Makambo mazali koleka na mokili
◼ Na Canada, bato mingi batikaka baaparɛi na bango na kura ata na ntango oyo bazali kosalela yango te. Yango nde ezali komatisa (na 5%) mbongo ya kura oyo bafutaka.—NATIONAL POST, CANADA.
◼ Ankɛtɛ moko emonisaki ete, mpo na bato ya Russie, “kanyaka” mpe “kokitisa ntalo ya biloko oyo ezali se komata,” ezali kati na makambo oyo Leta na bango esengeli libosoliboso koluka kosilisa.—PRAVDA, RUSSIE.
◼ Ankɛtɛ moko emonisaki ete na Taïwan bana-kelasi mwa mingi (26, 4%) oyo bazali na mbula soki 12 “basilá kokanisa komiboma.”—THE CHINA POST, TAÏWAN.
◼ “Na boumeli ya mbula 100 oyo euti koleka, bamasini ya sika oyo ekómi kosala misala ndenge na ndenge ekitisi (na 38%) ngonga oyo bato ya mosala na Etats-Unis basalaka pɔsɔ na pɔsɔ. Atako bongo, ntango na bango ya kozwa mwa mopɛpɛ to kosakana ebakisami te, mpamba te bazali kofanda mosika na bisika na bango ya mosala, bazali kotánga bakelasi mosusu nsima ya mosala mpe bakómi na misala mingi ya kosala na ndako.”—FORBES, ÉTATS-UNIS.
◼ Na mikili oyo baizini ezali mingi, kobanda na mobu 2003 tii mobu 2004, bamasini ebimisaki bagaze mingi ya mabe na mopɛpɛ (na 1,6%). Nzokande, “na boumeli ya mbula koleka zomi liboso ya mibu wana, ezalaki bongo te.”—REUTERS, OSLO, NORVÈGE.
Mokakatano ya mai na Chine
Na ekólo Chine, bato bazali na mokakatano monene, mpamba te “mai na bango ezali kobebisama mpe mai ya pɛto ezali mingi te.” Bingumba mingi ezali na baizini oyo epɛtolaka mai ya salite, kasi bazali kozanga mbongo mpo baizini yango esala malamu. Zulunalo moko (The Wall Street Journal) elobi ete: “Mai ya salite oyo eutaka na baizini mpe na bandako, bakisa mpe mai ya salite oyo ezali na nkisi oyo ebomaka nyama mikemike na bilanga, ezali kobebisa ebele ya bibale, balaki mpe banzela oyo elekisaka mai.” Zulunalo yango elobi lisusu ete: “Bato soki milio 300 bazali na likoki te ya kozwa mai ya pɛto mpo na komɛla.” Ebakisi ete likambo yango ezali “mabe” mpe ezali se kobeba.
“Bozali Batatoli ya Yehova?”
Episkopo ya Massa Marittima-Piombino, ya Lingomba ya Katolike, ayebisaki bilenge ya lingomba yango ete soki balingi kozala baklisto mpe kotikala baklisto, basengeli koyebisa basusu bindimeli na bango. Bilenge yango basalaki bongo; na mbula eleki, bakendeki na mabongo ya Elbe, esanga moko ya Italie, kosolola na bato oyo bayaki wana kosukola mpe kozwa mwa mopɛpɛ. Bato yango bakamwaki. Zulunalo moko (Il Tempo) elobaki ete mingi kati na bato yango bazalaki kotuna bilenge yango boye: “Bozali Batatoli ya Yehova?”
Miziki oyo ezali kolendisa kosangisa nzoto
Ebongiseli moko ya bapanzi-nsango (Associated Press) elobelaki lapolo moko oyo emonisaki ete mbala mingi bilenge oyo bayokaka miziki “oyo elobelaka makambo ya kosangisa nzoto babandaka kosala makambo yango liboso ya bilenge oyo bayokaka banzembo mosusu.” Lapolo yango ebakisaki boye: “Banzembo oyo emonisaka mibali ete bazalaka na mposa makasi ya kosangisa nzoto na basi ebele mpe basi bazali wana kaka mpo mibali básangisaka na bango nzoto, bakisa mpe banzembo oyo elobelaka polele makambo ya kosangisa nzoto, mbala mingi epesaka nokinoki bilenge mposa ya kosala makambo yango. Nzokande, ezali bongo te mpo na banzembo oyo elobelaka makambo yango na ndenge ya polele te to mpe oyo elobelaka bato oyo bolingo na bango emonani ete ekoumela.” Elobaki lisusu boye: “Baboti, balakisi mpe bilenge bango moko basengeli kotalelaka malamu makambo oyo elobamaka na banzembo.”
Bazali kobebisa biloko
Na Australie, ebongiseli moko oyo esalaka bolukiluki elobi ete na mobu 2004, bato ya ekólo yango babwakaki bilei oyo motuya na yango ezalaki dolare miliare 4,1. Mbongo yango ezali mbala 13 koleka mbongo nyonso oyo bato ya ekólo yango bapesaki na mobu 2003 mpo na kosalisa bato ya bikólo mosusu oyo basengelaki na lisalisi. Mbula na mbula, mbongo nyonso oyo bato ya ekólo yango babebisaka na kosomba biloko oyo basalelaka ata moke te to basalelaka mpenza te eleki dolare miliare 8,1. Mbongo yango eleki oyo Leta na bango ebimisaka mpo na bainiversite mpe babalabala.