Ndenge ya kosalisa moninga oyo azali kobɛla
EKÓMELÁ yo naino te ozanga maloba ya koloba na moninga na yo oyo azali kobɛla makasi? Yebá ete okoki kolonga mokakatano yango. Ndenge nini? Ezali mpenza na mobeko te mpo na likambo yango. Ekoki kotalela mimeseno ya bato. Bizaleli ya bato ekoki mpe kokesana makasi. Na yango, likambo oyo ekoki kosepelisa moto moko oyo azali kobɛla ekoki kosala mosusu mpasi. Lisusu, mokolo na mokolo ezalaka na makambo na yango mpe ndenge oyo moto azali komiyoka mokolo moko ekoki kozala ndenge moko te na mokolo oyo ekolanda.
Na yango, likambo eleki ntina oyo okoki kosala ezali ya komitya na esika ya moto oyo azali kobɛla mpe koluka koyeba likambo oyo alingi mpenza osalela ye. Ndenge nini okoki kosala yango? Talá mwa makanisi oyo euti na Biblia.
Zalá moyoki malamu
MAKANISI YA BIBLIA:
“Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te.”—YAKOBO 1:19.
“Ezali na . . . ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.”—MOSAKOLI 3:1, 7.
◼ Ntango okei kotala moninga moko oyo azali kobɛla, tyá likebi mpenza ntango azali koloba mpe omitya na esika na ye. Kowela te kopesa toli to kokanisa te ete osengeli ntango nyonso koyebisa ye likambo oyo asengeli kosala. Soki ozali kowela koloba, okoki kozanga kokana koloba likambo moko oyo ekoki kosala ye mpasi. Moninga na yo oyo azali kobɛla azali koluka kaka te moto oyo akopesa ye biyano, kasi moto oyo akoyoka ye na motema moko.
Tiká moninga na yo abimisa makanisi na ye polele. Kokataka ye maloba te, kolekisa ndelo te na maloba ya kolendisa. Emílioa, alobi boye: “Nabɛlaki maladi ya méningite (méningite fongique) mpe yango ebomaki ngai miso.” Mikolo mosusu nazalaki kolɛmba mpenza nzoto mpe baninga bazalaki koluka kobɔndisa ngai boye: ‘Ozali yo moko te nde okutani na mikakatano. Ezali na bato mingi oyo bazali na mpasi kutu koleka yo.’ Nzokande, bayebaki te ete ndenge bazali koloba ezalaki kosalisa ngai te. Kutu, ezalaki nde kopesa ngai lisusu mpasi mpe kosilisa ngai elikya.
Tiká moninga na yo ayebisa makambo oyo ezali na motema na ye kozanga kobanga. Soki ayebisi yo ete azali kobanga, ndimelá ye na esika ya koyebisa ye kaka ete kobanga te. Eliana, azali kobundana na maladi ya kanser, alobi boye: “Ntango nazali kobanga mpo na maladi na ngai mpe nazali kolela, yango elakisi te ete nazali lisusu kotyela Nzambe motema te.” Salá makasi otalela moninga na yo ndenge azali, kasi te ndenge oyo yo olingi ete azala. Kobosana te ete akoki koyoka mpasi mpo na makambo oyo okoki koloba na ye, mpe ete azalaka ndenge wana te. Zalá motema molai. Yoká ye—ata soki azali kozongela kaka likambo moko wana mbala na mbala. (1 Bakonzi 19:9, 10, 13, 14) Akoki koyoka mposa ya koyebisa yo makambo oyo ezali kotungisa ye.
Omitya na esika na ye mpe zalá na boboto
MAKANISI YA BIBLIA:
“Bósepela elongo na bato oyo bazali kosepela; bólela elongo na bato oyo bazali kolela.”—BAROMA 12:15.
“Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.”—MATAI 7:12.
◼ Omitya na esika ya moninga na yo. Soki azali komibongisa mpo na lipaso, kozwa nkisi, to azali kozela monganga ayebisa ye maladi oyo azali kobɛla, akoki kozala motema likolólikoló mpe ata likambo moke ekoki kosala ye mpasi. Kobosana yango te mpe luká komesana na ndenge akómi. Yango ezali te ntango ya kotuna mituna ebeleebele mingimingi makambo oyo etali ye moko.
Ana Katalifós, monganga moko ya maladi ya motó, alobi ete: “Ntango bato ya maladi balingi kolobela maladi na bango tikelá bango nzela ya koloba mpe ndenge oyo balingi kolobela yango.” “Ntango balingi kosolola, sololá na bango na likambo nyonso oyo baponi. Kasi, soki bazali na mposa te ya kosolola, ekozala malamu ofanda nyɛɛ, mpe kosimba kaka lobɔkɔ ya moto oyo azali kobɛla ekoki kosala ye malamu. To okoki komona ete likambo oyo balingi ezali kaka ya kozala na moto oyo akokabola na bango mawa.”
Bombá sekele ya moninga na yo. Rosanne Kalick, mokomi moko oyo abɛlaki maladi ya kanser mbala mibale mpe abikaki, akomi boye: “Ntango ozali koluka kosalisa moninga na yo oyo azali kobɛla, kobosana te ete makambo oyo azali koyebisa yo ezali sekele. Lobá kaka soki asɛngi yo obima lokola ndeko na ye ya libota mpo olobelaka ye makambo, kobimisaka basekele na ye te. Tuná ye makambo oyo alingi oyebisa bato.” Edson, moto mosusu oyo abikaki mpe na maladi ya kanser, alobi boye: “Moninga moko apanzaki ngai nsango ete nazali na maladi ya kanser mpe alobaki ete nazali lisusu na bomoi molai te. Nayebaki ete nazali na maladi ya kanser, bautaki kosala ngai lipaso. Kasi, nazalaki kozela minganga báyebisa ngai makambo oyo bamonaki na ekzamɛ (biopsie) oyo basalaki ngai. Kanser epanzanaki naino na nzoto te. Kasi, apanzaki ngai nsango ya mabe. Maloba ya bato mosusu mpe mituna oyo bazalaki kotuna mwasi na ngai epesaki ye mpasi makasi na motema.”
Soki moninga na yo azali koluka nkisi nini akozwa, kowela te koloba ndenge oyo yo okoki kosala soki ozalaki na esika na ye. Lori Hope, mokomi moko oyo abikaki mpe na maladi ya kanser alobi boye: “Liboso otindela moto oyo azali kobɛla maladi ya kanser to oyo abiki na maladi yango, masolo to bansango ya ndenge nyonso, ekozala malamu otuna soki akosepela kozwa bansango ya ndenge wana. Soki osali bongo te, makanisi na yo wana ya malamu ekoki kozokisa moninga na yo kozanga ete oyeba yango.” Moto nyonso te nde asepelaka koyoka makambo ebeleebele na oyo etali lolenge ya nkisi ya monganga.
Ata soki ozali moninga na ye ya motema, koumela mingi te epai na ye. Kokende kotala ye ezali na ntina, kasi ekoki kozala na ntango oyo moninga na yo akosepela te kozala na bato. Akoki kolɛmba, mpe kozala na makasi mingi te ya koloba ata mpe koyoka bato ntango molai. Epai mosusu, komonisa mpe te ete ozali motema likolólikoló mpo na kokende. Moninga na yo asengeli komona mpenza ete omibanzabanzaka mpo na ye.
Komonisa boboto esɛngaka mpe kozala na bokatikati mpe na bososoli. Na ndakisa, liboso ya kolambela moninga na yo oyo azali kobɛla to mpe komemela ye bafɔlɔ ekosɛnga oyeba soki ezali na biloko oyo ezali kosala ye mabe na nzoto soki alei to soki ezali pembeni na ye. Soki yo moko mpe ozali maladi, na ndakisa soki ozali na grippe, ekozala malamu ozela tii ekosila liboso okende kotala moninga.
Zalá na maloba ya kolendisa
MAKANISI YA BIBLIA:
“Lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.”—MASESE 12:18.
“Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa.”—BAKOLOSE 4:6.
◼ Soki ozali kotalela na ndenge ya malamu, moninga na yo oyo azali kobɛla, na ntembe te, maloba mpe makambo oyo ozali kosala ekomonisa yango. Talelá moninga na yo kaka ndenge azalaka, azali kaka na bizaleli oyo etindaki yo okóma moninga na ye. Taleláká nde ye, kasi maladi na ye te. Soki ozali kosolola na moninga na yo lokola moto oyo elikya ezali lisusu te mpo na ye, ye moko mpe akobanda komimona bongo. Roberta, oyo abotamá na maladi moko ya mikuwa, alobi boye: “Zwá ngai lokola moto nyonso. Nazali ebɔsɔnɔ, kasi nazalaka na ndenge na ngai ya kotalela makambo mpe bamposa na ngai. Kotalatalaka ngai te na miso ya mawa. Kosololaka na ngai te lokola nde nazali zoba.”
Kobosana te ete ezali kaka te likambo oyo ozali koloba, kasi nde lolenge oyo ozali kolobela yango nde ezali na ntina. Ata mongongo na yo ekoki kosala likambo. Mwa moke nsima ya koyebisa ye ete azali na maladi ya kanser, moninga moko ya Ernesto oyo afandaka na mokili mosusu abengaki ye na telefone mpe alobaki boye: “Nakoki kondima te ete yo ozali na maladi ya kanser!” Ernesto alobi boye: “Ndenge oyo mongongo na ye eyokanaki ntango alobaki liloba ‘yo’ mpe ‘kanser’ esalaki ngai malili na nzoto.”
Lori Hope, mokomi oyo totángaki liboso apesi ndakisa mosusu: “Kotuna moto ‘ozali malamu?’ ekoki koloba makambo mingi epai ya moto oyo azali kobɛla. Na kotalela mongongo oyo moto oyo atuni motuna yango asaleli, bajɛstɛ oyo azali kosala, boninga oyo bozali na yango, ndenge oyo bameseni na moto yango, ata mpe ntango oyo atuni motuna yango, ekoki kopesa moto ya maladi makasi, kopesa ye mpasi, to kotinda ye akóma kobanga.”
Na ntembe te, moninga oyo azali kobɛla azalaka na mposa amona ete bazali komibanzabanza mpo na ye, koyoka, mpe komemya ye. Na yango, osengeli kosalisa ye ayeba ete azali mpenza na ntina mpo na yo mpe okozala wana mpo na kosalisa ye. Rosemary, moto moko oyo abɛlaki kanser ya bɔɔngɔ, alobi boye: “Likambo mpenza oyo elendisaki ngai ezalaki ya koyoka baninga na ngai koloba ete balingaka ngai mpe bakotika ngai te ata soki likambo nini eyei.”—Masese 15:23; 25:11.
Yebá kosunga
LIKANISI YA BIBLIA:
“Tólingaka, na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.”—1 YOANE 3:18.
◼ Bamposa ekoki kokesana ntango moninga na yo basali ye baekzamɛ mpe ntango abandi nkisi. Kasi na ntango wana nyonso akozala na mposa osalisa ye. Na esika oloba kaka ete “soki ozali na mposa ya lisalisi bengá ngai,” monisá polele likambo oyo olingi kosalela ye. Kosɛnga osalela ye misala ya mokolo na mokolo na ndakisa, kolambela ye biloko, kosukolela ye ndako, kosukolela ye bilamba to basaani, kongoma bilamba, kosalela ye misala mosusu ya mikemike, na ndakisa kokende kosomba biloko, kotika ye na lopitalo mpo azwa nkisi mpe kokende kozwa ye ezali kaka mwa makambo oyo okoki kosala mpo na komonisa ete ozali komibanzabanza mpo na ye. Zalá sembo mpe tosáká ngonga. Kokisáká maloba na yo.—Matai 5:37.
Rosanne Kalick, alobi lisusu boye: “Likambo nyonso oyo tozali kosala ezala ya monene to ya moke oyo ezali kosala ete moto oyo azali kobɛla abosana maladi na ye, ekosalisa ye.” Sílvia, oyo abɛlaki maladi ya kanser mbala mibale mpe abikaki, andimi likambo yango. Alobi boye: “Lokola baninga ndenge na ndenge bazalaki komema ngai mokolo na mokolo na engumba mosusu mpo nazwa nkisi, ezalaki kosala ete nayoka malamu mpe nazala makasi! Na nzela, tozalaki kosolola makambo ndenge na ndenge, mpe nsima ya kozwa nkisi tozalaki kokɔta na esika moko mpo na komɛla kafe. Yango ezalaki kosalisa ngai nayoka malamu lisusu.”
Kasi, kotuta ntolo te ete oyebi mpenza makambo oyo moninga na yo azali na yango mposa. Kalick, alobi boye: “Tuná, tuná, tuná.” Abakisi ete: “Soki ozali na mposa ya kosalisa, kokanisa te ete oyebi makambo nyonso. Yango ekoki kosalisa te. Soki ozali kotikela ngai te ete nasala ata likambo moko, yango ekomonisa ete nakokoka kosala eloko te. Nazali na mposa ya komona ete nakoki kosala eloko. Nasengeli komona te ete nazangi ntina. Salisá ngai nasala oyo nakoki.”
Na ntembe te, moninga na yo akolinga koyoka ete akoki kosala likambo. Adilson, oyo azali na maladi ya Sida, alobi boye: “Ntango ozali kobɛla, okolinga te bátya yo pembeni, lokola nde ozali na ntina te to okoki ata kosala likambo moko te. Okosepela ete osalisa ata mwa moke, ata soki ekosɛnga osala mwa makambo ya mikemike. Ekozala malamu oyoka ete ozali naino na makoki ya kosala ata mwa eloko! Ekopesa yo mposa ya kozala na bomoi. Nazalaka na mposa bato bátika ngai nazwa bikateli mpe na nsima bátosa bikateli na ngai. Kozala maladi elingi koloba te ete tokoki te kokokisa mikumba na biso lokola tata, mama, to mikumba mosusu.”
Kosundola moninga te
LIKANISI YA BIBLIA:
“Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”—MASESE 17:17.
◼ Soki ozali na likoki te ya kokende kotala moninga na yo mpo ofandi mosika to mpo na makambo mosusu, okoki kobenga ye na telefone, kokomela mokanda, to kokomela ye na internet. Makambo nini okoki kokoma? Alan Wolfelt, mopesi-toli moko, alobi boye: “Lobelá lisusu bisengo oyo bokutanaki na yango. Yebisá ye ete mosika te, okokomela ye lisusu—mpe kokisá maloba na yo.”
Kotika te kolendisa moninga oyo azali kobɛla, kobanga te ete okoloba likambo moko ya mabe. Mbala mingi, kokende kotala ye nde ezali na ntina. Na buku na ye, Lori Hope akomaki boye: “Biso nyonso tolobaka mpe tosalaka makambo oyo moto akoki kotalela yango na ndenge mosusu to mpe kozanga kokana ekoki kosala moto mosusu mpasi. Yango ezali likambo te. Likambo ebimaka nde ntango ozali kobanga kosala libunga mpe okómi kokima moto oyo azali na mposa ya lisalisi na yo.”
Moninga oyo azali kobɛla azali mpenza na mposa na yo makasi sikoyo koleka ndenge ezalaki liboso. Monisá ete ozali “moninga ya solosolo.” Milende na yo mpo na kosalisa ye ekoki kosilisa te mpasi na ye, kasi okoki kosala ete moto oyo olingaka ayikela mpasi na ye mpiko.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo mosusu ezali ya bango te.