibale oyo bateyaki ngai na mama mateya ya solo mpo na mbala ya liboso.
Mosika te komekama ya liboso ebandi
Mokolo ya 16 Aprili 1950, nautaki na mwa engumba moke ya Podgaitsi mpe nazalaki kozonga na ndako mpe mbala moko basoda batɛlɛmisaki ngai mpe bamonaki mwa mikanda mikolimbolaka Biblia oyo nazalaki komema na etuluku na biso ya boyekoli. Bakangaki ngai. Na mikolo ya ebandeli na bolɔkɔ, bazalaki kobɛta ngai fimbo mpe bazalaki kopesa ngai bilei te; baboyaki nalala mpɔngi. Lisusu batindaki ngai natya mabɔkɔ na motó mpe nabanda kogumba mabɔlɔngɔ mpe kotɛlɛma kino mbala monkama, nalɛmbaki mingi mpe nakokisaki yango te. Nsima na yango batyaki ngai na bolɔkɔ moko ya mpiɔ na nse ya mabelé na boumeli ya ngonga 24.
Bazalaki konyokola ngai mpo na kolɛmbisa ngai bongo nabimisa sɛkɛlɛ. Batunaki ngai, “Ozwaki mikanda yango wapi, mpe ozalaki kokende na yango epai ya nani?” Naboyaki kobimisa sɛkɛlɛ. Na nsima, batángelaki ngai mobeko oyo basengelaki kosambisa ngai na yango. Mobeko yango elobaki ete likambo ya kokabola to kozala na mikanda oyo ezali kotɛmɛla ekólo Union soviétique ezali komema na etumbu ya liwa to na bolɔkɔ ya mbula 25.
Batunaki ngai, “Olingi etumbu nini?”
Nalobaki, “Ata moko te, kasi natii elikya na ngai na Yehova, mpe na lisalisi na ye nakondima eloko nyonso oyo atiki nzela ete esalema.”
Likambo ya kokamwa, nsima ya mikolo nsambo batikaki ngai. Likambo yango esalisaki ngai na komona bosolo ya elaka ya Yehova oyo elobi ete: “Nakotika yo soko moke te, mpe [nakosundola, NW] yo mpe te.”—Baebele 13:5.
Ntango nazongaki na ndako, nabɛlaki makasi, kasi Tata amemaki ngai epai ya monganga, mpe mosika te nzoto ezongaki kolɔngɔnɔ. Atako tata akɔtaki te na lingomba oyo ndako mobimba tozalaki kosambela, azalaki kosalisa biso na losambo na biso.
Nakɔti bolɔkɔ mpe nakei kofanda na mboka mopaya
Nsima ya basanza babéngisaki ngai na mosala ya soda ya ekólo Union soviétique. Nalimbolaki ete mpo na lisosoli na ngai lokola moklisto nakoki kosala mosala ya soda te. (Yisaya 2:4) Atako bongo, na Febwali 1951, bakatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ ya mbula minei mpe batindaki ngai na bolɔkɔ na engumba Ternopol. Na nsima batindaki ngai na bolɔkɔ mosusu na engumba ya L’viv, mosika na kilomɛtɛlɛ 120. Kuna na bolɔkɔ, nayokaki ete bamemaki Batatoli mingi na Sibérie.
Na eleko ya molunge na 1951, batindaki mingi kati na biso koleka Sibérie, kino na Extrême-Orient. Tosalaki mobembo ya sanza mobimba, totambolaki kilomɛtɛlɛ soki 11 000 mpe tokatisaki bisika 11 oyo ekeseni na bangonga! Kaka mbala moko, nsima ya kolekisa pɔsɔ mibale na engbunduka, nde totɛlɛmaki na esika moko oyo bapesaki biso nzela tósukola. Ezalaki esika monene ya kosukola mpo na bato nyonso na engumba Novosibirsk, na Sibérie.
Kuna, na kati ya ebele ya bakangami, nayokaki moto moko koloba na mongongo makasi ete: “Nani awa azali na libota ya Yonadaba?” Liloba “Yonadaba” ezalaki kosalelama na eleko wana mpo na komonisa baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko na mabelé. (2 Mikonzi 10:15-17; Nzembo 37:11, 29) Mbala moko, bakangami mingi bamimonisaki ete bazali Batatoli. Topesanaki mbote ya esengo mingi!
Mosala ya elimo na kati ya bolɔkɔ
Ntango tozalaki naino na Novosibirsk toyokanaki mpo na nkombo moko oyo tokosalela mpo na koyebana moko na mosusu ntango tokokóma na esika tozalaki kokende. Batyaki biso nyonso na bolɔkɔ moko na Mai Monene ya Japon, mosika te na engumba Vladivostok. Kuna tosalaki ebongiseli ya makita mpo na koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. Kozala na bandeko wana oyo bakɔmeli, mpe mikóló oyo bazwaki etumbu ya mbula mingi ya bolɔkɔ elendisaki ngai na elimo. Mokomoko na bango azalaki kotambwisa makita na ngala na ye, bazalaki kotánga bavɛrsɛ ya Biblia mpe koyebisa makambo oyo bazalaki komikundola ndenge bayekolaká na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
Tozalaki kotuna mituna, mpe bandeko bazalaki koyanola. Mingi na biso tozalaki kokata bapapye na basaki ya sima mpo na kokoma biyano. Moto na moto azalaki kobomba bapapye ya biyano yango mpe kotya yango esika moko mpo na kosalela yango lokola bibliotɛkɛ na ye. Nsima ya sanza mibale, batindaki baoyo bazwaki etumbu ya mbula mingi na bakaa ya mosika na nɔrdi ya Sibérie. Tozalaki bilenge misato oyo batindaki biso na Nakhodka, kilomɛtɛlɛ soki 650 ekabolaki mboka yango na ekólo Japon. Nasalaki mbula mibale na bolɔkɔ kuna.
Na bantango mosusu tozalaki kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Yango ezalaki bilei na biso ya elimo na boumeli ya basanza mingi. Na mabaku mosusu, tozalaki mpe kozwa mikanda. Mokanda ya liboso nazwaki oyo eutaki na libota na ngai (wana bakómaki na mboka mopaya) elelisaki ngai. Bayebisaki ngai makambo, ndenge oyo elobamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo nalobeli na ebandeli ya lisolo oyo ete, bakɔtelaki Batatoli na bandako mpe bapesaki mabota na bango ngonga mibale mpamba mpo bálongwa na mboka.
Nakutani lisusu na libota na ngai
Na Desɛmbɛ 1952, nabimaki na bolɔkɔ nsima ya kosala mbula mibale na esika ete nasala mbula minei ndenge bakatelaki ngai. Nalandaki libota na ngai na mwa mboka moke ya Gadaley pene na engumba ya Tulun, na Sibérie, epai bakendaki na bango. Ya solo, ezalaki esengo kozala na bango lisusu esika moko—Ivan, mwana na ngai ya mobali apusanaki pene na mbula misato, mpe Anna mwana na ngai ya mwasi akómaki na mbula mibale. Nzokande, nazalaki mpenza na bonsomi nyonso te. Bakonzi ya engumba yango babɔtɔlaki passeport na ngai, mpe bazalaki kotalela ngai naino. Nakokaki kokende mosika koleka kilomɛtɛlɛ misato na ndako na biso te. Na nsima, bapesaki ngai nzela ya kotambola na mpunda kino na zando ya Tulun. Na bokɛngi nyonso, nazalaki kokutana na bandeko na ngai Batatoli.
Na eleko yango, tokómaki na bana mibale ya basi, Anna na Nadia, mpe bana mibale ya mibali, Ivan na Kolya. Na 1958, tobɔtaki mwana mosusu ya mobali, Volodya. Na nsima, na 1961, tobɔtaki mwana mosusu ya mwasi, Galia.
Mbala mingi bato ya KGB (polisi ya nkuku na ntango wana) bazalaki kokanga ngai mpe kotunatuna ngai mituna. Mposa na bango ezalaki kaka te ete nayebisa bango sɛkɛlɛ ya lisangá kasi lisusu ya komonisa ngai na miso ya bato lokola monɔ́ngi ete nazali kosala na bango elongo. Yango wana bazalaki komema ngai na restora ya kitoko mpe bazalaki koluka kokanga ngai bafɔtɔ ntango nazali kosɛka mpe kominanola elongo na bango. Kasi nayebaki mayele na bango, mpe nasalaki molende, ntango nyonso nazalaki kokanga elongi. Mbala nyonso oyo bazalaki kokanga ngai, nazalaki koyebisa bandeko makambo nyonso ndenge ezalaki koleka. Na yango, batyaki ntembe na bosembo na ngai te.
Tozali kokende na bakaa
Na boumeli ya bambula, Batatoli mingi batyamaki na bolɔkɔ na kati ya bakaa. Na bambula yango, tozalaki ntango nyonso kokutana na bandeko na biso oyo bakangamaki, tozalaki komemela bango mikanda oyo elimbolaka Biblia. Tozalaki kosala ndenge nini? Ntango bandeko mibali to basi bazalaki kobima na bolɔkɔ na kaa moko, tozalaki kotuna bango soki na nzela nini tokoki kokɔtisa mikanda na nkuku atako basoda bazalaki kokɛngɛla makasi. Na boumeli ya mbula soki zomi, tozalaki komemela bandeko na biso bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na babuku oyo tozalaki kozwa na nzela ya ekólo Pologne mpe na bikólo mosusu.
