Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g01 Janvier nk. 9-13
  • Lobanzo na ngai ya liboso—Kotikala sembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lobanzo na ngai ya liboso—Kotikala sembo
  • Lamuká!—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tata asalaki nyonso mpo na koboya komikɔtisa na makambo ya politiki
  • Kosala na kobombana
  • Bakei na biso na Sibérie
  • Tozwi mapamboli na mosala na biso ya kosakola
  • Moto moko afundi biso
  • Tozongi na UKraine
  • Nasalelaki Nzambe atako nakutanaki na mikakatano
    Lamuká!—2005
  • Nasali koleka mbula 40 na epekiseli ya bakoministe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nayikaki mpiko lokola soda ya Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • ‘Makambo ya esengo ezali na lobɔkɔ na yo ya mobali mpo na seko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Lamuká!—2001
g01 Janvier nk. 9-13

Lobanzo na ngai ya liboso—Kotikala sembo

LISOLO YA ALEXEI DAVIDJUK

Tozalaki na mobu 1947; mwa mosika na mboka na biso Laskiv, na Ukraine, pene na ndelo ya Pologne. Stepan, moninga na ngai oyo azalaki mokóló na ngai, azalaki kokenda na Pologne mpo na kozwa mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe kokɔtisa yango na mayele na Ukraine. Mokolo moko na butu, soda oyo azalaki kokɛngɛla na ndelo ya mboka amonaki ye, alandaki ye, abɛtaki ye masasi mpe akufaki. Mbula zomi na mibale na nsima, liwa ya Stepan ebulunganisaki ngai mingi, ndenge nakolobela yango nsima.

NTANGO nabotamaki na Laskiv na 1932, na mboka na biso ezalaki na mabota oyo bazalaki Bayekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Baboti na ngai mpe bazalaki na kati na bango, bazalaki mpenza ndakisa malamu ya bosembo epai ya Yehova tii na liwa na bango na katikati ya bambula ya 1970. Na bomoi na ngai mobimba, kozala sembo epai ya Nzambe ekómaki lobanzo na ngai ya liboso.​—Nzembo 18:25.

Na 1939, mbula oyo Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, Union soviétique ebɔtɔlaki etúká oyo tozalaki kofanda na ɛsti ya Pologne mpe ekómaki na Union soviétique. Union soviétique eyangelaki biso tii na Yuni 1941 ntango basoda ya Allemagne bakɔtaki mpe bazwaki etúká yango.

Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kotɔkɔ, nakutanaki na mikakatano mingi na eteyelo. Bazalaki koteya bana koyemba nzembo ya kokumisa ekólo mpe mosala ya soda. Moko ya mateya oyo tozalaki kozwa ezalaki koyekola kobwaka bagrɛnadɛ. Kasi, ngai naboyaki koyemba nzembo ya kokumisa ekólo mpe koyekola mosala ya soda. Lokola na bomwana na ngai bateyaki ngai likambo ya kokangama makasi na mateya ya Biblia, yango esalisaki ngai natikala sembo epai ya Nzambe na boumeli ya bambula oyo elandaki.

Bato oyo bazalaki kosepela na solo ya Biblia bazalaki mingi na teritware ya lisangá na biso, yango wana batindaki babongisi​-nzela mibale​—ndenge babengaka basaleli ya ntango nyonso epai ya Batatoli ya Yehova​—na etúká na biso mpo na koteya bango. Ilja Fedorovitsch, moko ya babongisi-nzela yango, ateyaki ngai Biblia mpe alakisaki ngai ndenge ya kosala mosala ya kosakola. Na ntango basoda ya Allemagne bakɔtaki, bakangaki Ilja mpe batindaki ye na kaa ya bakangami ya Banazi, epai kuna akufaki.

Tata asalaki nyonso mpo na koboya komikɔtisa na makambo ya politiki

Na 1941, bakonzi ya Union soviétique bamekaki kotinda Tata na makasi mpo atya mabɔkɔ na mokanda moko oyo kati na yango alaki ete akopesa mbongo mpo na etumba. Ayebisaki bango ete akosunga babundi ya ngambo moko te mpe lokola azali mosaleli ya Nzambe ya solo, akomikɔtisa na makambo ya politiki te. Bamonaki Tata lokola monguna na bango mpe bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ mbula minei. Kasi asalaki kaka mikolo minei na bolɔkɔ. Mpo na nini? Mpamba te, na mokolo ya lomingo oyo elandaki mokolo oyo akɔtaki na bolɔkɔ, mapinga ya basoda ya Allemagne bazwaki etúká epai tozalaki kofanda.

Ntango bakɛngɛli ya bolɔkɔ bayokaki ete basoda ya Allemagne bakómi pene, bafungolaki bolɔkɔ mpe bakimaki. Na libanda, basoda ya Union soviétique babomaki bato ya bolɔkɔ mingi. Tata abimaki mbala moko te, kasi na nsima akendaki komibomba na ndako ya baninga mosusu. Ntango azalaki kuna, atindelaki Mama maloba ete amemela ye mokanda na ye oyo ezalaki komonisa ete bakɔtisaki ye na bolɔkɔ mpo aboyaki kosunga Union soviétique na etumba. Ntango Tata alakisaki bakonzi ya Allemagne mokanda yango, babomaki ye te.

Bakonzi ya Allemagne balingaki koyeba bankombo ya bato nyonso oyo basalaki elongo na bakonzi ya Union soviétique. Basɛngisaki Tata na makasi ete afunda bango, kasi aboyaki. Ayebisaki bango ete amikɔtisaka na makambo ya politiki te. Soki atángaki ata nkombo ya moto moko, mbɛlɛ babomaki moto yango. Lokola Tata aboyaki komikɔtisa na makambo ya politiki, yango ebikisaki bomoi ya bato mosusu, bato yango batɔndaki ye mingi.

Kosala na kobombana

Union soviétique ebɔtɔlaki lisusu Ukraine na Augusto 1944, mpe na Mai 1945, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki na Mpoto. Na nsima, bamboka ya Union soviétique ekabwanaki na bikólo mosusu na mibeko oyo babengi Rido ya bibende. Ata kokutana na Batatoli ya Yehova oyo bazalaki na ngámbo mosusu pembeni ya ndelo ya Pologne ezalaki mpasi. Batatoli ya mpiko bazalaki kokatisa na kobombana mpe kozonga na mwa banimero mosusu ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Lokola ndelo ezalaki kaka na ntaka ya kilomɛtɛlɛ mwambe na ndako na biso na Laskiv, nayokaki ndenge bato bazalaki kolobela makama oyo bato oyo bazalaki komema mikanda yango bakokaki kokutana na yango.

Na ndakisa, Silvester, Motatoli moko, akatisaki mbala mibale mpe azongaki malamu. Kasi na mbala ya misato, basoda oyo bazalaki kokɛngɛla na ndelo elongo na bambwa na bango bamonaki ye. Bagangaki mpe balobaki na ye atɛlɛma, kasi Silvester akimaki mbangu mpenza. Likoki kaka moko ya kokima bambwa wana ezalaki komibwaka na libeke (lac) moko oyo ezalaki pembeni wana. Alekisaki butu mobimba na kati ya mai, mai oyo ekomaki ye tii na kingo mpe kobombana na matiti ya milai. Nsukansuka, ntango basoda yango balɛmbaki koluka, Silvester akendaki na ndako kasi azalaki kotambola na kotɛngatɛnga mpo alɛmbaki mingi.

Lokola nalobelaki yango liboso, babomaki Stepan, mwana ya ndeko ya Silvester ntango azalaki koluka kokatisa. Atako bongo, ezalaki na ntina ete tókoba kokutana na basaleli ya Yehova. Na lisalisi ya milende ya bandeko oyo bazalaki kokenda koluka mikanda, tozalaki kozwa bilei ya elimo mpe litambwisi oyo ebongi.

Na mbula oyo elandaki, na 1948, nazwaki batisimo na butu na mwa libeke moko ya moke oyo ezalaki pene na ndako na biso. Bato oyo basengelaki kobatisama bakutanaki na ndako na biso, kasi nayebaki te soki bazalaki banani, mpamba te ezalaki molili mpe makambo nyonso ezalaki koleka na kobombana mpenza. Biso bato oyo tolingaki kozwa batisimo tozalaki kosolola kati na biso te. Nayebaki mpe moto oyo asalaki lisukulu ya batisimo te, ata mpe moto oyo atunaki ngai mituna mpo na kozwa batisimo ntango totɛlemaki pembeni ya libeke nayebaki ye te, ezala ata moto abatisaki ngai nayebaki ye te. Nsima ya bambula, ntango tozalaki kobɛta masolo ya makambo ya kala na moninga moko ya motema, toyaki koyeba ete biso nyonso mibale tozwaki batisimo na butu yango!

Na 1949, Batatoli ya Ukraine bazwaki mokanda moko oyo eutaki na Brooklyn, mokanda yango ezalaki kolendisa bango ete bátinda mokanda epai ya bakonzi ya Moscou mpo Leta andima mosala na bango ya kosakola na Union soviétique. Balandaki toli yango mpe batindaki mokanda epai ya ministre ya mbula​-matali (ministre de l’intérieur) mpo ekómela bakonzi oyo bazalaki na motó ya Leta (Présidium du Soviet Suprême ya U.R.S.S.). Na nsima, basɛngaki Mykola Pyatokha mpe Ilya Babijchuk bákenda na Moscou mpo na kozwa eyano ya guvɛnɛma. Bandimaki mpe bakendaki na Moscou na eleko ya molunge wana.

Mokonzi oyo ayambaki bango, alandaki bango malamu ntango bazalaki kolobela ntina oyo Biblia ezali kopesa mpo na mosala na biso ya kosakola. Balobaki ete mosala na biso ya kosakola ezali kosalema mpo na kokokisa esakweli ya Yesu oyo elobi ete “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso.” (Matai 24:14) Kasi, mokonzi yango alobaki ete Leta akopesa biso nzela ya kosala mosala yango soki moke te.

Batatoli yango bazongaki epai na bango mpe bakendaki na Kiev, mboka​-mokonzi ya Ukraine, mpo na kozwa mokanda oyo ekopesa biso nzela ya kosala mosala na biso ya kosakola awa na Ukraine. Kuna mpe bakonzi baboyaki kondima kopesa biso yango. Balobaki ete bakotungisa Batatoli ya Yehova lisusu te kaka soki bandimi kosunga Leta. Elingi koloba, Batatoli basengelaki kosala mosala ya soda mpe kopona bakonzi na voti. Bandeko bamonisaki lisusu ete tomikɔtisaka na makambo ya politiki te mpe, na ndakisa ya Nkolo na biso Yesu Klisto, tosengeli kozala bato ya mokili te.​—Yoane 17:14-16.

Eumelaki te, bakangaki ndeko Pyatokha mpe ndeko Babijchuk, basambisaki bango mpe bakatelaki bango etumbu ya bolɔkɔ ya mbula 25. Na ntango wana, na 1950, bakonzi bakangaki Batatoli mingi, bakisa mpe Tata na ngai. Bakatelaki Tata etumbu ya bolɔkɔ ya mbula 25 mpe batindaki ye na Khabarovsk, na ɛsti mpenza ya Union soviétique, na ntaka ya kilomɛtɛlɛ pene na 7 000!

Bakei na biso na Sibérie

Na Aprili 1951, Leta ya Union soviétique akangaki ebele ya Batatoli oyo bazalaki kofanda na barepibliki ya wɛsti oyo eyebani lelo lokola Lettonie, Estonie, Lituanie, Moldavie, Biélorussie, mpe Ukraine. Na boumeli ya basanza wana, bato soki 7 000, bakisa mpe ngai na Mama na ngai, batindaki biso na Sibérie. Basoda bayaki na butu na ndako na biso, bazwaki biso mpe bakendaki na biso na gare, esika bato bazelaka engbunduka. Kuna batyaki biso na kati ya bawago ya komema banyama​—bato soki 50 na wago moko​—mpe nsima ya mobembo soko ya pɔsɔ mibale bakitisaki biso na esika babengaka Zalari, pene na libeke Baïkal na etúká ya Irkoutsk.

Ntango totɛlɛmaki na nse ya mbula mpɛmbɛ na mopɛpɛ ya malili makasi mpe basoda bazingi biso, nazalaki komituna likambo nini ezali kozela biso. Ndenge nini nakokoka kotikala sembo epai ya Yehova awa? Tobandaki koyemba nzembo ya Bokonzi mpo na kobosana malili. Na nsima, bakonzi ya bakompanyi ya Leta ya mboka yango bayaki. Bamosusu bazalaki na mposa ya mibali mpo na kosala mosala ya makasi, nzokande bamosusu bazalaki koluka basi mpo na misala lokola kobɔkɔla bibwele. Bakendaki na ngai na Mama na esika oyo bazalaki kotonga barajɛ ya lotiliki na Tagninskaya.

Ntango tokómaki, tomonaki milɔngɔ ya bandako ya mabaya oyo batongá mpo na kofandisa bapaya. Bapesaki ngai mosala ya kotambwisa traktɛrɛ mpe misala mosusu etali lotiliki, mpe batindaki Mama na fɛrmɛ moko. Na mibeko ya Leta, bazalaki kotalela biso lokola bato oyo Leta atindi, kasi lokola bato ya bolɔkɔ te. Yango epesaki biso nzela ya kotambola zingazinga na esika bazalaki kotonga barajɛ ya lotiliki, atako bapekisaki biso kokenda na kaa mosusu oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 50. Bakonzi bazalaki kotinda biso na makasi ete tótya mabɔkɔ na mokanda moko oyo ezalaki komonisa ete tondimi kofanda na mboka wana libela. Lokola ngai nazalaki kaka na mbula 19, namonaki mpenza ete likambo yango eleki makasi mpo na ngai, na yango naboyaki kotya mabɔkɔ na mokanda yango. Atako bongo, totikalaki na etúká wana mbula 15.

Kuna na Sibérie, ndelo ya Pologne ezalaki lisusu na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 8 te kasi etikalaki kuna mosika na kilomɛtɛlɛ 6 000. Biso Batatoli tosalaki nyonso mpo na kobongisa lisusu masangá ete etambola malamu, mpe mibali bazalaki mpo na kotambwisa yango. Na ebandeli, tozalaki na mikanda oyo elimbolaka Biblia te, longola kaka mwa mikanda mosusu oyo Batatoli bautaki na yango na Ukraine. Tosalaki bakopi na yango na mabɔkɔ mpe tokabolaki yango kati na biso.

Eumelaki te, tobandaki kosala makita. Lokola bandeko mingi kati na biso bazalaki kofanda na bandako ya mabaya oyo ekangamá penepene, tozalaki koyangana esika moko pene na bampokwa nyonso. Lisangá na biso ezalaki na bato soko 50, mpe bapesaki ngai mokumba ya kotambwisa Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Lokola bandeko mibali bazalaki mingi te na lisangá na biso, bandeko basi bazalaki mpe kosala masolo ya bana-kelasi, ebongiseli oyo ekɔtaki na masangá ya Batatoli ya Yehova na bisika mosusu bobele na 1958. Bandeko nyonso bazalaki kobongisa mikumba na bango malamu mpenza, mpe bazalaki kotalela eteyelo yango lokola libaku ya kokumisa Yehova mpe ya kolendisa basusu kati na lisangá.

Tozwi mapamboli na mosala na biso ya kosakola

Lokola tozalaki kofanda esika moko na bato mosusu oyo bazalaki Batatoli te, tozalaki mpenza kolekisa mokolo mobimba te kozanga koyebisa bango makambo oyo etali kondima na biso, atako yango epekisamaki makasi. Nsima ya liwa ya Joseph Staline, mokonzi ya Union soviétique, na 1953, makambo ebongaki mwa moke. Bapesaki biso nzela ya koyebisa bato mosusu bindimeli na biso ya Biblia polele. Lokola tozalaki kotindelana mikanda na baninga na biso oyo bazalaki na Ukraine, bayebisaki biso ete Batatoli mosusu bazalaki na etúká oyo tofandaki, mpe na nsima tokutanaki na bango. Yango epesaki biso likoki ya kosala bazongazonga mpo masangá ezalaki mingi.

Na 1954, nabalaki Olga, ye mpe autaki na Ukraine. Na boumeli ya bambula oyo tolekisaki esika moko, asungaki ngai mingi na mosala ya Yehova. Stepan, oyo nalobaki ete babomaki ye na ndelo ya Ukraine na Pologne na 1947, azalaki ndeko ya Olga. Na nsima, ngai na Olga tobotaki mwana mwasi mpe topesaki ye nkombo Valentina.

Ngai na Olga tozwaki mapamboli mingi na mosala na biso ya boklisto na Sibérie. Na ndakisa, tokutanaki na George, ye azalaki mokambi ya etuluku moko ya Lingomba ya Baptiste. Tozalaki kokenda kotala ye mbala na mbala mpe koyekola na ye zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo tokokaki kozala na yango. Eumelaki te, George akómaki kokanga ntina ete makambo oyo basaleli ya Yehova bazali koteya ezali solo oyo euti na Biblia. Tobandaki mpe koyekola na baninga na ye mingi ya Lingomba ya Baptiste. Tozalaki na esengo mingi ntango George na baninga na ye mosusu bazwaki batisimo mpe bakómaki bandeko na biso ya elimo!

Na 1956, baponaki ngai mpo nazala mokɛngɛli ya zongazonga, mosala oyo ezalaki kosɛnga ngai kokendaka kotala lisangá moko pɔsɔ na pɔsɔ na etúká na biso. Nazalaki kosala mosala ya mosuni mokolo mobimba mpe na mpokwa nazalaki kokenda na tukutuku na ngai mpo na kokutana na bandeko na lisangá. Na ntɔngɔntɔngɔ na mokolo oyo elandi, nazalaki kozonga mpe kokenda mosala. Mykhailo Serdinsky oyo baponaki mpo asunga ngai na mosala ya zongazonga, akufaki na likama ya motuka na 1958. Akufaki mokolo moko boye ya misato, kasi tozelisaki kino mokolo ya lomingo mpo na kokunda ye mpo Batatoli mingi bákoka kozala na ntango ya kokunda ye.

Lokola tozalaki bato ebele oyo tokendaki na malita, bapolisi balandaki biso. Kosala lisukulu oyo ezali kolobela elikya na biso ya lisekwa oyo euti na Biblia, ezalaki mpenza komitya na likama ya kokangama. Kasi nazwaki makasi ya koloba mpo na Mykhailo mpe bilikya kitoko oyo ezali kozela ye na mikolo ezali koya. Atako nasalelaki Biblia, bapolisi bakangaki ngai te. Ntango mosusu bamonaki ete bakozwa eloko moko te soki bakangi ngai, mpe bayebaki ngai malamu, mpamba te mbala mingi bazalaki koyamba ngai lokola “mopaya” na biro na bango mpo na kotuna ngai mituna.

Moto moko afundi biso

Na 1959, bato ya sirɛtɛ bakangaki Batatoli 12 oyo bazalaki kotambwisa mosala ya kosakola. Babengaki bandeko mosusu mingi mpo na kotuna bango mituna, babengaki mpe ngai. Ntango ekómaki ngala na ngai, nakamwaki ntango nayokaki bakonzi bazali kolobela makambo ya nkuku oyo etali mosala na biso ya kosakola. Ndenge nini bakokaki koyeba makambo yango? Na ntembe te, moto moko afundaki biso, ekoki kozala ete moto yango ayebaki makambo na biso malamu mpe emonani ete azalaki kati na biso uta mwa ntango kasi Leta nde atindaki ye.

Bandeko 12 oyo bakangaki batyaki bango na bakasho oyo ezalaki moko pene na mosusu, mpe bayokanaki ete bakoloba eloko moko te epai ya bakonzi. Na ndenge wana, moto oyo afundaki bango asengelaki kobima ye moko na tribinale mpo na kopesa bilembeteli oyo ekokweisa bango. Atako nazalaki na likambo te, nakendaki na tribinale mpo na koyeba makambo oyo ekoleka kuna. Zuzi atunaki mituna mpe bandeko zomi na mibale oyo bafundamaki bayanolaki eloko moko te. Na nsima, Motatoli moko na nkombo Konstantyn Polishchuk oyo nayebaki ye banda bambula mingi, abandaki koloba mpo na kokweisa bandeko yango 12. Na nsuka ya kosambisa, bakatelaki Batatoli mosusu oyo bafundamaki etumbu ya bolɔkɔ. Na balabala, ntango tobimaki na tribinale, nalandaki Polishchuk.

Natunaki ye ete: “Mpo na nini ozali kofunda biso?”

Ayanolaki ete: “Mpo nazali lisusu kondima makambo yango te.”

Natunaki ye: “Makambo nini ozali kondima te?”

Azongisaki ete: “Nazali kondima lisusu Biblia te.”

Polishchuk akokaki mpe kofunda ngai, kasi ntango azalaki koloba na tribinale, atángaki nkombo na ngai te. Na yango, natunaki ye mpo na nini atángaki nkombo na ngai te.

Alobaki ete: “Nalingi te ete okɔta bolɔkɔ. Nazali kotungisama na makanisi mpo na Stepan, ndeko ya mwasi na yo. Ngai moto natindaki ye akatisa ndelo ya mboka na butu oyo babomaki ye. Nazali koyoka mawa mingi mpo na likambo yango.”

Maloba na ye ekamwisaki ngai mingi. Lisosoli na ye ebebaki mpenza! Azalaki komitungisa mpo na liwa ya Stepan, kasi azalaki sikawa kofundafunda basaleli ya Yehova. Namonaki lisusu Polishchuk te. Akufaki nsima ya mwa basanza. Mpo na ngai, komona moto oyo natyelaki motema na boumeli ya bambula mingi azali kofunda bandeko na biso, epesaki ngai mpasi mingi. Kasi likambo yango epesi ngai liteya moko ya ntina mpenza: Polishchuk azalaki lisusu sembo te mpo atikaki kotánga Biblia mpe kondimela yango.

Tosengeli kobosana liteya oyo te: Soki tolingi kotikala sembo epai ya Yehova, tosengeli koyekola Makomami Mosantu mbala na mbala. Biblia elobi ete: “Batelá motema na yo na mpiko nyonso mpo ete makambo na bomoi ikoutaka wana.” Lisusu, ntoma Paulo ayebisaki baklisto ete bákebaka. Mpo na nini? “Ete motema mabe mpe na kozanga kondima ezala kati na moko na bino te ete bótangwa na Nzambe na bomoi te.”​—Masese 4:23; Baebele 3:12.

Tozongi na UKraine

Ntango tokómaki na 1966, batikaki biso na Sibérie mpo tózonga na mboka na biso. Ngai na Olga tozongaki na Ukraine, na engumba Sokal, na ntaka ya bakilomɛtɛlɛ soko 80 na L’viv. Tozalaki na mosala mingi ya kosala, mpamba te Batatoli bazalaki kaka 34 na Sokal mpe na bingumba oyo ezalaki pembeni ya Cervonograd mpe Sosnivka. Lelo oyo, masangá 11 ezali na etúká yango!

Olga azalaki sembo kino ntango akufaki na 1993. Nsima ya mbula misato, nabalaki Lidiya, mpe banda wana azali kosunga ngai mingi. Lisusu, Valentina, mwana na ngai ya mwasi mpe libota na ye bazali kosalela Yehova na molende, bazali mpe kolendisa ngai mingi. Nzokande, likambo oyo ezali kopesa ngai esengo mingi koleka ezali ete natikali sembo epai ya Yehova, Nzambe oyo asalaka makambo na bosembo nyonso.​—2 Samwele 22:26.

Alexei Davidjuk akufaki sembo na mokolo ya 18 Febwali 2000, ntango lisolo oyo ezalaki kobongisama mpo ebima.

[Elilingi na lokasa 9]

Lisangá na biso oyo ezalaki koyangana na bandako ya mabaya na 1952 na ɛsti ya Sibérie

[Elilingi na lokasa 12]

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1953

[Elilingi na lokasa 12]

Molulu ya bokundi Mykhailo Serdinsky na 1958

[Elilingi na lokasa 13]

Ngai na mwasi na ngai Lidiya

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto