Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Moto oyo abongi mpenza na ngai?
Kanisá naino mpe yanolá na motuna oyo:
Sikoyo na makanisi na yo, wapi makambo ya malamu oyo moto oyo okobala asengeli kozala na yango? Kati na oyo totandi awa, tyá elembo ✔ pembeni ya makambo minei oyo omoni ete eleki ntina.
․․․․․ kitoko
․․․․․ moto ya elimo
․․․․․ boboto
․․․․․ abongi kotyelama motema
․․․․․ ayebani mingi
․․․․․ moto ya bizaleli malamu
․․․․․ asɛkisaka
․․․․․ amityelaka mikano
Ekómelaki yo olinga mobali moko to mwasi moko ntango ozalaki mwana? Kati na makambo oyo totandi likoló, tyá elembo X pembeni ya likambo oyo ezalaki kosepelisa yo mingi koleka epai na ye.
LIKAMBO moko te oyo totángi awa likoló ezali mabe. Mokomoko na yango ebendaka likebi. Nzokande, ntango olingi moto moko na ebandeli ya bolenge na yo, ntembe ezali te ete likebi ekendaka mingimingi nde na bizaleli na ye oyo emonanaka na miso, lokola oyo totye na lobɔkɔ ya mwasi awa na likoló; ezali bongo te?
Kasi, mokemoke, ntango ozali kokɔmela, okómi kosalela bososoli na yo mpo na kotalela mingimingi bizaleli ya ntina mpenza, lokola oyo totye na lobɔkɔ ya mobali. Na ndakisa, obandi koyeba ete elenge mwasi oyo kitoko na ye ezali kobenda likebi ya bato mingi na esika oyo bofandi ntango mosusu akoki te kotyelama motema to mpe elenge mobali oyo ayebani mingi na kelasi na bino akoki ntango mosusu kozala na bizaleli malamu te. Soki olekisi “eleko ya ebandeli ya bolenge,” elingi koloba eleko oyo mposa ya kosangisa nzoto ekómaka makasi, ntembe ezali te ete okotalela te kaka makambo oyo emonanaka na miso mpo na koyanola na motuna oyo: Moto oyo abongi mpenza na ngai?—1 Bakolinti 7:36.
Nakoki kobala moto nyonso?
Wana bambula ezali koleka, okoki kosepela na mibali to basi ebele. Kasi okoki kobala moto nyonso te. Mposa na yo ezali nde ya kozwa molongani oyo bokofanda na ye bomoi mobimba, moto oyo akosalisa yo okolisa makoki na yo mpe oyo yo okosalisa akolisa makoki na ye. (Matai 19:4-6) Moto yango ekoki kozala nani? Liboso opesa eyano, osengeli naino ‘komitala na talatala’ mpe komiyeba yo moko.—Yakobo 1:23-25.
Mpo na komiyeba malamu, yanolá na mituna oyo:
Wapi bizaleli na ngai ya malamu?
․․․․․
Wapi bolɛmbu na ngai?
․․․․․
Wapi bamposa na ngai ya elimo mpe makambo nini nasepelaka na yango?
․․․․․
Komiyeba ezalaka pɛtɛɛ te, kasi soki ozali komituna mituna ya ndenge wana, yango ekoki kosalisa yo oluka komiyeba.a Soki omiyebi malamu, ekozala mpasi te ozwa mwasi to mobali oyo akosalisa yo okolisa bizaleli na yo ya malamu kasi bolɛmbu na yo te. Sikoyo, okosala nini soki okanisi ete ozwi moto oyo abongi na yo?
Bolingo oyo ekosimba?
Mpo na koyanola na motuna oyo, talelá malamumalamu moto oyo azali kosepelisa yo. Kasi, kebá! Ntango mosusu, okolinga komona kaka makambo oyo esepelisi yo. Kozala motema mɔtɔmɔtɔ te. Luká koyeba malamu bizaleli na ye.
Bilenge mingi oyo bayokani kobalana basukaka kaka na makambo oyo ezali komonana na miso. Likebi na bango ekendaka nokinoki na makambo oyo esepelisaka bango nyonso mibale. Balobaka boye: ‘Tolingaka miziki ya ndenge moko; tolingaka makambo ndenge moko; tozali koyokana na makambo nyonso!’ Kasi, ndenge tolobaki, soki olekisi mpenza eleko ya ebandeli ya bolenge, okotalela te kaka makambo oyo emonanaka na miso. Osengeli nde kososola “bomoto ebombaná ya motema.”—1 Petelo 3:4; Baefese 3:16.
Na ndakisa, na esika otalela kaka makambo oyo yo ná ye bozali koyokana, okoki koyeba ye malamu soki otali ndenge makambo elekaka kati na bino soki boyokani te na likambo moko. Na maloba mosusu, asalaka nini soki bozali na makanisi ekeseni? Alingaka makambo esalema kaka ndenge ye alingi mpe ntango mosusu akómaka na “nkanda makasimakasi” to abimisaka “maloba ya kofinga”? (Bagalatia 5:19, 20; Bakolose 3:8) Amonisaka ete azali na makambo makasimakasi te, elingi koloba soki opesi likanisi oyo ebuki mobeko ya Nzambe te, andimaka kobongola oyo ya ye mpo na kobatela kimya?—Yakobo 3:17.
Esengeli mpe kotalela likambo oyo: Alukaka na ndenge nyonso kondimisa yo osala oyo ye alingi to asalaka zuwa? Asɛngaka yo oyebisa ye eloko nyonso oyo ozali kosala? Elenge mwasi moko na nkombo Nicole alobi boye: “Soki alingi otyelaka kaka ye likebi mpe azali na zuwa, osengeli kokeba. Nayokaka ete bilenge mosusu oyo bayokani kobalana baswanaka mpo moko na bango ayokaka mabe soki moninga azali koyebisa ye ntango nyonso te esika oyo azali. Nakanisi ete wana ezali elembo ya mabe.”
Ndenge nini bato mosusu batalelaka moto oyo olingi kobala? Ekozala malamu osolola na baoyo bayebi ye banda mwa kala, na ndakisa baklisto oyo bakɔmeli oyo bazali na ye lisangá moko. Bakoyebisa yo soki ‘bato balobaka mpo na ye na ndenge ya malamu.’—Misala 16:1, 2.b
Osengeli koboya ye?
Okosala nini soki omoni ete moto oyo boyokanaki kobalana akozala molongani malamu te? Soki ezali bongo, ekozala malamu mpenza bósuka na nzela. Biblia elobi ete: “Moto ya mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba.”—Masese 22:3.c
Nsima na yango, ntango mosusu okozwa moto mosusu. Na ntango wana, ntembe ezali te ete okoyeba kotalela makambo na ndenge ebongi mpo okozwa liteya na makambo oyo ekómelaki yo liboso. Ekoki kozala ete na ntango wana, okondima ɛɛ na motuna oyo: “Moto oyo abongi mpenza na ngai?”
Okoki kokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/ypf
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mituna mosusu oyo okoki komituna ezali na Lamuká! ya Yanuali 2007, lokasa 30 (na Lifalanse).
b Talá mpe mituna oyo ezali na bitanda na nkasa 21-22.
c Soki olingi oyeba ndenge ya koyebisa ye ete oboyi ye, talá Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ-Desɛmbɛ 2001, nkasa 12-14.
KANISÁ MAKAMBO OYO
◼ Wapi bizaleli malamu oyo yo okomema na libala na yo?
◼ Bizaleli nini okolinga ete molongani na yo azala na yango?
◼ Ndenge nini okoyeba malamu bizaleli, etamboli mpe lokumu ya moto oyo boyokani kobalana?
[Etanda na lokasa 21]
Akozala mobali malamu?
MAKAMBO YA NTINA
▪ Soki azali na mwa bokonzi, ndenge nini asalelaka yango?—Matai 20:25, 26.
▪ Azali na mikano nini?—1 Timote 4:15.
▪ Azali kosala makasi akokisa yango?—1 Bakolinti 9:26, 27.
▪ Banani bazali baninga na ye?—Masese 13:20.
▪ Ndenge nini atalelaka mbongo?—Baebele 13:5, 6.
▪ Alingaka masano ya ndenge nini?—Nzembo 97:10.
▪ Elateli na ye emonisaka nini?—2 Bakolinti 6:3.
▪ Ndenge nini amonisaka ete alingaka Yehova?—1 Yoane 5:3.
MAKAMBO NA YE YA MALAMU
▪ Azalaka makasi na mosala?—Masese 6:9-11.
▪ Asalelaka mbongo na mayele?—Luka 14:28.
▪ Ayebani ete azalaka na etamboli malamu?—Misala 16:1, 2.
▪ Akumisaka baboti na ye?—Exode 20:12.
▪ Amibanzabanzaka mpo na basusu?—Bafilipi 2:4.
MAKAMBO OYO OSENGELI KOKEBA NA YANGO
▪ Azalaka nkandankanda?—Masese 22:24.
▪ Alukaka kotinda yo osala makambo ya mbindo?—Bagalatia 5:19.
▪ Abɛtaka to afingaka?—Baefese 4:31.
▪ Azalaka na mposa ya komɛla mpo na komisepelisa?—Masese 20:1.
▪ Azalaka na zuwa mpe alukaka kaka matomba na ye moko?—1 Bakolinti 13:4, 5.
[Etanda na lokasa 22]
Akozala mwasi malamu?
MAKAMBO YA NTINA
▪ Ndenge nini amonisaka botosi na kati ya libota mpe na lisangá?—Baefese 5:21, 22.
▪ Elateli na ye emonisaka nini?—1 Petelo 3:3, 4.
▪ Banani bazali baninga na ye?—Masese 13:20.
▪ Ndenge nini atalelaka mbongo?—1 Yoane 2:15-17.
▪ Azali na mikano nini?—1 Timote 4:15.
▪ Azali kosala makasi akokisa yango?—1 Bakolinti 9:26, 27.
▪ Alingaka masano ya ndenge nini?—Nzembo 97:10.
▪ Ndenge nini amonisaka ete alingaka Yehova?—1 Yoane 5:3.
MAKAMBO NA YE YA MALAMU
▪ Azalaka makasi na mosala?—Masese 31:17, 19, 21, 22, 27.
▪ Asalelaka mbongo na mayele?—Masese 31:16, 18.
▪ Ayebani ete azalaka na etamboli malamu?—Luta 4:11.
▪ Akumisaka baboti na ye?—Exode 20:12.
▪ Amibanzabanzaka mpo na basusu?—Masese 31:20.
MAKAMBO OYO OSENGELI KOKEBA NA YANGO
▪ Azalaka moto ya matata?—Masese 21:19.
▪ Alukaka kotinda yo osala makambo ya mbindo?—Bagalatia 5:19.
▪ Abɛtaka to afingaka?—Baefese 4:31.
▪ Azalaka na mposa ya komɛla mpo na komisepelisa?—Masese 20:1.
▪ Azalaka na zuwa mpe alukaka kaka matomba na ye moko?—1 Bakolinti 13:4, 5.