Ndenge nini otalelaka liwa?
EZALA tozali nzoto kolɔngɔnɔ to tozali na bozwi mingi, ntango tozali kosala misala na biso mokolo na mokolo, tomonaka ete nyonso ezalaka lisusu na ntina te soki tokanisi kaka ete liwa ezali. Tokoki kokufa ntango tokokatisa lisusu balabala to ntango tokokende kolala na mbeto. Makambo lokola likama oyo esalemaki mokolo ya 11 Sɛtɛmbɛ 2001 na New York mpe na Washington, ezali komonisa biso mpenza ete oyo Biblia ebengi yango ete “monguna ya nsuka,” elingi koloba liwa, eponaka te: moto azala mobola to mozwi, mokóló to elenge. Kutu, ntango mosusu liwa ekómelaka ebele ya bato mbala moko, kaka na mwa miniti moke.—1 Bakolinti 15:26, NW.
Atako bongo, bato bamitunaka kaka ebele ya mituna na ntina na liwa. Ezali na nsango mosusu te oyo etindaka ebele ya bato básomba bazulunalo to mpe ebendaka ebele ya bato na kotala televizyo soki nsango ya liwa te, mingimingi soki ebele ya bato bakufi na likama moko ya nsɔmɔ. Bato balɛmbaka koyoka te soki bazali koyebisa likambo ya liwa, ezala ya bato bakufi na etumba, na likama oyo euti na koningana ya mabele, mpela, mopɛpɛ makasi to mpe mobulu, to na maladi. Mingimingi, ndenge oyo bato bamitungisaka mpo na liwa emonanaka na mawa oyo bazalaka na yango ntango moto moko ya lokumu to oyo ayebanaki mingi akufi.
Nyonso wana ezali makambo emonanaka. Bato balingaka koyoka makambo mingi soki moto mosusu akufi. Kasi, moto abangaka liwa na ye moko. Mingi kati na biso tolingaka ata moke te kokanisa liwa na biso moko.
Mpo na nini bato babangaka liwa?
Tosepelaka te mpe tokosepela ata mokolo moko te kokanisa liwa na biso moko. Mpo na nini? Mpamba te Nzambe atyá na makanisi na biso mposa makasi ya kozala na bomoi libela na libela. Mosakoli 3:11 (Louis Segond) elobi ete: “Atyá mpe na mitema na bango likanisi ya kozala seko.” Yango wana, lokola moto akoki kokima liwa te, bato bamitunaka mituna mingi mpe likambo yango etungisaka bango ntango nyonso. Mpo na komeka kosilisa mokakatano yango mpe kokokisa mposa wana ya kozala na bomoi libela na libela, bato babimisi mateya ndenge na ndenge; na ndakisa liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te to mpe oyo elobaka ete moto abotamaka mbala na mbala.
Atako bongo, liwa ebulunganisaka mpe ebangisaka kaka bato. Bato ya bikólo nyonso ya mokili babangaka liwa. Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ete bato balɛmbaka soki kaka bakanisi liwa. Likambo ezali ete liwa emonisaka ete komipesa na koluka bozwi mpe lokumu ezali na ntina moko te.
Mpo na nini batikaka moto ye moko ntango alingi kokufa?
Na ntango ya kala, moto oyo azali na maladi oyo emonani ete akokufa na yango to mpe moto oyo azoki na ndenge oyo ezali komonana ete akobika te, bazalaki kotika ye akufa na ndako na ye, na mabɔkɔ ya bandeko na ye. Ezalaki kosalema bongo na ntango oyo bazalaki kokoma Biblia, mpe na bamboka mosusu ata na moi ya lelo basalaka bongo. (Genese 49:1, 2, 33) Na ntango yango, bandeko ya moto yango bakutanaka, mpe ntango bazali kosolola, bana mike mpe bayokaka. Moto mokomoko na kati ya libota amonaka ete bato mosusu mpe bazali na mawa lokola ye mpe yango ebɔndisaka ye.
Nzokande, makambo esalemaka ndenge mosusu mpenza na bamboka oyo balingaka ata kolobela likambo ya liwa te, bamonaka yango lokola ekila, mpe balingaka te bana báyoka masolo yango mpo bamonaka ete “ezali makambo ya mikóló.” Lelo oyo, makambo mingi ezali lisusu ndenge ezalaki kala te: bazali kotika moto na esika ya ye moko ntango akómi pene ya kokufa. Atako bato mingi bakokaki kolinga ete bákufa na ndako na bango na kimya mpe na mabɔkɔ ya bandeko na bango, bato mingi bazali kokufa na lopitalo, mbala mingi na esika oyo bazali kobunda na mpasi kaka bango moko, na esika oyo batyeli bango bamasini ndenge na ndenge. Ezali mpe na bamilio ya bato oyo nsango ya liwa na bango eyokanaka te: bato oyo bazali kokufa na ntango bazali koboma ebele ya bato ya etuluka moko, baoyo bazali kokufa na nzala, na sida, na etumba, to mpe mpo na bobola makasi.
Likambo oyo tosengeli kokanisaka yango
Biblia epekisi te ete moto akanisa liwa. Kutu, Mosakoli 7:2 (Bible na Lingala ya lelo) elobi na biso ete: “Malamu kutu ókende na ndako oyo bazali kolela ebembe, esika ‘te ókende epai bazali kosalisa feti; pamba té liwa ezali suka ya moto nyonso.” Ntango tokei na esika ya ebembe, totikaka naino makanisi to misala oyo tosalaka pembeni mpe tokanisaka bomoi mokuse oyo tozali na yango. Yango ekoki kosalisa biso tózala na bomoi oyo ezali na ntina mpenza na esika ete tósakana na yango.
Ndenge nini otalelaka liwa? Osilá kotalela ndenge omiyokaka, bindimeli na yo, bilikya na yo, to mpe mabanzo na yo mpo na nsuka ya bomoi na yo?
Moto akoki te kokanga ntina ya liwa mpe kolimbola yango, ndenge mpe akokite kokanga ntina ya bomoi mpe kolimbola yango. Na likambo yango, kaka Mozalisi nde akoki koloba makambo oyo tokoki kotyela motema. Ye nde azali “liziba ya bomoi” mpe “kobika na ntango ya kufa” ezali na mabɔkɔ na ye. (Nzembo 36:9; 68:20) Soki tolobeli makambo mosusu oyo bato bandimaka mpo na liwa mpe totali oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na yango, tokokamwa na komona ete yango ekobɔndisa biso mpe ekolendisa biso. Tokomona ete liwa ezali nsuka ya makambo nyonso te.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
Lokola liwa ezali, yango ezali kosalisa biso tózala na bomoi oyo ezali na ntina mpenza