Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/09 nk. 16-17
  • Okanisi boni mpo na batitre ya lokumu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okanisi boni mpo na batitre ya lokumu?
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kokumisa bakonzi elimboli te kondima bizaleli na bango
  • Paulo asalelaki batitre ya lokumu
  • Lokumu yango ezali na ndelo
  • “Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Paulo atatoli na molende liboso ya bakonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Salisá basusu bándima nsango ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Tokumisa bato nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 1/09 nk. 16-17

Biblia elobi nini?

Okanisi boni mpo na batitre ya lokumu?

NTANGO baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosala misala na bango ya mokolo na mokolo mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, bazalaki kokutana na bakonzi mingi ya guvernɛma: ya mike mpe ya minene. Bayekoli ya Yesu bazalaki te na batitre ya lokumu mpo na komonisa soki oyo azali boye to boye. Nzokande, na ntango wana, bato oyo bazalaki bakonzi bazalaki kolinga ete bato bábengaka bango na batitre ya lokumu. Bazalaki kobenga amperɛrɛ ya Loma “Wa-Lokumu.”​—Misala 25:21.

Kasi, ntango bazalaki kosamba liboso ya bakonzi, ndenge nini bayekoli ya Yesu bazalaki kosala mpo na batitre wana ya lokumu? Biso tosengeli kosala nini?

Kokumisa bakonzi elimboli te kondima bizaleli na bango

Ntoma Paulo apesaki baninga na ye baklisto toli ete ‘bázongisa epai ya banso oyo esengeli na bango, epai ya oyo asɛngi lokumu, lokumu.’ (Baloma 13:7) Yango emonisaki ete basengelaki mpe kobenga bakonzi na batitre na bango ya lokumu. Lelo oyo, bato basalelaka batitre lokola mokonzi, mpe prezida mpo na kobenga baoyo bazali na bokonzi. Kasi, moto mosusu akoki komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kobenga moto na titre ya ndenge wana ntango nayebi ete etamboli na ye ezali malamu te?’

Bakonzi mingi bakokisaka mikumba na bango na ndenge ebongi, kasi bango nyonso te nde bazali bato ya kotyela motema. Atako bongo, Biblia ezali kolendisa biso tótosa bakonzi mpe baguvɛrnɛrɛ “mpo na Nkolo.” (1 Petelo 2:13, 14) Na yango, soki tozali kondima bokonzi ya bato oyo bazali kokamba mpo Nzambe apesi bango nzela, ekoki kotinda biso tótosa bango mpe tópesa bango lokumu oyo ebongi na bango.​—Baloma 13:1.

Baloma mokapo ya 13 elobeli etamboli ya bakonzi te; ezali te etamboli ya mokonzi nde esengeli kotinda biso tókumisa ye to te. Kobenga mokonzi na titre na ye ya lokumu emonisi te ete tondimi etamboli na ye. Yango emonisami na likambo moko oyo ekómelaki ntoma Paulo.

Paulo asalelaki batitre ya lokumu

Bakangaki ntoma Paulo na Yelusaleme mpo na makambo oyo bakoselaki ye mpe bamemaki ye liboso ya Felikisi, guvɛrnɛrɛ ya Yudea. Felikisi azalaki mokonzi ya bizaleli mabe mpenza. Tacite, moto moko ya istware ya Loma, akomaki ete Felikisi “azalaki kokanisa ete akoki kosala likambo nyonso ya mabe mpe moto akosala ye eloko te.” Azalaki kolinga mingi kozwa kanyaka na esika ya kokata makambo na bosembo. Atako bongo, na boumeli ya mbula mibale oyo azalaki na bolɔkɔ, Paulo amonisaki limemya epai ya guvɛrnɛrɛ, mpe bango mibale bazalaki kosolola mbala na mbala. Felikisi azalaki kokanisa ete Paulo akopesa ye mbongo, kasi amikosaki, mpe Paulo asalelaki libaku yango mpo na kopesa ye litatoli.​—Misala 24:26.

Ntango Fesitusi akómaki guvɛrnɛrɛ na esika ya Felikisi, atalelaki likambo ya Paulo na Kaisalia. Mpo bakonzi ya Bayuda bándima ye, Fesitusi amonaki malamu ete Paulo akende kosamba na Yelusaleme. Kasi, Paulo ayebaki ete kuna, bakosambisa ye na bosembo te, yango wana asalelaki lotomo na ye ya Moloma mpe alobaki ete: “Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”​—Misala 25:11.

Fesitusi ayebaki mpenza te ndenge nini akokaki koyebisa Kaisala makambo oyo bafundaki Paulo, kasi ayaki koyeba likambo yango malamu ntango mokonzi Agilipa II ayaki kotala ye mpe asepelaki koyoka Paulo. Mokolo oyo elandaki, bakomanda ya basoda mpe bato minene ya engumba yango, bayaki elongo na mokonzi Agilipa na tribinale.​—Misala 25:13-23.

Ntango bapesaki ye maloba, Paulo asalelaki titre “Mokonzi” na maloba na ye ya ebandeli mpe andimaki ete Agilipa ayebi malamu mimeseno mpe bantembe oyo ezalaka na kati ya Bayuda. (Misala 26:2, 3) Na ntango wana, mokonzi Agilipa azalaki na lokumu te mpo na likambo ya mabe mpe ya nsɔni oyo asalaki: azwaki ndeko na ye ya mwasi mpe akómisaki ye mwasi na ye. Na ntembe te, Paulo ayebaki malamu ete Agilipa azalaki na etamboli ya mabe mpenza. Atako bongo, Paulo apesaki ye lokumu oyo ebongi na mokonzi.

Ntango Paulo azalaki kosamba, Fesitusi agangaki boye: “Ozwi ligboma, Paulo!” Na esika ya kosilika, Paulo ayanolaki nde na motema mpiɔ, abengaki guvɛrnɛrɛ yango “Moto ya Lokumu.” (Misala 26:24, 25) Paulo amoniselaki ye limemya oyo ebongi na mokonzi. Kasi, bandakisa wana ebimisi motuna oyo: “Tosengeli kokumisa bakonzi tii wapi?”

Lokumu yango ezali na ndelo

Bokonzi ya bato ezali na ndelo, ndenge Baloma 13:1 emonisi yango ete: “Bakonzi oyo bazali batyami na bibonga na bango oyo elandá na nzela ya Nzambe.” Yango wana, lokumu oyo tosengeli kopesa bakonzi ezali mpe na ndelo. Yesu amonisaki ete lokumu oyo tosengeli kopesa bakonzi ezali na ndelo ntango alobaki na bayekoli na ye ete: “Bóbengama Labi te, mpo kaka moko nde azali moteyi na bino, nzokande bino nyonso bozali bandeko. Lisusu, bóbenga moto moko te tata na bino awa na mabelé, mpo kaka moko nde azali Tata na bino, Oyo azali na likoló. Bóbengama mpe te ‘batambwisi,’ mpo Motambwisi na bino azali kaka moko, Klisto.”​—Matai 23:8-10.

Na yango, ntango tolingi kopesa moto lokumu tosengeli kotala soki azali mokonzi ya mokili to mokonzi ya mangomba. Atako Paulo alobaki ete tosengeli kopesa bakonzi lokumu, soki na molulu moko bakonzi ya mokili bazwi batitre ya mangomba, tosengeli te kobenga bango na batitre wana ya mangomba. Moto oyo alandaka toli ya Biblia akomemya bakonzi yango. Kasi, lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia ekotinda ye aboya kosalela batitre ya lokumu ya mangomba, mpo asengeli ‘kozongisa biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.’​—Matai 22:21.

OSILÁ KOMITUNA?

◼ Ndenge nini bayekoli ya Yesu bazalaki kotalela bakonzi?​—Baloma 13:7.

◼ Ntoma Paulo asalelaki batitre ya lokumu mpo na kobenga bakonzi?​—Misala 25:11; 26:2, 25.

◼ Batitre nini ya lokumu Yesu aboyaki?​—Matai 23:8-10.

[Elilingi na lokasa 17]

Paulo abengaki Agilipa na titre nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto