Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/08 lok. 30
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzoto esalemá mpo emibikisaka na maladi
  • Ndenge oyo bozwi ya mokili ekabolami
  • Bana mibali baleki ebele na Chine
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—2004
  • Makambo oyo ezali kobangisa
    Lamuká!—2019
  • Ntango ya bozwi kasi mpo na banani?
    Lamuká!—2007
Lamuká!—2008
g 1/08 lok. 30

Makambo mazali koleka na mokili

◼ “Ntembe ezali te” ete molunge ekómi makasi awa na mabelé mpe “ekoki kozala” ete makambo oyo bato basalaka nde ebimisi mokakatano yango.​—GROUPE INTERGOUVERNEMENTAL D’EXPERTS SUR L’ÉVOLUTION DU CLIMAT (GIEC), SUISSE.

◼ Na Allemagne, bato pene na milio moko na ndambo tii pene na milio mibale, “bamɛlaka nkisi mikolo nyonso.” Motángo ya bato yango ekokani na oyo ya bato oyo bazalaka baombo ya masanga.​—TAGESSCHAU, ALLEMAGNE.

◼ Na Grande-Bretagne, bato oyo babomamaka mingi ezali nde bana mike oyo bakokisi naino mbula mobimba te.​—THE TIMES, GRANDE-BRETAGNE.

◼ Zamba minene ekoli na bisika mosusu ya ndelo oyo ekaboli États-Unis ná Canada. Yango wana, basali ya Leta “bazali lisusu koyeba ndelo yango malamu te.” Dennis Schornack, mosali na ebongiseli moko oyo etalelaka ndelo ya bikólo, alobi ete: “Soki oyebi te esika oyo ndelo ezali, okokoka mpe te kobatela yango.”​—ASSOCIATED PRESS, ÉTATS-UNIS.

Nzoto esalemá mpo emibikisaka na maladi

Molakisi Gustav Dobos, mokambi ya minganga na lopitalo oyo esalisaka bato oyo batimolaka charbon na engumba Essen na Allemagne, alobi ete: “Nzoto ya moto ekoki komibikisa na bamaladi mingi (60-70 %).” Mpo na yango, balobaka ete nzoto na biso ebimisaka mitindo ya nkisi soki 30 to 40, na ndakisa cortisone mpe bankisi mosusu oyo epekisaka mabanga esalema na bangei (reins). Bato ya mayele basili koyeba mwa moke ndenge oyo nzoto esalaka mpo na komibikisa, kasi ezali na makambo mingi oyo bayebi naino te. Na kotalela zulunalo moko (Vital), bato ya siansi bayebi ete “ba hormone, biloko mosusu oyo ebatelaka nzoto mpe baselile oyo ebomaka baselile mosusu, esanganaka mpo na kobundisa maladi; ezali mpe na ntina mingi ete moto azalaka na kimya na makanisi mpe na esengo.” Nzokande, zulunalo yango emonisi mpe ete mitungisi ya makanisi mpe mikakatano mosusu “ekoki kosilisa makasi ya nzoto ya kobundisa maladi na boumeli ya basanza.”

Ndenge oyo bozwi ya mokili ekabolami

Zulunalo moko (Guardian) ya Londres elobi ete: “Ndambo monene ya bozwi ya mokili mobimba (40 %) ezali nde na mabɔkɔ ya mwa bato moke (1 %) oyo baleki bozwi na mokili mobimba.” Zulunalo yango elobi lisusu ete: “Mingi ya bato oyo bazali na bozwi koleka ezali baoyo basalaka na bisika oyo etalelaka makambo ya mbongo mpe baoyo basalaka mombongo na nzela ya Internet.” Lapolo moko ya ONU emonisi ete soki ozwi bato monkama oyo baleki bozwi na mokili mobimba, 37 bafandaka na États-Unis, 27 na Japon, mpe 6 na Royaume-Uni. Na mokili mobimba, bato 50 likoló ya monkama oyo bazali babola mpenza, bazali kaka na mwa ndambo moke (1 %) ya bozwi ya mokili. Duncan Green, mokambi ya bato oyo basalaka bolukiluki na Oxfam, lisangá moko ya Grande-Bretagne oyo esalisaka babola, alobi ete: “Ezali mawa mpenza komona ete bato mosusu bazali na bozwi oyo eleki ndelo, nzokande basusu bazali na bobola makasi. . . . Ezali mpasi kondima likambo yango, lokola toyebi ete na mokili mobimba bato milio 800 balalaka nzala mokolo na mokolo.”

Bana mibali baleki ebele na Chine

Na Chine, soki bana mibali oyo babotamaki na 2005 bazalaki 118, bana basi oyo babotamaki bazalaki soki 100. Zulunalo moko (China Daily) elobi ete na bamboka mosusu ya Chine, “bana mibali oyo babotamaki bazalaki kokóma soki 130, kasi bana basi kaka soki 100.” Ntina na yango ezali ete nsima ya kosala ekzamɛ, soki baboti bayebi ete mwana oyo azali na libumu azali mwasi, balongolaka zemi yango. Bakonzi ya Chine bayebi ete soki baboti basalaka bongo ezali mpo mibeko na bango esɛngi ete bato oyo bafandi na bingumba bábota kaka mwana moko. Zulunalo yango elobi ete: “Na 2020, mibali oyo bakokóma na mbula ya kobala bakozala milio soki 30 koleka basi, mpe yango ekozala likama mpo na mboka.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto