Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/08 nk. 3-4
  • Mpo na nini tobangaka liwa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini tobangaka liwa?
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nsɔmɔ ya kozala lisusu te na bomoi
  • Soki moto azongi “putulu,” nyonso esili?
  • Liwa ezali mpenza nsuka?
    Lamuká!—2008
  • Tótalela malamumalamu makanisi ya bato mosusu na ntina na liwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ndenge nini okoki kolongola nsɔmɔ ya liwa?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge nini otalelaka liwa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 7/08 nk. 3-4

Mpo na nini tobangaka liwa?

“Liwa ebangisaka koleka biloko mosusu nyonso, mpo ezali nsuka.”​—Aristote.

EZALAKI na mwasi moko oyo baninga na ye bazalaki komona ete azali mondimi ya solosolo oyo azalaki kobanga Nzambe. Kutu, basusu bazalaki kobenga ye “likonzí ya lingomba epai azalaki kosambela.” Bateyaki mwasi yango ete liwa ezali mpenza nsuka te; ezali nde nzela mpo na kokóma na bomoi mosusu. Atako bongo, ntango amonaki ete akómi pene na liwa, akómaki kobanga mingi. Lokola azalaki na ntembe mingi na motema, atunaki mwasi oyo azalaki kopesa ye toli na lingomba na bango ete: “Bato [bateyaka makambo ndenge na ndenge mpo na oyo ekómelaka moto nsima ya liwa]; ndenge nini koyeba oyo ezali solo?”

Pene na bato ya mangomba nyonso mpe ya bikólo nyonso bandimaka ete nsima ya liwa, moto akobaka kozala na bomoi to azongaka lisusu na bomoi. Na mateya nyonso wana, oyo wapi ezali solo? Bato mingi bandimaka mpenza te ete moto akobaka kozala na bomoi nsima ya liwa. Bongo yo, bateyá yo ete moto akobaka kozala na bomoi nsima ya liwa? Ondimaka liteya yango? Obangaka liwa?

Nsɔmɔ ya kozala lisusu te na bomoi

Na bambula oyo euti koleka, bato mingi ya mayele bakomi babuku mpe balapolo ebele na likambo ya kobanga liwa. Atako bongo, bato mingi balingaka te kokanisa liwa. Nzokande, lokola liwa ezali nzela ya moto nyonso, tólinga tólinga te mokolo mosusu tokokanisa yango. Liwa ekoki koyela moto nyonso lelo to lobi; bato koleka 160 000 bazali kokufa mokolo na mokolo! Liwa eponi moto te; yango wana, bato mingi babangaka yango.

Bato ya mayele bamonisi bantina oyo etindaka bato bábanga liwa. Na ndakisa, bato babangaka koyoka mpasi, babangaka mpo bayebi te nini ekokómela bango nsima ya liwa, babangaka kobungisa moto oyo balingaka, mpe babangaka mikakatano oyo ekokómela bandeko to baninga na bango oyo bakotikala.

Kasi, likambo oyo ebangisaka bato koleka ezali nde nsɔmɔ ya kozala lisusu te na bomoi. Ata soki mangomba eteyaka makambo mingi mpo na liwa, bato ebele babangaka ete liwa ekosukisa bomoi na bango mpo na libela. Longola yango, makambo oyo bato ya siansi balobaka etindaka bato bábanga lisusu liwa koleka. Kutu lelo oyo, bato ya siansi bazali na likoki ya kolimbola makambo mingi oyo esalemaka na nzoto ya moto. Ezala bato ya mayele oyo bayekolaka nzoto ya moto to baoyo bayekolaka biloko oyo esimbi bomoi, moko te asili komona na nzoto ya moto eloko moko oyo emonanaka te mpe etikalaka na bomoi nsima ya liwa. Na yango, bato mingi ya siansi balobaka ete liwa ezali kaka kokufa ya binama nyonso oyo esalaka ete moto azala na bomoi.

Yango wana, tokoki kokamwa te soki bato mingi oyo bamonanaka ete bandimaka ete moto akobaka kozala na bomoi nsima ya liwa, babangaka na nse ya motema ete bakozala na bomoi lisusu te soki bakufi. Longola yango, makambo oyo Salomo, mokonzi na Yisalaele ya kala, akomaki mpo na liwa etindaka bato mosusu bábanga yango.

Soki moto azongi “putulu,” nyonso esili?

Na mokanda ya Mosakoli, oyo Salomo akomaki eleki sikoyo mbula 3000, alobaki ete: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te, bazali na libonza mpe te; kokanisa na bango esili kobungana. Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe zuwa na bango esili kobeba.” Abakisaki ete: “Oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na nguya na yo mpo ete ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika ya bakufi, esika ekokende yo.”​—Mosakoli 9:5, 6, 10.

Salomo alobaki ete “yango ekokwela bana ya bato, ekokwela mpe banyama; bobele likambo moko ekokwela bango. Lokola moko akokufa, oyo mosusu mpe akokufa . . . moto azali koleka likoló ya nyama te . . . Nyonso bakokenda na esika moko; nyonso elongwe na putulu, nyonso ekozonga na putulu lisusu.”​—Mosakoli 3:19, 20.

Atako mokonzi Salomo nde akomaki maloba yango, Nzambe nde atindaki ye akoma yango mpe akɔtisaki yango na Biblia, Liloba na ye. Bavɛrsɛ yango mpe ebele ya bavɛrsɛ mosusu, ekweisi likanisi oyo bato mingi bazalaka na yango ete moto azalaka na eloko moko na nzoto na ye oyo ekufaka te mpe ekómaka na bomoi ya ndenge mosusu nsima ya liwa. (Genese 2:7; 3:19; Ezekiele 18:4) Elingi nde koloba ete Nzambe ayebisi biso ete nsuka ya moto nyonso ezali kozonga “putulu” to kozanga bomoi mpo na libela? Ezali bongo te!

Biblia eteyaka te ete moto azali na eloko moko na nzoto na ye oyo etikalaka na bomoi nsima ya liwa. Kutu, epesi elikya ya solosolo mpo na bato oyo bazali kokufa. Lisolo oyo elandi ekomonisa ntina oyo esengeli kobanga te ete liwa ekosukisa bomoi na biso mpo na libela.

[Etanda na lokasa 3]

MONGUNA OYO TOKOKI KOKIMA TE

Babengaka liwa monguna ya moto. Ezali monguna ya solo, mpe tomonaka yango bisika nyonso. Lapolo moko emonisi ete bato soki milio 59 bakufaka mbula na mbula, elingi koloba pene na bato mibale bakufaka nsima ya segɔnde mokomoko. Ndenge nini bato yango bakufaka?

◼ Moto moko azali kokufa na bitumba nsima ya segɔnde 102 nyonso.

◼ Moto moko azali kobomama nsima ya segɔnde 61 nyonso.

◼ Moto moko azali komiboma nsima ya segɔnde 39 nyonso.

◼ Moto moko azali kokufa na likama ya motuka nsima ya segɔnde 26 nyonso.

◼ Moto moko azali kokufa mpo na kozanga bilei nsima ya segɔnde misato nyonso.

◼ Mwana moko oyo akokisi mbula mitano te azali kokufa nsima ya segɔnde misato nyonso.

[Etanda na lokasa 4]

MOSALA YA MPAMBA

Na mokolo ya 9 Novɛmbɛ 1949, James Kidd, mobali moko ya mbula 70 oyo azalaki motimoli ya kwivre, abungaki na bangomba ya Arizona, na États-Unis. Bambula mingi nsima ya kopesama ya liyebisi oyo emonisaki ete akufaki mpenza, balɔkɔtaki testama na ye oyo akomaki na krɛyɔ, mbongo, mpe mikanda mosusu oyo emonisaki ete azalaki na mbongo na bakompanyi mosusu. Mbongo nyonso oyo atikaki ezalaki bankóto ebele ya badolare. Na testama na ye, amonisaki ete bápesa bato ya siansi mbongo yango mpo báluka “makambo mpenza oyo emonisi ete molimo ebimaka na nzoto ya moto nsima ya liwa.”

Eumelaki te, bato koleka 100 oyo bamibengaki balukiluki mpe bato ya siansi basɛngaki mbongo yango. Na boumeli ya basanza mingi, tribinale eyokaki bato yango oyo babimisaki makanisi ndenge na ndenge mpo na komonisa ete moto azali na molimo oyo emonanaka te. Nsukansuka, zuzi apesaki mbongo yango na bibongiseli mibale oyo eyebani ete esalaka bolukiluki malamu. Nzokande lelo oyo, nsima ya mbula koleka 50, bato yango bamonisi naino te “makambo mpenza oyo emonisi ete molimo ebima ya moto nsima ya liwa.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto