Baumelaki mpenza bambula mingi?
Biblia elobi ete Adama aumelaki mbula 930, Sete aumelaki mbula 912, Metusela aumelaki mbula 969 mpe azangaki kaka mbula 31 mpamba mpo akokisa mbula nkóto moko. (Genese 5:5, 8, 27) Bambula yango ezalaki koumela lokola oyo ya biso lelo oyo? To ezalaki mokuse mpe mbala mosusu ekokani na basanza ya mikolo na biso, ndenge bato mosusu bakanisaka?
Biblia epesi bilembeteli oyo emonisi ete ezalaki bambula ya solo oyo ezalaki koumela lokola oyo ya biso lelo oyo. Na ndakisa, soki bambula yango ezalaki koumela lokola basanza ya mikolo na biso, mbɛlɛ bato oyo balandi balingaki kobota bana na mbula oyo moto akoki kobota bana te: Kainana alingaki kobota bana naino akokisi mbula motoba te mpe Maalaleele ná Enoka balingaki kobota na mbula mitano na ndambo.—Genese 5:12, 15, 21.
Longola yango, bato ya ntango ya kala bayebaki kokesenisa mikolo, basanza mpe bambula. (Genese 1:14-16; 8:13) Na yango, lolenge oyo Biblia elobeli kolandana ya makambo na bomoi ya Noa ezali kosalisa biso tóyeba boumeli ya sanza moko. Bokokanisi ya Genese 7:11, 24 mpe Genese 8:3, 4 emonisi ete sanza mitano, elingi koloba kobanda na mokolo ya 17 ya sanza ya mibale kino mokolo ya 17 ya sanza ya nsambo, ekokani na mikolo 150. Yango emonisi ete Noa azalaki kotánga mikolo 30 mpo na sanza moko mpe soki tokamati yango mbala 12 ezalaki kokokana na mbula moko.—Genese 8:5-13.a
Kasi, ndenge nini bato bakokaki koumela mbula 900 to koleka? Biblia eyebisi biso ete Nzambe asalaki bato mpo báumela libela na libela mpe lisumu ya Adama nde ememelaki bato nyonso ezaleli ya kozanga kokoka mpe liwa. (Genese 2:17; 3:17-19; Baloma 5:12) Na bokeseni na biso lelo oyo, bato oyo bazalaki na bomoi liboso ya Mpela bazalaki naino pene na bomoi ya kokoka mpe na ntembe te, yango nde esalaki ete báumela bambula mingi. Na ndakisa, Metusela azalaki na bomoi mabota nsambo nsima ya Adama.—Luka 3:37, 38.
Kasi mosika te, Yehova Nzambe akolongola mabe nyonso oyo lisumu ya Adama ebimisaki na bomoi ya baoyo nyonso bazali komonisa kondima na makila ya Mwana na ye Yesu Klisto oyo esopamaki. “Lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Baloma 6:23) Ya solo, etikali moke mbula 969 ya Metusela ekomonana lisusu mingi te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Étude perspicace des Écritures, volimi 1, lokasa 127, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda na lokasa 30]
(Talá na zulunalo mpo na komona ndenge ezali)
1000
Metusela
Adama
Sete
900
800
700
600
500
400
300
200
100
Mwayene ya mbula ya moto lelo oyo