Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g19 No. 1 lok. 3
  • Makambo oyo ezali kobangisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali kobangisa
  • Lamuká!—2019
  • Masolo mosusu
  • Mikakatano ya mbongo​—Oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala
    Makambo mosusu
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—2008
  • Bato bazali ndenge moko te—Nzambe akanaki bongo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Yebá kosalela Internet na ndenge ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Lamuká!—2019
g19 No. 1 lok. 3

LIKAMBO

Makambo oyo ezali kobangisa

“Lelo mayele ya teknoloji, ya siansi, mpe ya mombongo ekoli mingi mpenza . . . Atako bongo, makambo nyonso ya mokili [ezala ya politiki to ya nkita; ata mpe mai, mopɛpɛ, ná bazamba nyonso] ekoki kobeba.”​—Forum économique mondial, lapolo ya 2018.

MPO NA NINI AVENIRE YA MABELE EZALI KOBANGISA BATO MINGI? TÓTALELA MWA MIKAKATANO TOZALI NA YANGO.

  • Ordinatɛrɛ ná kadena ekangamá

    BATO MABE NA INTERNET: Na zulunalo moko ya Australie bakomaki ete “kosalela Internet ezali se kokóma likama. Na Internet, okoki kokwea na mabɔkɔ ya bato oyo balukaka kosangisa nzoto na bana mike, bato ya nko, bato ya matumoli mpe miyibi. Na mokili mobimba, bato oyo basalelaka mayele mabe mpo na koyiba bato mbongo bazali se kobakisama. . . . Internet ezali kobimisa polele moko ya bizaleli eleki mabe epai ya bato: kosala baninga makambo ya mabe mpe ya nko.”

  • Mabɔkɔ ezali koluka kozwa mbongo

    BOBOLA: Ebongiseli moko oyo esalisaka babola euti kobimisa lapolo oyo emonisi ete soki tosangisi mbongo nyonso oyo bato miliare 3 na ndambo babikelaka, ekokokana kaka na mbongo ya bato 8 oyo baleki na bozwi na mokili. Lapolo yango elobi lisusu boye: ‘Bato ya mbongo bazali se kokóma na mbongo mingi mpe babola bazali se kozinda na bobola.’ Bato mosusu bazali koloba ete ndenge bobola ezali kobakisama ekoki kobimisa mobulu makasi na mokili.

  • Babombe

    BITUMBA MPE KONYOKOLA BATO: Na 2018, biro ya ONU oyo etalelaka bato oyo bazali kokima bitumba ebimisaki lapolo oyo elobaki boye: “Lelo oyo, bato oyo bazali kokima bamboka na bango bakómi ebele na ndenge oyo emonaná naino te.” Bato koleka milio 68 batiki bamboka na bango, mingimingi mpo na kokima bitumba to minyoko. Lapolo yango elobaki ete mokolo na mokolo, bato ebele mpenza bazali kokima bamboka na bango.

  • Mombonda ezali kobimisa milinga oyo ezali kobebisa mopɛpɛ

    MAI, MOPƐPƐ, BANYAMA MPE BAZAMBA EZALI KOBEBA: Lapolo moko ya 2018 elobaki boye: “Banyama mpe bazamba ezali se kosila, mpe ndenge mai ná mopɛpɛ ezali kobeba ezali kokóma likama monene mpo na bato.” Bikelamu ya mikemike ezali se kosila na bamboka mosusu. Lokola mwa bikelamu yango esalisaka mpo banzete ebota mbuma, bato ya mayele bazali koloba ete mai, mopɛpɛ, banyama mpe bazamba ekobeba mpenza.

Tokoki mpenza kobongola makambo mpo tótika kobanga? Bato mosusu balobi ete mpo na kosala yango esengeli mpe koteya bato. Soki ezali bongo, esengeli koteya bango makambo nini? Masolo oyo elandi ekolobela yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto