Bato ya ntango ya kala bazalaki mpenza na bomoi molai?
JEANNE LOUISE CALMENT, akufaki na mokolo ya 4 ya sanza ya Augusto 1997 na engumba na ye na sudi ya France. Azalaki na mbula 122 ntango akufaki!
Kokola ya mayele ya siansi, ya kobatela nzoto kolɔngɔnɔ, mpe makambo mosusu, ezali kosalisa bato lelo oyo bázala na bomoi molai. Atako bongo, bato mingi te nde bakokisaka to balekisaka mbula 100. Yango wana soki moto aumeli ntango molai, bapanzi-nsango balobelaka yango mingi ndenge basalaki yango mpo na mama Calment.
Biblia elobaka ete na ntango ya kala bato bazalaki na bomoi molai, na bantango mosusu kutu bazalaki koumela pene na mbula nkóto. Likambo yango ezali solo? Bato ya ntango ya kala bazalaki mpenza koumela na bomoi bambula mingi ndenge wana? Mpe likambo yango ezali na ntina mpo na biso lelo?
Bato oyo baumelaki na bomoi
Mokanda ya liboso ya Biblia elobeli mibali nsambo oyo baumelaki na bomoi mbula koleka 900, bango nyonso babotamaki liboso ya Mpela ya ntango ya Noa. Ezalaki Adama, Sete, Enoshe, Kenane, Yarede, Metusela, mpe Noa. (Ebandeli 5:5-27; 9:29) Mingi ya mibali yango bayebani mpenza te, kasi bango nyonso bazalaki na libota ya liboso na mabota zomi oyo ebimaki kobanda na Adama. Metusela ayebani mingi mpo aumelaki koleka bango nyonso—aumelaki mbula 969!
Biblia elobeli mpe bato soki 25 oyo baumelaki mpe mingi na bomoi koleka ndenge bato baumelaka lelo oyo. Bamosusu baumelaki mbula 300, 400, ata mpe 700 to koleka. (Ebandeli 5:28-31; 11:10-25) Kasi, mpo na bato mingi masolo ya Biblia oyo elobeli bato oyo baumelaki mingi na mokili ezali masapo mpamba. Ezali mpenza bongo?
Masapo to makambo ya solo mpenza?
Na kotalela mokanda moko oyo eteyelo moko (Institut Max Planck des recherches démographiques) ebimisaki na Allemagne, bato ya mayele bandimaki mbula ya mama Calment oyo tolobelaki na ebandeli, nsima ya koyanganisa ‘kaka mwa makambo’ oyo ye moko alobaki ntango azalaki naino na bomoi. Makambo yango etalelaki ye to mpe bandeko na ye ntango mwa makambo yango esalemaki. Bakokanisaki makambo yango na oyo bakonzi ya mboka, baavoka, lingomba, bazulunalo ata mpe na oyo bato mosusu balobaki. Bamonaki ete atako ezalaki mpasi kondima likambo mokomoko oyo elobamaki, bamonaki ete mbula yango ezali solo na kotalela bilembeteli ya polele mpe bilembeteli mosusu oyo bazalaki na yango.
Kasi, ezali boni mpo na masolo oyo ezali na Biblia? Ezali mpenza na bilembeteli oyo emonisi ete ebongi mpenza kotyela yango motema? Ee! Atako mikanda ya bato ya mayele lelo oyo emonisi bosolo ya makambo yango nyonso te, ezali na makambo oyo emonisi mbala na mbala ete makambo oyo ezali na Biblia ebongi kotyelama motema mpo eyokani na masolo ya kala, makambo ya siansi mpe badati.a Yango ezali likambo ya kokamwa te mpo Biblia yango moko elobi ete: “Nzámbe akokósaka té, kasi bato bánso bakobúkaka lokutá.” (Baroma 3:4, Biblia Liloba lya Nzambe) Ya solo, lokola ezali buku oyo ekomamaki na “litambwisi ya elimo ya Nzambe,” Biblia ezali ata na likambo moko te ya lokuta.—2 Timote 3:16.
Moize, oyo Yehova Nzambe asalelaki mpo na kokoma mikanda mitano ya liboso ya Biblia, na ntembe te azali kati na bato oyo bayebani mingi mpe oyo bato bamemyaka mingi. Bayuda batalelaka ye lokola moto monene kati na balakisi na bango nyonso. Bamizilma batalelaka ye lokola moko ya basakoli to baprofeta na bango ya minene. Mpo na bakristo, Moize azali moto oyo abongiselaki Yesu Kristo nzela. Ekozala malamu koloba ete makomi ya moto ya ntina mingi ndenge wana ebongi te kotyela yango motema?
Bazalaki na ndenge mosusu ya kotánga mikolo?
Bato mosusu balobaka ete na ntango wana bato bazalaki te kotánga mikolo ndenge totángaka lelo oyo mpe ete oyo bango bazalaki kobenga mbula ezalaki nde sanza. Nzokande, soki totaleli masolo oyo ezali na mokanda ya liboso ya Biblia, tokomona ete bato bazalaki kotánga mikolo kaka ndenge totángaka yango lelo oyo. Tózwa bandakisa mibale. Na lisolo ya Mpela, tozali kotánga ete Mpela yango ebandaki ntango Noa azalaki na mbula 600, “na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na nsambo ya sanza yango.” Na nsima elobi ete mai etondaki na mabele na boumeli ya mikolo 150 mpe ete “na sanza ya nsambo, na mokolo ya zomi na nsambo ya sanza yango, masuwa etɛlɛmaki likoló ya bangomba ya Ararate.” (Ebandeli 7:11, 24; 8:4) Yango esali sanza mitano—kobanda na mokolo ya 17 ya sanza ya mibale tii na mokolo ya 17 ya sanza ya nsambo ya mbula yango—yango epesi mikolo 150. Emonani polele ete ezali na elembeteli moko te oyo endimisi ete mbula moko ezalaki nde sanza moko.
Sikoyo, tótalela ndakisa ya mibale. Na kolanda Ebandeli 5:15-18, Mahalalele abotaki mwana mobali ntango azalaki na mbula 65, mpe aumelaki lisusu mbula 830 mpe akufaki na mbula 895. Nkɔkɔ na ye Enoka mpe abotaki mwana mobali ntango azalaki na mbula 65. (Ebandeli 5:21) Soki mbula moko ezalaki mpenza sanza moko, na yango mibali yango mibale babotaki ntango bazalaki naino na mbula 5 mpamba! Yango ekoki mpenza kosalema?
Arkeoloji mpe epesi bilembeteli mosusu, oyo eyokani na oyo Biblia elobi na ntina na bomoi molai oyo bato bazalaki na yango kala. Mpo na Abrahama, Biblia elobi ete azalaki moto ya engumba Ure, mpe na nsima akendaki kofanda na engumba ya Harane mpe na nsima na Kanana, mpe ete abundaki mpe alongaki Kedolaomere, mokonzi ya Elame. (Ebandeli 11:31; 12:5; 14:13-17) Biloko oyo bakundolaki emonisi ete bisika yango ezalaki mpenza; ata mpe bato oyo balobeli. Arkeoloji mpe esalisi biso tóyeba mikili mpe mimeseno ya bato oyo balobelami na lisolo ya Abrahama. Lokola makambo oyo Biblia elobi mpo na Abrahama ezali mpenza bongo, mpo na nini kotya ntembe na mbula na ye oyo ezalaki 175?—Ebandeli 25:7.
Na yango, ezali na ntina moko te ya kotya ntembe na makambo oyo Biblia elobi mpo na mbula ya kokamwa oyo bato mosusu ya kala baumelaki na bomoi. Kasi, okoki komituna boye: ‘Soki bato yango baumelaki mingi na bomoi to te, yango etali ngai na nini?’
Okoki kozala na bomoi ntango molai koleka ndenge okoki kokanisa!
Ndenge bato oyo bazalaki na bomoi liboso ya Mpela baumelaki na bomoi bambula mingi, emonisi ete nzoto ya moto ezali na makoki ya kokamwa. Mayele ya siansi lelo oyo, esalisi bato báyeba mpenzampenza nzoto ya moto mpe ndenge oyo yango ekelamá na ndenge ya kokamwa, ata mpe makoki oyo nzoto ezali na yango ya kozongaka sika mpe komibikisa. Balobi nini? Ezali na likoki ya kozala na bomoi libela na libela. Tom Kirkwood, profɛsɛrɛ moko ya makambo ya minganga alobi boye: “[Bobange] ezali moko ya makambo oyo ezali libombami monene mpo na minganga.”
Kasi, mpo na Yehova Nzambe bobange ezali libombami te ezali mpe te likambo moko oyo ezangi ndenge ya kosilisa yango. Akelaki Adama mobali ya liboso na nzoto ya kokoka mpe mokano na ye ezalaki ete bato bázala na bomoi libela na libela. Likambo ya mawa, Adama azwaki ekateli ya kopesa Nzambe mokɔngɔ. Mpo na yango, asalaki lisumu mpe akómaki moto ya kozanga kokoka. Likambo wana epesi ndimbola na likambo moko oyo bato ya siansi balukaka: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Baroma 5:12) Ezali mpo na lisumu mpe kozanga kokoka nde tobɛlaka, tonunaka, mpe tokufaka.
Nzokande, mokano ya Mozalisi na biso ya bolingo ebongwaná te. Likambo ya monene oyo emonisi yango, ezali ete apesaki Mwana na ye Yesu Kristo lokola mbeka mpo na lisiko, yango epesi bato libaku ya kozongela nzoto ya kokoka mpe kozala na bomoi ya seko. Biblia elobi boye: “Kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.” (1 Bakorinti 15:22) Liboso ya Mpela, kozanga kokoka ekɔtaki naino mpenza makasi te na nzoto ya bato ndenge ezali lelo oyo; yango wana bazalaki koumela mingi na bomoi koleka bato ya ntango na biso. Kasi, lelo oyo biso tozali pene ya ntango oyo bilaka ya nzambe ekokokisama. Mosika te, lisumu mpe kozanga kokoka nyonso ekozala lisusu te, mpe bato bakobanda lisusu te konuna mpe kokufa.—Yisaya 33:24; Tito 1:2.
Ndenge nini okoki kozwa mapamboli? Koloba te ete makambo oyo Nzambe alaki ezali ndɔtɔ mpamba. Yesu alobaki boye: “Moto oyo azali koyoka liloba na ngai mpe azali kondima ye oyo atindaki ngai azali na bomoi ya seko.” (Yoane 5:24) Na yango, zwá boyebi ya Biblia mpe salelá yango. Soki osali bongo, okolanda ndakisa ya baoyo ntoma Paulo alobaki mpo na bango ete bazali ‘komibombela biloko ya motuya, elingi koloba, moboko malamu oyo bakotonga likoló na yango na mikolo oyo ezali koya, mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.’ (1 Timote 6:19) Okoki kotya motema ete Nzambe oyo asalaki ete bato oyo Biblia etángi báumela na bomoi ntango molai akosala mpe ete ozala na bomoi libela na libela!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda na lokasa 12]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
1 000*
969* METUSELA
950* NOA
930* ADAMA
900*
800*
700*
600*
500*
400*
300*
200*
100* MOTO YA NTANGO NA BISO
*BAMBULA