Bomoi na biso na mikolo mizali koya esilá kokomama liboso?
AZALA moklisto, Mizilma, Moyuda, Hindu, to mondimi ya lingomba mosusu—bato ya mangomba nyonso bakutanaka na makama mpe bamilelalelaka mpo na yango.
Na ndakisa, na mokolo ya 6 Desɛ́mbɛ 1997, likama moko monene esalemaki na engumba Irkutsk, na Sibérie. Bamotɛlɛ mibale ya mpɛpo moko monene AN-124 oyo ekumbaka bato mpe biloko, ekufaki mwa miniti moke nsima ya komata likoló. Mpɛpo yango oyo etondaki na esansi ekweaki na kartye moko efandamaki na bato mingi. Mɔ́tɔ ezikisaki bandako mingi, ebomaki bato ebele, mingi mosusu bazokaki, kati na bango, ezalaki na bana oyo basalaki eloko te.
Emonani ete na Sibérie epai likama yango esalemaki, bato bazali na bindimeli ya mangomba bikeseni. Mbala mosusu bamoko bazali baklisto, kasi ekoki kozala ete bakanisaka ete likama yango ekanamaki. Bango mpe bato mosusu bakoki kokanisa ete, ‘Ezalaki mokano ya Nzambe, mpe soki baoyo babomamaki bakufaki na lolenge wana te, balingaki kokufa na lolenge mosusu—ekanamaki bongo mpo na bango.’
Endimeli motindo wana, ezala ete elobami polele to te, ezali komonisa likanisi oyo ezali komonana epai na bato ya mangomba mingi na mokili mobimba—ete makambo nyonso masilá kokanama. Bato mingi bakanisaka ete bomoi na biso, banda ntango tobotami kino tokokufa, esilá kokomama liboso.
Kondima ete makambo nyonso masilá kokanama emonisamaka na ndenge mingi, yango wana ezali mpasi kolimbola endimeli yango na bosikisiki. Kondima ete makambo nyonso masilá kokanama epesi likanisi ete makambo nyonso oyo masalemaka, ekela mokomoko, likambo nyonso—ezala ya malamu to ya mabe—ekoki kopɛngolama te; ekanamá ete ekosalema mpamba te esilaki kobongisama na nguya moko makasi, oyo eleki nguya ya moto. Endimeli motindo wana tokoki kokuta yango na astroloji, na karma ya Lingomba ya Hindu mpe karma ya Lingomba ya Bouddha, mpe na liteya ya mangomba ya boklisto oyo elobi ete Nzambe asilá kobongisa bomoi ya moto. Na Babilone ya kala, bato bazalaki kokanisa ete banzambe bazalaki kotambwisa bomoi ya moto mpe makambo makokómela ye na nzela ya mikanda oyo misilá kokomama. Bazalaki kokanisa ete, nzambe nyonso oyo azalaki kotambwisa “bitanda ya bomoi ya moto” akokaki kokata makambo makokómela bato, makonzi, mpe ata makambo oyo makokómela banzambe bango moko.
Bandimi mingi balobaka ete liboso bato bábotama, na ekateli na ye moko, Nzambe akataka makambo nyonso oyo makokómela bato, na bolai ya bomoi na bango, soki bakozala mibali to basi, bazwi to babola, bakozala na mpasi to na esengo. Balobaka ete nyonso wana ezali na makanisi ya Nzambe to ekomamá na buku moko liboso ete ekokisama. Na yango, mbala mingi soki likama esalami, bandimi balobaka, “mektoub,”—esilá kokomama! Bakanisaka ete lokola Nzambe ayebi makambo nyonso liboso, akataka mpe soki nani akotosa ye mpe nani akotosa te. Yango wana, basambeli mingi bandimaka ete liboso kutu moto abotama, Nzambe asilá kokana soki akozwa bolamu ya seko na paladiso to akozwa etumbu ya seko.
Okoki komona ete yango ekokani mpenza na liteya ya mangomba mosusu ya boklisto oyo elobi ete Nzambe asilá kokana makambo nyonso. Moto ya liboso oyo ateyaki likambo yango na Lingomba ya Protesta ezali bongo Jean Calvin, moko na baoyo balukaki mbongwana na lingomba na ekeke ya 16. Ye alimbolaki kokanama ya makambo liboso lokola “ekateli ya seko ya Nzambe, na nzela na yango akana makambo oyo alingi mpo na moto mokomoko. Bato nyonso bazalisami na ezalela moko te, kasi bomoi ya seko esilá kobongisama mpo na bamoko mpe etumbu ya seko mpo na basusu.” Calvin alobaki mpe ete: “Nzambe ayebaki liboso kokwea ya moto ya liboso, mpe amonaki kati na ye kobeba ya bakitani na ye; lisusu abongisaki yango engebene mposa na ye.”
Kasi, bato nyonso te kati na mangomba oyo mateyaka ete Nzambe asilá kokana makambo nyonso nde bandimaka yango. Bamoko bazali na bosolo mpenza komonisa ete makomi ya lingomba mazali kolobela bonsomi oyo moto azali na yango ya kopona etamboli na ye. Kutu, ntembe makasi ezalaka ntango nyonso mpo na koyeba soki misala ya bato ezali liponi na bango moko oyo basalaka na bonsomi nyonso to esilá nde kokanama na Nzambe. Na ndakisa, bamoko balobaka ete moto azali na bonsomi ya kopona mpe kosala makambo na ye, mpamba te Nzambe oyo azali na boyengebene, atikeli moto bonsomi mpe akozongisa monɔkɔ mpo na misala na ye moko. Basusu balobaka ete misala oyo moto asalaka mizalisamaki na Nzambe kasi moto ye moko, na lolenge moko to mosusu “azwaka” yango mpe ekómaka na motó na ye. Nzokande, mingi mpenza bato bakanisaka ete makambo nyonso, ya minene to ya mike, oyo esalemaka na bomoi na biso ya mokolo na mokolo esilá kokanama na Nzambe.
Okanisaka nini? Nzambe asilá nde kokana lolenge bomoi na yo ekozala na mikolo mizali koya? Bato bazali solo na bonsomi ya kopona, likoki ya kopona lolenge oyo bomoi na bango ekozala na mikolo mizali koya? Na meko nini bomoi na biso etalelami na makambo oyo biso moko tosalaka? Lisolo lilandi ekomeka kopesa eyano.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
SEL/Sipa Press