Esanga moko kitoko ya zɛlo
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA AUSTRALIE
NA 1770, Kapitɛni James Cook, moto moko ya Angleterre oyo azalaki kosala mibembo mpo na koyeba mokili, alekaki na masuwa na bokula ya ɛsti ya Australie. Ntango atambolaki kilomɛtrɛ mwa moke koleka 150 na nɔrdi ya esika oyo engumba Brisbane ezali lelo, alekaki pembeni ya esanga moko monene ya zɛlo, oyo nsima ya bambula, ekómaki esika oyo bato 300 000 bakendaka kotala yango mbula na mbula. Kasi, Cook atyaki mpenza likebi te na esanga yango. Kutu, ye mpe bato na ye bakanisaki ezalaki libongo mpamba, kasi esanga te. Mwa bambula na nsima, Matthew Flinders, oyo mpe azalaki kosala mibembo mpo na koyeba mokili, asɛmaki na esanga yango. Akomaki boye: “Ezali kaka libongo ya zɛlo na zɛlo!”
Soki Cook ná Flinders bapusanaka mwa bakilomɛtrɛ nsima ya libongo mpe bangomba wana ya motane ya zɛlo, mbɛlɛ balongolaki likanisi oyo bazalaki na yango. Balingaki kokuta mpenza zamba monene, ná balaki ya mai ya mpɛmbɛ lokola talatala, mpe mabwaku kitoko ya zɛlo ya langilangi, ná bankama ya mitindo ya banyama. Esanga Fraser, ndenge babengaka yango lelo, ezali esanga ya zɛlo oyo eleki monene na mokili mobimba, oyo ekeseni mpenza na bisanga mosusu, yango wana na 1992, batyaki yango na molɔngɔ ya biloko oyo batalelaka ete ezali ya mokili mobimba.a
Ebandaki na bangomba
Esanga ya Fraser ezali molai kilomɛtrɛ 120, monene kilomɛtrɛ 25. Ezali na etando ya hektarɛ 160 000. Bangomba na yango ya zɛlo oyo ezali milai pene na mɛtrɛ 240 banda na nivo ya mbu esali ete esanga yango ezala esanga ya zɛlo oyo eleki molai na mokili mobimba. Nini esalaki esanga wana ya zɛlo, oyo ekeseni mpenza na bisanga mosusu?
Emonani ete batɔni na batɔni ya zɛlo oyo esalá esanga yango eutá na bangomba oyo etandani na bokula nyonso ya mbu na ɛsti ya Australie. Nsima ya ntango molai, bambula minene ezalaki kobuka mabanga ya bangomba yango, mpe komema yango na bibale, mpe bibale ezalaki komema yango na mbu. Mbonge makasi ya mbu ekómisaki yango zɛlo, mpe mokemoke ememaki yango na nse ya mai na nɔrdi ya mbu. Lokola bangomba ya zɛlo mpe mabanga minene na nse ya mbu ezalaki kokanga nzela mpo zɛlo yango eleka te, ekendaki kotondana esika moko mpe esalaki esanga Fraser.
Kobanda wana, Mbu ya Pasifike etikaka te kobimisa zɛlo na pembenipembeni na yango. Kuna, mopɛpɛ ememaka zɛlo yango na mokili, esika ekendaka kosala bangomba ya zɛlo. Bangomba yango, oyo emataka mɛtrɛ moko mbula nyonso, ekundaka biloko nyonso oyo ezalaki na esika yango.
Balaki mpe bazamba ya ndenge mosusu
Likambo ya kokamwa, esanga yango ezali na balaki 40, oyo ezali likoló ya bangomba wana ya zɛlo. Balaki yango mosusu babengaka yango balaki ya likoló ya ngomba, mpamba te ezalaka mpenza na nsɔngɛ ya bangomba yango ya zɛlo. Nini epekisaka mai ya balaki yango esopana? Ezali pɔtɔpɔtɔ moko ya mwa makasi, oyo esalemi na nkasa, mposo mpe bitape ya nzete oyo epɔlá.
Esanga yango ezali mpe na balaki ya maninisa, oyo ezali na bisika ya mabulu ya mozindo, bisika mabanga ebimisaka mai. Mai ekɔtaka na mabulu yango mpe esalaka balaki ya mai ya pɛto mpe ya kitoko, oyo ezali lokola maninisa oyo emonisaka mabanga oyo ebimisaka mai.
Na mbula moko, balaki wana nyonso ezwaka mai ya mbula mingi (santimɛtrɛ 150). Mai oyo etikalaka na balaki te to oyo ekɔtaka na kati ya zɛlo, esalaka bibale oyo ekendaka kosopana na mbu. Balobaka ete moko ya bibale yango esopaka litrɛ koleka milio mitano ya mai na ngonga moko na Mbu ya Pasifike.
Lokola Esanga Fraser ezali na mai mingi, ezali mpe na zamba ya kitoko. Mbala mingi, zamba ekolaka na esika ya zɛlo te, mpo ezali na vitamini te. Kasi esanga Fraser ezali moko ya bisika oyo ezali mingi te na mabelé, oyo zamba ekolá na mabelé ya zɛlozɛlo. Kutu, na eleko moko, zamba yango ezalaki mpenza monene, yango wana mbula koleka 100, bato bakataki banzete yango mingi. Bato oyo bakataka banzete bazalaki kosepela mingi na nzete babengi kauri mpe mitindo mosusu ya nzete babengi eucalyptus. Na 1929, moko na bato yango alobaki boye: “Moto oyo akɔti na zamba yango akokuta banzete minene oyo ekoki kokóma mɛtrɛ 45 . . . Bibakata ya banzete wana ya zamba ekómaka minene mɛtrɛ mibale to misato.” Mitindo mosusu, na ndakisa nzete babengi satinay mpe pistachier térébinthe, basalelaki yango ntango basalaki Canal de Suez. Nzokande lelo oyo, banzete ya esanga Fraser ekóma konuna kozanga ete moto akata yango.
Makambo ya mawa oyo esalemá na Paladiso yango
Nkombo ya esanga yango eutá na likambo moko ya mawa. Na 1836, Kapitɛni James Fraser ná mwasi na ye Eliza, babikaki ntango masuwa na bango Stirling Castle ezindaki, mpe babimaki na esanga yango. Ekoki kozala ete bato ya ekólo moko ya esanga yango babomaki kapitɛni, kasi Eliza, bayaki kobikisa ye. Mpo na kobosana te likambo wana ya mawa, nkombo ya esanga yango oyo elongwaki Esanga Monene ya Zɛlo, ekómaki Esanga Fraser.
Likambo mosusu ya mawa ekwelaki mpe bato ya esanga yango. Na eleko moko, bato koleka 2 000 bazalaki kofanda na Esanga Fraser. Balobaka ete bazalaki bingambe mpe makasi. Bazalaki kobenga esanga na bango K’gari, to Paladiso. Lisapo moko ya bato ya mboka yango, oyo eyebisaka ndenge esanga yango ebandaki, elobaka ete ezali esika oyo eleki kitoko na mokili mobimba. Likambo ya mawa, bamaladi ya Mpoto ebomaki bato mingi ya esanga yango. Longola yango, na ebandeli ya ekeke ya 20, balongolaki mwa ndambo ya bato oyo batikalaki na esanga yango, mpe bamemaki bango na mboka.
Esika kitoko mpo na banyama
Lelo oyo, esanga yango etikalá mboka ya banyama. Kati na banyama na yango oyo eyebani mingi, tokoki kotánga dingo—mbwa ya zamba ya Australie. Lokola ba dingo ya Esanga ya Fraser bazalaka esika moko te na bambwa ya mboka, batalelaka bango lokola bambwa ya makila moko, na ɛsti ya Australie. Soki omoni bango, okokanisa ete bazali bambwa ya mboka, kasi bazali bambwa ya zamba, yango wana esengeli kokeba na bango mpe kosakana na bango te.
Bamonaki mpe mitindo ya ndɛkɛ koleka 300 na esanga yango. Na ntango engondo ya libumu mpɛmbɛ mpe engondo ya motó mpɛmbɛ elekalekaka likoló ya zɛlo, kɛngɛlɛlɛ epumbwaka likoló ya balaki. Na bandɛkɛ oyo eyaka koya, tokoki kotánga oyo babengi pluviers mongols oyo babotanaka na Sibérie, na nsima basalaka mobembo na epai ya sudi, mpo na kokende kolekisa eleko ya malili kuna. Bapemaka moke na Esanga ya Fraser, na nsima bakobaka mobembo na bango. Longola bango, ba roussettes pene na 30 000, bangembo ya minene lokola yanganga, bayaka mpe na bileko mosusu na esanga yango mpo na kolya bafololo ya eucalyptus.
Mai oyo ezali na esanga yango etondi na mbisi, na ndakisa balɛnɛ, oyo autaka na Mbu Antartike mpo na kokenda na esika babengi Grande Barrière de corail, epai bakendaka kobotana mpe kosangisa nzoto. Ntango bazali kozonga, basakanaka nzelanzela, bapumbwaka mpe bamibwakaka na makɛlɛlɛ makasi mpe mai ebimisaka fulufulu mingi oyo okoki komona yango na mosika, kopesáká esanga mbote na esengo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a UNESCO ebakisaka na molɔngɔ ya bisika oyo batalelaka ete ezali ya mokili mobimba, bisika oyo bato bakendeke kotala, to bazamba ná bangomba oyo ezali na ntina mingi mpo na makambo ya fizike, bioloji, geoloji mpe siansi.
[Karte na lokasa 14]
(Mpo na komona ndenge ezali, talá na zulunalo)
MBU YA PASIFIKE
Esanga Fraser
[Bililingi na lokasa 15]
Na lobɔkɔ ya mobali, likoló tii na nse:
Esika ebale Kurrnung ebimá na mbu
Esanga Fraser ezali na balaki ntuku minei; ná balaki ya likoló ya ngomba mpe maninisa
Zamba ekoli na esika ya zɛlo—likambo oyo esalemaka mpenza te
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Bafɔtɔ nyonso: Na ndingisa ya Tourism Queensland
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Dingo mpe koala
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Tourism Queensland
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Seventy-Five Mile Beach: Esanga Fraser ezali moko ya mabongo ya zɛlo ya minene na mokili (120 km)
[Elilingi na lokasa 17]
Mpongo ya mai
[Elilingi na lokasa 17]
Kɛngɛlɛlɛ
[Elilingi na lokasa 17]
Pélicans
[Elilingi na lokasa 17]
Balɛnɛ ezali kopema moke liboso ya kozonga na Mbu ya Antartike
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 17]
Mpongo: ©GBRMPA; bafɔtɔ mosusu nyonso longola kaka pélicans: Na ndingisa ya Tourism Queensland