Bandeko na biso baklisto ya basi mingi bazalaki kolekisa bangonga mingi ya mosala makasi mpo na kokoma makambo ya mikanda oyo elimbolaka Biblia na makomi ya mikemike na boye ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mobimba ekokaki kobombama na kati ya eloko ya moke lokola pake ya alimɛti! Na 1991, ntango yango tozalaki lisusu na epekiseli te, tokómaki kozwa bazulunalo ya langi minei, ndeko moko ya mwasi alobaki ete: “Sikoyo bakobosana biso.” Azalaki na elonga te. Ata soki bato bakoki kobosana, Yehova akobosana ata moke te mosala ya bato ya sembo ndenge wana!—Baebele 6:10.
Tokei na engumba mosusu mpe tokutani na makambo ya nsɔmɔ
Na 1967, bakendaki kolukaluka na ndako ya leki na ngai ya mobali na engumba ya Irkutsk. Bakutaki filime na mikanda oyo elimbolaka Biblia. Bakangaki ye mpe bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ ya mbula misato. Kasi, na ndako na biso bazwaki eloko te. Atako bongo, bakonzi bayebaki ete biso mpe tozali na yango, yango wana ngai na libota na ngai tosengelaki kolongwa na engumba yango. Tokendaki na kilomɛtɛlɛ soki 5 000 na wɛsti kino na engumba Nevinnomyssk, na Caucase. Kuna tozalaki kopesa litatoli ya libaku malamu.
Likambo ya nsɔmɔ esalemaki na mokolo ya liboso ya bopemi ya banakelasi na 1969. Kolya, mwana na biso ya mobali ya mbula 12, azwaki likama ya kura ntango alingaki kozwa bale oyo ekangamaki pene na transformateur oyo ezalaki na kura ya makasi. Azikaki mpenza pene na nzoto mobimba (70 %). Na lopitalo, atalaki ngai mpe alobaki ete: “Tokokende lisusu na esanga?” (Azalaki koloba mpo na esanga oyo tomesanaki kokende.) Nalobaki, “Ɛɛ, Kolya, tokokende lisusu na esanga. Ntango Yesu Klisto akozongisa yo na bomoi, tokokende na esanga wana.” Atako azalaki lisusu koyeba makambo nyonso te, akobaki koyemba nzembo moko ya Bokonzi oyo azalaki kolinga mingi kobɛta na kelelo na ye na korale ya lisangá. Nsima ya mikolo misato akufaki, na elikya ete akosekwa.
Na mbula oyo elandaki, Ivan, mwana na biso ya mobali ya mbula 20, babéngaki ye na mosala ya soda. Ntango aboyaki kosala mosala ya soda, bakangaki ye mpe asalaki mbula misato na bolɔkɔ. Na 1971, babéngaki mpe ngai, balobaki na ngai ete soki naboyi mosala ya soda nakokɔta bolɔkɔ. Likambo na ngai eumelaki basanza mingi. Na ntango yango, mwasi na ngai abɛlaki kanser mpe esengelaki moto azala pene na ye mpo na kobatela ye. Mpo na yango batikaki ngai. Maria akufaki na 1972. Azalaki moninga na ngai ya sembo mpe azalaki sembo epai na Yehova kino na liwa na ye.
Libota na biso epalangani
Na 1973, nabalaki Nina. Na 1960, tata na ye abénganaki ye na ndako mpo akómaki Motatoli. Azalaki moko na kati ya bandeko basi ya molende oyo basalaki mosala makasi ya kokoma makambo ya bazulunalo mpo na kotindela bandeko oyo bakangamaki na bakaa. Bana na ngai mpe balingaki ye mingi.
Bakonzi bakómaki komitungisa mpo na mosala na biso na engumba Nevinnomyssk mpe balobaki na biso tólongwa na mboka yango. Na 1975, ngai, na mwasi na ngai, na bana na biso ya basi, tokendaki kofanda na ekólo Géorgie, na sudi ya Caucase. Bobele na eleko yango, bana na ngai ya mibali, Ivan na Volodya bakendaki kofanda na Djamboul na sudi ya ekólo Kazakhstan.
Na Géorgie mosala ya Batatoli ya Yehova ebandaki sika. Tozalaki kopesa litatoli ya libaku malamu na zingazinga ya engumba Gagra na engumba Sukhumi pembeni ya Mer Noire. Nsima ya mbula moko, bato ya sika zomi bazwaki batisimo na ebale moko na ngomba. Mosika te, bakonzi balobaki tólongwa kuna, mpe tokendaki na ɛsti ya Géorgie. Kuna tobakisaki milende ya koluka bato oyo bakokani na bampate, mpe Yehova apambolaki biso.
Tozalaki koyangana na bituluku ya mike. Lokota esalaki biso mwa kwɔkɔsɔ, mpamba te toyebaki koloba lokota ya Géorgien te, mpe bato mosusu ya Géorgie bayebaki koloba lokota ya Russe malamu te. Na ebandeli, tozalaki koyekola bobele na bato oyo bautaki na ekólo Russie. Kasi eumelaki te, tokómaki kosakola mpe koteya na lokota ya Géorgien, mpe sikoyo Géorgie ekómi na bankóto ya basakoli ya Bokonzi.
Na 1979, na bopusi ya KGB, patrɔ na ngai alobaki ete balingi ngai lisusu te na mboka yango. Ezalaki ntango yango nde Nadia, mwana na ngai ya mwasi na mwana na ye ya mwasi bakufaki na likama ya motuka. Na mbula oyo elekaki liboso, mama na ngai akufaki na engumba Nevinnomyssk. Azalaki sembo epai na Yehova kino liwa na ye. Tata na leki na ngai ya mobali batikalaki bango moko. Yango wana tozongaki kuna.
Tozwi mapamboli mpo tokangaki motema
Na Nevinnomyssk tolandaki kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia na nkuku. Mbala moko na katikati ya bambula ya 1980, ntango bakonzi babéngaki ngai mpe batunaki ngai mituna, nalobaki ete nalɔtaki ndɔtɔ ete nazali kobomba bazulunalo na biso. Basɛkaki. Ntango nazalaki kobima na biro, moko na bango alobaki na ngai ete: “Kolɔta lisusu ndɔtɔ ya kobomba mikanda na bino te.” Asukisaki boye: “Etikali moke okozongela kotanda mikanda na yo polele, mpe okobanda kokende na makita osimbi mwasi na yo na Biblia na yo na lobɔkɔ.”
Na 1989, toyokaki mawa ntango Anna, mwana na ngai ya mwasi akufaki na maladi babéngi anévrisme cérébral. Azalaki bobele na mbula 38. Se na mbula yango, na sanza ya Augusto, Batatoli ya engumba ya Nevinnomyssk bafutaki mbongo na kompanyi ya engbunduka mpo na kokende na liyangani ya mikili mingi na Varsovie, mboka-mokonzi ya ekólo Pologne. Toyanganaki bato 60 366, mingi bautaki na ekólo Union soviétique. Ya solo, tozalaki komona lokola ete tozali kolɔta ndɔtɔ! Pene na mbula mibale na nsima, na mokolo ya 27 Marsi 1991, nazwaki libaku ya kozala moko na bankulutu mitano oyo baumeli mingi na ekólo Union soviétique mpo na kotya sinyatili na mokanda moko ya ntina mingi na mboka-mokonzi Moscou, mokanda oyo endimisaki ete Lingomba ya Batatoli ya Yehova endimami na mibeko ya Leta ya ekolo Russie!
Nazali na esengo na ndenge bana na ngai oyo batikali bazali kosalela Yehova na bosembo. Mpe nazali kozela na mposa mingi mokili ya sika oyo Nzambe akosala, ntango nakomona lisusu Anna, Nadia na mwana na ye ya mwasi, mpe lisusu Kolya. Ntango akosekwa, nakokokisa elaka na ngai ya komema ye na esanga wana esika tozalaki kosepela mingi kokende elongo eleki sikoyo bambula mingi.
Kasi sikoyo, nazali na esengo ya komona ndenge solo ya Biblia ekoli nokinoki na ekólo oyo monene! Nazali mpenza na esengo na ndenge nasaleli bomoi na ngai, mpe natɔndaka Yehova ndenge andimaki ngai nakóma Motatoli na ye. Nandimi bosolo ya maloba ya Nzembo 34:8: “Meká mpe sosolá ete [Yehova] azali malamu; esengo ezali na moto oyo akoluka ekimelo epai na ye.”
[Elilingi na lokasa 25]
Na mbula oyo nalandaki libota na ngai na engumba Tulun
[Bililingi na lokasa 26]
Na likoló: Tata na ngai na bana na ngai na libándá ya ndako na biso na engumba Tulun, na Sibérie
Na likoló, na lobɔkɔ ya mobali: Nadia, mwana na ngai ya mwasi na mwana na ye ya mwasi, oyo bakufaki na likama ya motuka
Na lobɔkɔ ya mobali: Fɔtɔ ya libota mobimba na 1968