Mpo na nini ebele ya babola na mokili oyo etondi na bozwi?
NA EKEKE ya liboso, Yesu Klisto alobaki boye: “Ntango nyonso bozali elongo na babola.” (Matai 26:11) Banda na eleko ya Yesu kino lelo oyo, babola bazalaka ntango nyonso ebele. Kasi, mpo na nini bato mingi bazali babola na mokili oyo etondi na bozwi?
Bato mosusu bakanisaka ete bato bakómaka babola mpo bazwaka bikateli ya malamu te. Mbala mosusu ezalaka solo. Baoyo balukaka kokokisa mposa na bango ya komɛla masanga, bilangwiseli mpe kobɛta masano ya mbongo bakoki nokinoki kobungisa mbongo mpe biloko na bango mosusu. Kasi, bato nyonso oyo bazali babola bakómá bongo te mpo bazwaki bikateli ya malamu te.
Bato mingi babungisaka misala soki mbongwana esalemi na mosala na bango. Ebele ya bato oyo basalaka misala babungisaka mbongo na bango oyo babombaka, mpo na kosomba bankisi mpe kozwa lisalisi ya monganga oyo ezali se komata ntalo. Kasi, soki bamilio ya bato oyo babotami na mikili ya bobola bazali babola, ezalaka foti na bango moko te. Ndenge tokomona yango sikoyo, mbala mingi babola bazalaka na likoki te ya kokima makambo oyo ekómisaka bango babola.
Likambo moko oyo eleká eteyi biso
Na ebandeli ya bambula ya 1930, nkita ya mokili mobimba ekweaki makasi. Na mboka mosusu, bamilio ya bato babungisaki misala na bango mpe mabota mingi babungisaki bandako na bango. Babɔkɔli-bibwɛlɛ bazalaki kosopa ebele ya miliki mpe bakonzi bazalaki kosɛngisa bango báboma ebele ya bibwɛlɛ na bango, nzokande bato mingi bazalaki na nzala.
Mpo na nini biloko nyonso wana ezalaki kobebisama mpamba? Mibeko ya makambo etali nkita ezalaki kosɛnga ete mbuma ya bilanga, bibwɛlɛ mpe biloko mosusu etɛkama na ntalo oyo ekopesa benefisi. Miliki, misuni ya nyama, masangu mpe loso ezalaki na ntina mingi mpo na babola. Kasi, ntango emonanaki ete babola mingi bazali kokoka te kosomba bilei yango na ntalo oyo ekopesa batɛki benefisi, bakómaki kobwaka yango mpo bamonaki ete ezali lisusu na ntina te.
Na bingumba mingi, bato oyo bazalaki kozanga bilei bakómaki kobimisa mobulu. Bato mosusu oyo bazalaki kokoka te kosomba bilei mpo na mabota na bango, bakómaki kokɔtela bato na mindoki mpo na koyiba bilei. Basusu bazalaki kokufa mpo bazangaki biloko ya kolya. Makambo yango esalemaki na États-Unis. Na ebandeli, ntango nkita ya mokili mobimba ekweaki makasi, ebongiseli monene ya nkita ya États-Unis esundolaki babola. Na esika eluka libosoliboso kosunga bato nyonso na bilei, kopesa bango bandako mpe misala oyo basengelaki na yango, ebongiseli yango emonaki ete makambo nyonso wana ezali mpenza na ntina te; mpo na bango, kokɔtisa mbongo nde ezalaki na ntina mingi.
Makambo ya nkita lelo oyo
Mokemoke, nkita ya mokili mobimba ebongaki. Lelo oyo, emonani ete ebele ya bato bakómi na bozwi mingi. Atako mokili etondi na bozwi, babola mingi bazali na likoki te ya kokóma na bomoi ya malamu. Na bikólo mosusu, bansango oyo ezali kolobela nzala mpe bobola ezali mpenza mingi, kutu bato bakómi kolɛmba kotánga yango. Nzokande, soki bato oyo bakimá bitumba na mboka na bango bazali kokufa na nzala, soki bilei oyo babombá na badepo ezali kobeba mpo na mayele mabe ya bato ya politiki mpe soki babola bazali na makoki te ya kosomba biloko ya kobikela mpo ntalo eleki makasi, nyonso wana emonisi ete ebongiseli oyo bato batye ezali kokoka te kosalisa babola. Ebongiseli ya nkita ya mokili mobimba ezali komibanzabanza te mpo na bamilio ya babola.
Emonani ete ebongiseli moko te ya makambo ya nkita oyo euti na bato elongi kokokisa bamposa ya bato nyonso. Esili koleka bambula soki 30 00, moto moko oyo ayekolaki malamu bomoi ya bato alobaki boye: “Ngai nabutwaki mpe nabanzaki mpo na minyoko nyonso esalami na nse ya moi. Mpe talá, mpisoli ya banyokolami mpe moko azali te mpo na kobɔndisa bango. Epai na banyokoli na bango nguya ezali nde bazali na moko te mpo na kobɔndisa bango.” (Mosakoli 4:1) Atako lelo oyo bozwi ezali mingi, makambo mingi oyo ezali sembo te ezali se kosalema mpo na konyokola bato na makambo ya mbongo.
Bato mingi oyo bazali babola bazali na likoki te ya komilongola na bobola makasi oyo bazali na yango. Atako bongo, bato mingi bayekoli ndenge ya kolonga mikakatano na bango ya mbongo. Bazali mpe na elikya ya bomoi moko kitoko na mikolo ezali koya.
[Etanda na lokasa 6]
Makanisi malamu mpamba ekoki?
Na sanza ya Novɛmbɛ 1993, na États-Unis, etuluku moko ya bakonzi bayanganaki na ndako moko ya guvernɛma na engumba Washington mpo na koluka kosilisa likambo moko monene. Bazalaki na bamilio ya dolare oyo balingaki kosunga na yango bato ya ekólo na bango oyo bazangi esika ya kofanda. Ntango bazalaki kosolola, bapolisi, babomi-mɔtɔ mpe minganga oyo bapesaka lisungi nokinoki na ntango ya likama, batondaki na ngámbo ya balabala, na esika moko oyo bisi etɛlɛmaka. Minganga oyo bamemaka na motuka bato oyo bazoki to bazali kobɛla, bazalaki kolɔkɔta ebembe ya mwasi moko oyo azangaki esika ya kofanda. Mwasi yango akufaki liboso ya biro ya États-Unis oyo etalelaka makambo ya bandako. Na guvɛrnema ya ekólo yango, biro yango ezali na mokumba ya kosalisa bato oyo bazangi bisika ya kofanda.
Na nsima, mopanzi-nsango ya zulunalo moko (The New York Times) atunaki mwasi moko oyo asalaka na biro wana mituna mpe mwasi yango alobelaki ebele ya mituka mpe bato oyo bayaki kopesa lisungi nokinoki na esika oyo balɔkɔtaki ebembe yango. Alobaki boye: “Ezali mpenza likambo ya kokamwa komona ndenge bazali kopesa moto lisungi makasi ntango akufi. Nzokande, ntango azalaki na bomoi, azwaki naino lisungi ya boye ata moke te.”
[Elilingi na lokasa 4]
Mama moko azali koyengayenga na bana na ye misato ntango nkita ya mokili mobimba ekweaki na bambula ya 1930
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Dorothea Lange, FSA Collection, Library of Congress
[Elilingi na lokasa 6]
Na baizini lokola oyo, bafutaka bato soki dolare 14 na nsuka ya sanza mpe basɛngaka basali ngonga 70 ya mosala na pɔsɔ
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Fernando Moleres/Panos Pictures