Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/4 nk. 4-7
  • Epai wapi okoki kozwa litambwisi libongi na kotyela motema?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Epai wapi okoki kozwa litambwisi libongi na kotyela motema?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Asalemaki mpo na kozwa litambwisi ya Nzambe
  • Biblia euti epai na Nzambe
  • Ntango nyonso litomba​—Mpasi soko moke te
  • Mikolo malamu mizali koya mpo na baoyo bazali kolanda litambwisi ya Nzambe
  • Lukáká litambwisi ya Nzambe na makambo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Nini ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Mpo na nini kotika Biblia etambwisa biso?
    Lamuká!—2006
  • Mabe ná malamu: Biblia nde ebongi kotambwisa biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/4 nk. 4-7

Epai wapi okoki kozwa litambwisi libongi na kotyela motema?

“NAYEBI malamu‚ Ɛ Yehova‚ ete nzela na moto auti na mabelé ezali kati na ye moko te. Epesameli nzela te na moto oyo azali kotambola ete atambwisa matambe na ye moko. Sembolá ngai‚ Ɛ Yehova.”​—Yilimia 10:23, 24, NW.

Yilimia, mokomi ya Biblia, akomaki maloba oyo esili koleka bikeke 25. Kobeba ya ezalela ya bato nsima na mibu nkóto mingi ya kosalelama ya litambwisi ya bato, ezali komonisa bosolo ya maloba wana. Kasi okoki kotuna ete: ‘Litambwisi ya solo likoki kozwama epai wapi?’

Mokapo oyo motángami awa na likoló mozali komonisa liziba ya litambwisi ya kotyela motema mpe ya nzela oyo eleki mpenza bato​—Yehova Nzambe, Mozalisi ya moto. Ya solo, ezali na moto moko te oyo ayebi malamu bamposa ya moto koleka Mozalisi na biso. Kasi, Nzambe azali solo na mposa ya kopesa biso litambwisi mpe batoli motindo yango? Lolenge nini azali kosala yango? Yango ebongi mpenza mpo na mikolo na biso?

Asalemaki mpo na kozwa litambwisi ya Nzambe

Eyebani malamu ete moko na bokeseni monene oyo ezali kati na moto mpe nyama ezali mpenza na lolenge, na makoki mpe na misala bɔɔngɔ́ ya moto ezali kosala. Epai na nyama, penepene na misala nyonso ya bɔɔngɔ́ misili kokanama liboso kati na oyo ebéngami ete loómbí (instinct). Yango ezali bongo te epai na bato.​—Masese 30:24-28.

Na kokesena na bɔɔngɔ́ ya nyama‚ eteni eleki monene ya bɔɔngɔ́ ya moto ezali te na misala oyo mikanama liboso. Nzambe asalaki bato na makoki ya kopona. Yango ezali kopesa nzela na kozwa bikateli ya mayele mpe komonisa bizaleli bitombwami, lokola bolingo‚ bokabi, kozanga moimi, boyengebene mpe bwanya.

Ezali likambo ya mayele na kokanisa ete Nzambe azalisaki moto na makoki ya bɔɔngɔ́ motindo oyo kozanga ete apesa ye lolenge moko ya litambwisi mpo na kosalela yango malamu? Nzambe apesaki bato ya liboso litambwisi ya polele. (Genese 2:15-17, 19; 3:8, 9) Ata nsima wana moto akweaki na lisumu, Yehova atikaki te kotambwisa mibali mpe basi ya sembo, mingi mpenza na nzela ya Liloba na ye mpenza lipemami, Biblia. (Nzembo 119:105) Yango epesaki bato makoki ya kolónga mikakatano na bango ya mokolo na mokolo wana bazali kosalela na bwanya nyonso makoki na bango ya kopona.

Biblia euti epai na Nzambe

Mpo na nini Biblia ezali liziba ya litambwisi ya solo? Ya liboso, ezali koyebisa makambo oyo makokaki kouta bobele epai na Mozalisi. Elobeli mpe makambo oyo masalemaki uta kala liboso ya ebandeli ya moto. Na ndakisa, ezali koyebisa motindo mabelé mabongisamaki mokemoke na biteni mingi kino makokaki mpo na kosimba bomoi ya moto. (Genese, mikapo 1‚ 2) Atako lisoló yango likomamaki kati na Biblia esili koleka mibu 3 000, yango eyokani na makanisi ya bato na siansi ya ntango na biso.

Ntango molai liboso ete bato bándima ete mabelé mazali libúngútulú, Biblia esilaki koyebisa ete: “[Nzambe] atandi nɔ́rdi likoló na esika mpamba, akakemisi mabelé likoló na eloko te.” (Yobo 26:7, NW) Lisusu, Biblia emonisi ete “ezali na Ye oyo afandi likoló na zolongano ya mabelé‚ oyo bafándi na yango bazali lokola mayoyo.” (Yisaya 40:22, NW) Bobele Nzambe, Mozalisi nde akokaki koyebisa bosikisiki ya makambo wana.

Makoki ya koyeba makambo makoya nsima mapesamaki na moto te. Na esika na yango, Mozalisi azali koyebisa makambo makobima nsima kati na Biblia. Nzambe apemisaki mosakoli Yisaya mpo na kokoma na ntina na Ye ete: “Ngai najali Njambe, mpe mosusu lokola ngai ajali tɛ, oyo akosakola makambo na nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango na kala makambo masalami naino tɛ.”​—Yisaya 46:9‚ 10.

Biblia esili komonisa ete yango ekoki kosakola nsuka longwa na ebandeli na bosikisiki ya kokamwa. Na ndakisa‚ esakolaki ebandeli, kokwea mpe mitindo ya banguya ya mokili mobimba oyo eyangelaki na boumeli ya bankóto ya bambula na lisoló ya bato. Bisakweli wana ya kokamwa bikomamaki bikeke mingi liboso ya kokokisama na yango, mosusu bankóto ya bambula na liboso. Na yango, Biblia ezali koyebisa na bosikisiki makambo ya ntango na biso mpe nsuka na yango. Biblia ekeseni mpenza mpo ete ezali komonisa mwango ya kobika na kobomama ya biyangeli bisalemi na bato bazangi kokoka, na Armagedon‚ “etumba na mokɔlɔ yango monɛnɛ na Njambe Mojui-na-Nguya-Yɔnsɔ.” Bokonzi ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ na Mwana na ye, Yesu Klisto, ekokokisa likambo wana monene.​—Emoniseli 16:14, 16; 17:9-18; Danyele,mikapo 2‚ 8.

Ntango nyonso litomba​—Mpasi soko moke te

Bwanya mpamba ya bato ezangi kokoka; na yango batoli ya moto epesaka ntango nyonso litomba te, atako yango epesami na makanisi malamu. Ezali bongo te mpo na batoli ya Biblia. Nzambe ye moko alobi ete: “Ngai [Yehova,] . . . ye oyo akolakisa yɔ mpɔ na litomba, ye oyo akokamba yɔ na njela ekoki na yɔ kotambola na yango. Sɔkɔ oyokaki malako na ngai! mbɛ kimia na yɔ ejalaki lokola ebale mpe boyɛngɛbɛnɛ na yɔ lokola mbɔngɛ na mai-na-monana.”​—Yisaya 48:17, 18.

Litambwisi ya Nzambe lizali kosalisa biso na komityela mikano mpe na kokangama na mitinda mitombwami ya bomoi. Wana bato ya ntango na biso bazali kotya likebi mingi likoló na mikano ya mosuni‚ Biblia ezali komonisa biso ntina ya “kotalaka tɛ na makambo mamɔnani; kasi na makambo majangi komɔnana. Jambi makambo mamɔnani majali bobɛlɛ na ntango oyo nde makambo mamɔnani tɛ makoumela seko.” (2 Bakɔlinti 4:18) Na yango, tolendisami na kozala na mikano kitoko kati na bomoi, elingi koloba mikano ya elimo, na boyokani na mokano ya Nzambe, mokano moleki monene oyo mozali bongo bomoi ya seko kati na ebongiseli ya sika ya sembo.

Na ntango oyo moklisto azali kosala milende mpo na kolanda mikano wana mitombwami, Biblia ezali kosalisa ye na kozala na lolenge ya bomoi oyo eleki malamu kati na ebongiseli mabe ya biloko oyo. Bwanya ya bato na ntango na biso ezali kolendisa makanisi ya kosala mingi te, kasi kolinga kozwa lifuti monene. Nzokande, Biblia eyebisi biso ete “ye oyo akosalaka na lobɔkɔ na gɔigɔi akokoma mobola, nde lobɔkɔ na etingia ekoyeisa litomba.” Ntoma Paulo akomaki epai na baklisto Baebele ete: “Tondimi ete tojali na lisɔsɔli ya mpɛtɔ; tojali na mposa kosalaka malamu na makambo yɔnsɔ.”​—Masese 10:4; Baebele 13:18.

Biblia ezali lisusu kopesa batoli ya mayele mpo na bomoi ya libota. Ezali komonisa sikisiki mokumba ya mobali mpe ya mwasi kati na libala, mpe lolenge malamu ya kobɔkɔla mpe koteya bana. Elobi ete: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola bango mɔkɔ. . . . mpe tika ete mwasi atosa mobali na ye. Bino bana, botosaka baboti na bino . . . Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda tɛ‚ kasi bobɔkɔla bango na mateyo mpe na mpamela na [Yehova,].” Kolanda batoli etombwami oyo euti na Mozalisi esalisaka mingi mpo na kozala na mabota ya makasi mpe ya esengo.​—Baefese 5:21 kino 6:4.

Mikolo malamu mizali koya mpo na baoyo bazali kolanda litambwisi ya Nzambe

Liloba likomami ya Nzambe limonisi mwango oyo Nzambe abongisi mpo na kosilisa mikakatano ya bato. Mosika te, Yehova Nzambe akolongola ebongiseli ya biloko na ntango oyo, elongo na mpasi na yango, na kozanga boyengebene mpe na konyokwama na yango‚ akokitanya yango na ebongiseli ya sika ya boyengebene. Biblia ezali kolobela yango na 2 Petelo 3:7-10, mpe elandisi na 2Pe 3 molɔngɔ́ 13 ete: “Nde tojali kotalela likolo na sika mpe nse na sika, pelamɔkɔ elakaki ye; boyɛngɛbɛnɛ ekofanda kati na yango.” Oyo ezali mpenza nsango malamu eleki kitoko oyo ekoki kopesama na libota ya bato. Yango ezali mpenza nsango oyo Biblia ezali kopesa, mpe oyo Batatoli ya Yehova bazali kosakola yango na mikili mpe na bisanga ya mai monene koleka 200.

Ntango mokano ya Nzambe ekosalema na mabelé mobimba, libota mobimba ya bato ekozwa matomba na kolandáká litambwisi lileki kitoko ya Mozalisi na bango‚ Yehova. Mikakatano ya bobólá, ya mobulu mpe ya bilangwiseli mikozala lisusu te. Bato bakotungisama lisusu te na bokɔnɔ, na konuna mpe na kufa. Libota na bato likotombwama na ezalela ya kokoka oyo baboti na biso ya yambo bazalaki na yango liboso ete batombokela litambwisi ya Nzambe.

Mokanda ya Emoniseli mozali mpenza komonisa na bosolo nyonso ezalela ya baoyo batye elikya na bango na litambwisi ya Nzambe! Emoniseli 21:4‚5 elobi ete: “[Njambe] akolongola mpisoli yɔnsɔ na miso na bango, mpe kufa ekojala lisusu tɛ, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe tɛ; mpɔ ete makambo na liboso masili koleka.” Mozalisi na biso andimisi biso, na kolobáká ete: “Nakojalisa bilɔkɔ yɔnsɔ bilɔkɔ na sika.” Alandisi ete: “Maloba oyo majali sembo, na sɔlɔ.”

Soki tolingi kozwa mapamboli yango‚ Nzambe azali bongo kozela nini epai na biso? Ntoma Paulo alimboli ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya lolenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timoté 2:4, NW) Batatoli ya Yehova bazali kobyanga yo na motema mobimba mpo na kozwa boyebi wana ya sikisiki ya solo na nzela na boyekoli ya mozindo ya Biblia. Na koyekoláká na molende nyonso na ntina na mokano ya Nzambe, yo mpe okoki komona ete bwanya ya Nzambe ezali litambwisi bobele moko oyo tokoki kotyela motema na mikolo oyo ya mpasi. Lokola ntango etikali lisusu mingi te, tóluka nokinoki mpenza kolanda litambwisi yango!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto