Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/09 nk. 26-27
  • Baombo ya bisanga ya sudi oyo bato babosaná

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baombo ya bisanga ya sudi oyo bato babosaná
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mombongo ya baombo na Pasifike ya Sudi
  • Makambo ebongwani
  • Bakanisi bango
  • Nkombo ya Yehova na bisanga ya Pasifike
    Lamuká!—2004
  • Tozwá ‘liyaka ya motuya monene’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • “Nsango malamu” esakolami na bisanga ya Australie oyo ezali mosika na nɔrdi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bamilió ya bato bakómi baombo
    Lamuká!—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 4/09 nk. 26-27

Baombo ya bisanga ya sudi oyo bato babosaná

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA FIDJI

BATO basepelaki ntango bamonaki masuwa mibale ekɔti na mwa esanga moko na mbu ya Pasifike. Mwa bambula liboso, moto moko oyo abikaki na masuwa moko oyo ezindaki akabelaki libota mokomoko ya esanga yango nkasa ya Biblia na ye. Bato yango batángaki makambo oyo ezalaki na nkasa yango na esengo mpenza mpe banda wana bazalaki kozela moklisto moko aya koteya bango.

Sikoyo, bato ya masuwa balaki bato ya esanga yango ete bakomema bango esika oyo bakoki koyekola makambo ya Nzambe. Bato soki 250, basi mpe mibali, bakɔtaki na kati ya masuwa, mpe mingi kati na bango bamemaki nkasa na bango ya Biblia oyo bazalaki kobatela malamu.

Nzokande, bakosaki bango. Ntango bakɔtaki na kati ya masuwa, bakangaki bango mabɔkɔ ná makolo, babwakaki bango na nkɔbɛ mpe bamemaki bango mosika na libongo ya Callao na Amerika ya Sudi. Na nzela, mingi bakufaki mpo na bosɔtɔ. Bazalaki kosangisa na bango nzoto na makasi. Baoyo babikaki batɛkamaki lokola baombo mpo na kosalaka bilanga mpe kotimolaka charbon to kosala misala ya ndako, mpe bazongaki lisusu na mboka na bango te.

Mombongo ya baombo na Pasifike ya Sudi

Na ekeke ya 19 mpe na ebandeli ya ekeke ya 20, bakómaki kokanga bato ya bisanga ya Pasifike ya Sudi mpe kotɛka bango lokola baombo. Na ebandeli ya bambula ya 1860, likambo yango esalaki ete ebele ya bato yango bátɛkama na Amerika ya Sudi. Na boumeli ya mbula soki zomi oyo elandaki, bakómaki komema bango na Wɛsti, na Australie. Na mobu 1867, Ross Lewin, oyo azalaká liboso soda ya Angeterre, akómaki komemela bankóló bilanga ya nkoko mpe ntokia “bato ya bisanga oyo bazalaki bingambe mpe makasi na mosala; azalaki kotɛka mokomoko na motuya ya [livres] 7.”

Bakonzi ya Angleterre basalaki makasi mpo na kopekisa mombongo yango, kasi balongaki te. Ya liboso, mpo ezalaki mpasi kosɛnga bato ya bikólo mosusu bátosa mibeko ya Angleterre. Lisusu, mibeko ya Angleterre emonisaki polele te soki moombo azali nani. Yango wana, bato oyo bazalaki kosala mombongo ya baombo bazalaki koloba ete atako bazalaki kokosa bato yango mpe komema bango na makasi, bazalaki mpenza baombo te, kasi bazalaki nde bato ya mosala oyo bazalaki na lifuta mpe na nsima bakokaki kozonga na bamboka na bango. Bamosusu kutu balobaki ete bazalaki kosunga bato yango na ndenge bazalaki komema bango na nse ya mibeko ya Angleterre mpe kolakisa bango mosala. Mpo na yango mombongo ya baombo ekobaki na boumeli ya mwa bambula.

Makambo ebongwani

Ntango bato ya mitema malamu bakómaki kotɛmɛla mombongo ya baombo, makambo ekómaki kobongwana. Lokola bato mosusu ya bisanga yango bakómaki komipesa bango moko, ebongaki lisusu te bákanga bango na makasi. Basengelaki lisusu mpe te kobɛta bango, kotya bango bilembo na nzoto, to mpe konyokola bango ndenge ezalaki liboso.

Makambo ebongwanaki lisusu makasi ntango Patteson, episkɔpɔ ya lingomba ya Anglican, moto oyo azalaki kotɛmɛla polele mombongo ya baombo, abomamaki na bato ya bisanga yango oyo azalaki kobatela. Bato oyo bazalaki kosomba baombo basalelaki mayele ya mabe, bayaki na masuwa oyo ekokanaki na oyo ya Patteson. Babengaki bato ya esanga yango bákɔta mpo na kokutana na episkɔpɔ yango. Bato yango bamonanaki lisusu te. Ntango Patteson ye moko ayaki, bato ya esanga yango batombokaki mpe babomaki ye. Mpo na likambo yango, mpe mpo na botɛmɛli ya bato, guvɛrnema ya Angleterre ná ya France batyaki bamasuwa na bango na mbu ya Pasifike mpo na kosukisa likambo yango.

Baguvɛrnema ya Nouvelle-Galles du Sud mpe ya Queensland na Autralie bapesaki mabɔkɔ na likambo yango mpe bandimaki mibeko ndenge na ndenge mpo na kosukisa likambo ya kotɛka mpe konyokola baombo. Batyaki bato na bango na bamasuwa oyo ezalaki kokende kozwa bato ya mosala na bisanga mpo na kotala soki bazalaki konyokola bango to te. Likambo yango ebimisaki matomba, mpo bazalaki lisusu te koluka kosambisa moto oyo azwi bato na boombo, kasi nde moto oyo azwi bato na makasi mpo bákóma baombo to abomi bango. Na boumeli ya bambula zomi ya nsuka ya ekeke ya 19, mbongwana monene esalemaki na Sudi ya mbu ya pasifike. Na ebandeli ya ekeke ya 20, likambo ya kotɛka baombo esilaki, bato bazalaki lisusu mpe te komipesa mingi lokola baombo.

Na mobu 1901, parlema ya sika ya Australie, ekómaki kotalela makambo ya bapaya na ekólo mobimba. Mibeko na yango eyokanaki na makanisi ya bato, oyo na ntango wana bakómaki kosepela lisusu te na baombo, mpe bakómaki kobanga ete bankóló mboka bakozanga misala. Bazalaki lisusu kosepela na bato ya bisanga te, ata soki bazali baombo to te. Mpo na yango, babenganaki mingi kati na bango, mpe yango epesaki mpasi mingi mpo basusu basengelaki kokabwana na bato oyo bamesanaki na bango mingi.

Bakanisi bango

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 2 000, guvɛrnema ya Queensland ebimisaki liyebisi moko. Endimaki mosala oyo bato ya bisanga basalaki mpo na komatisa nkita, ntɔki, mpe lokumu ya Qeensland. Basɛngaki mpe bolimbisi mpo na ndenge banyokolaki bato yango.

Na boumeli ya bambula, bato mingi bazwaki baninga na bango bato lokola baombo mpo bákóma na bozwi mingi. Biblia elaki ete na nse ya Bokonzi ya Nzambe makambo ya ndenge wana ekozala lisusu te. Ya solo, bato oyo bakozala na mokili na nse ya boyangeli ya Nzambe “bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse [ya nzete na ye ya vinyo, NW] mpe na nzete na ye [ya figi, NW], moto moko akobangisa bango te.”​—Mika 4:4.

[Etanda/​Karte na lokasa 27]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Banzela oyo bazalaki komema baombo na Autralie mpe na Sudi ya Amerika

PACIFIC OCEAN

MICRONESIA

MARSHALL ISLANDS

New Guinea

SOLOMON ISLANDS

TUVALU

AUSTRALIA KIRIBATI

QUEENSLAND VANUATU

NEW SOUTH WALES NEW CALEDONIA SOUTH AMERICA

Sydney ← FIJI → Callao

SAMOA

TONGA

COOK ISLANDS

FRENCH POLYNESIA

Easter Island

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]

National Library of Australia, nla.pic-an11279871

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto