Engebene Biblia
Makambo nyonso ya bomoi na yo esilá kotángama?
Mokolo moko na ntɔngɔ, mibali mibale bazalaki kokende mosala na motuka na bango. Bamonaki malamu bákatisa na nzela mosusu epai moko na bango azalaká kofanda. Nzelanzela, bamonaki mɔtɔ ezali kobima na maninisa ya ndako moko. Batɛlɛmisaki motuka na bango. Lokola bazalaki na esikalye na bango, bamataki na ndako yango mpe babikisaki mama ná bana mitano. Zulunalo moko elobaki mpo na likambo yango boye: “Ntango mosusu, ekanamaki bongo.”
BATO mingi bakanisaka ete makambo nyonso oyo ekómelaka bango, ezala ya mabe to ya malamu, esilá kokanama na nguya moko oyo eleki bango. Na ndakisa, esili koleka mbula soki 500, Jean Calvin, moko ya babandisi ya Lingomba ya Protesta, akomaki ete: “Liteya oyo elobaka ete makambo nyonso esilá kotángama elimboli ete Nzambe asilá kobongisa makambo libela mpe asilá kokana likambo oyo akosala na moto mokomoko. Ezali bongo, mpamba te asalaki bato nyonso ndenge moko te, kasi asilá kokana ete basusu bázwa bomoi ya seko mpe basusu bázwa etumbu ya libela.”
Ezali mpenza solo ete Nzambe asilá kokana makambo oyo tosengeli kosala, ata mpe mbano to etumbu oyo tokozwa na nsuka? Biblia eteyaka nini na likambo yango?
Makanisi oyo esimbi liteya yango
Mingimingi, bato mosusu oyo bandimaka ete makambo nyonso esilá kotángama bakanisaka ete Nzambe ayebi nyonso. Ayebi ata makambo oyo ekoya lobi. Ayebi ndenge moto mokomoko akosalela bomoi na ye, ngonga mpe ndenge oyo moto mokomoko akokufa. Yango wana, bakanisaka ete ntango moto azwaka bikateli, aponaka kosala makambo kaka ndenge oyo Nzambe asilá kokana; soki ezali bongo te, yango ekomonisa ete Nzambe ayebi makambo nyonso te. Yo mpe omoni ete makanisi yango ebongi? Soki ezali bongo, talá makanisi mosusu oyo yango ekobimisa.
Soki nguya moko oyo eleki bato esilá kokana ndenge bomoi na yo ekozala lobi, ezali na ntina te oluka komibatela. Ata soki omɛli makaya to te, kolɔngɔnɔ ya nzoto na yo mpe ya bana na yo ekozala kaka malamu. Soki ozali na kati ya motuka, ata soki okangi mokaba oyo ebatelaka na likama to okangi yango te, ekosala eloko te. Nzokande, kokanisa bongo ezali libunga. Balapolo emonisi ete baoyo bamibatelaka, bakufaka mingi te. Okoki kozwa mpasi ya makasi soki ozali mafumafu.
Bato mosusu bakanisaka boye: Lokola Nzambe ayebaka makambo nyonso liboso esalema, ata liboso akela Adama ná Eva, ayebaki ete bakoboya kotosa ye. Kasi, ntango Nzambe ayebisaki Adama ete asengeli te kolya “mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe,” soki te akokufa, Nzambe ayebaki liboso ete Adama akolya yango? (Genese 2:16, 17) Ntango Nzambe ayebisaki mobali ná mwasi ya liboso ete, “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ekotambolaka na mokili,” ayebaki nde ete elikya kitoko oyo bazalaki na yango ya kozala na bomoi na paladiso ekokokisama te? Te, ayebaki te.—Genese 1:28.
Na maloba mosusu, soki tolobi ete Nzambe ayebaka liboso mpenza bikateli nyonso oyo tozwaka, yango elakisi ete ye nde abimisaka makambo nyonso, ata mpe bitumba, makambo oyo ezali sembo te mpe bampasi. Ezali mpenza bongo? Tokozwa eyano ya polele na maloba oyo Nzambe alobi mpo na ye moko.
“Poná bomoi”
Makomami elobi ete “Nzambe azali bolingo” mpe ‘alingi bosembo.’ Ayebisaka ntango nyonso basaleli na ye ete: “Bóyina mabe mpe bólinga malamu.” (1 Yoane 4:8; Nzembo 37:28; Amosa 5:15) Mbala mingi, alendisaki basaleli na ye ya sembo ete bápona kozala na etamboli ya malamu. Na ndakisa, ntango asalaki kondimana na libota ya Yisalaele na ntango ya kala, ayebisaki bango na monɔkɔ ya Moize ete: “Nabyangi likoló mpe nse kotatola na ntina na bino lelo, ete natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi.” (Deteronome 30:19) Nzambe asilaki kokana liboso likambo oyo bato yango basengelaki kopona? Emonani polele ete ezali bongo te.
Yosua, oyo atambwisaki libota ya Nzambe na ntango ya kala, alendisaki bandeko na ye boye: “Bópona lelo ye oyo bokosalela . . . Mpo na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela [Yehova].” (Yosua 24:15) Ndenge moko mpe, Yilimia, mosakoli ya Nzambe alobaki ete: “Nabondeli yo ete oyoka mongongo ya [Yehova] kati na yango ezali ngai koloba na yo; boye ekozala malamu na yo, mpe molimo na yo ekobika.” (Yilimia 38:20) Nzambe ya bolingo mpe ya sembo akokaki nde kolendisa bato básala malamu na elikya ete bakozwa mbano soki asilaki kokana ete bakolonga te? Te. Elingaki nde kozala bokosi soki asalaki bongo.
Yango wana, soki makambo ya malamu to ya mabe ekómeli yo, ezali te mpo esilá kokanama. Mbala mingi, ‘makambo ekanami te’ eutaka nde na bikateli ya malamu to ya mabe oyo bato mosusu bazwaki. (Mosakoli 9:11, NW) Makambo oyo ekoyela yo lobi etángamá te; kasi, bikateli oyo yo moko ozwaka nde ekosala ete ozwa bomoi ya seko to te.
OKANISI NINI?
◼ Nzambe asilaki kokana ete Adama ná Eva bakosala lisumu?—Genese 1:28; 2:16, 17.
◼ Wapi bizaleli ya Nzambe oyo ekoki te kotinda ye akana makambo oyo esengeli kokómela bato?—Nzembo 37:28; 1 Yoane 4:8.
◼ Mokumba nini ozali na yango?—Yosua 24:15.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
Balapolo emonisi ete baoyo bamibatelaka, bakufaka mingi te