Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w19 Avril nk. 26-30
  • Tozwá ‘liyaka ya motuya monene’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozwá ‘liyaka ya motuya monene’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Masolo mosusu
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Jéhovah abatelaki ngai malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
w19 Avril nk. 26-30
Winston ná Pam Payne, na bolenge, bafandi na libanga moko pembeni ya mbu

LISOLO YA BOMOI

Tozwá ‘liyaka ya motuya monene’

Lisolo ya Winston ná Pamela Payne

WINSTON ná Pamela (Pam) Payne basalaka na Betele ya Australasie. Bazali na bomoi ya esengo, kasi bakutanaki mpe na mikakatano ebele; na ndakisa, esɛngaki bámesana na mimeseno ya bamboka ndenge na ndenge mpe Pam azwaki zemi kasi mwana akufaki na libumu. Nzokande, na makambo wana nyonso, bakobaki kolinga Yehova mpe basaleli na ye, mpe babatelaki esengo na mosala ya kosakola. Na mituna-lisolo oyo, tosɛngaki bango bálobela makambo mosusu oyo bakutaná na yango.

Ndeko Winston, yebisá biso ndenge oyo olukaki Nzambe.

Nakolá na libota moko oyo ezalaki kokipe makambo ya Nzambe te, na ferme moko na engumba Queensland, na Australie. Lokola tozalaki kofanda mosika, nazalaki kosolola mpenza te na bato mosusu, kaka na bato ya libota na ngai. Ntango nakómaki na mbula soki 12, nabandaki koluka Nzambe. Nabondelaki ye, nasɛngaki ye ete asalisa ngai nayeba ye. Nsukansuka, nalongwaki na ferme mpe nazwaki mosala na engumba Adélaïde, na Australie-Méridionale. Ntango nakómaki na mbula 21, nakutanaki na Pam na engumba Sydney, epai nakendaki konje; ayebisaki ngai makambo etali lingomba moko ya bato oyo bazalaki koloba ete bato ya Grande-Bretagne bazali bakitani ya mabota ya ekólo Yisraele oyo ebungá. Bato yango balobaka ete mabota yango ezali mabota zomi ya bokonzi ya nɔrdi oyo ekendaki na boombo na siɛklɛ ya mwambe L.T.B. Ntango nazongaki na Adélaïde, nasololaki likambo yango na moninga moko ya mosala oyo abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Nsima ya kosolola na ye kaka mwa bangonga, mingimingi mpo na bindimeli ya Batatoli, namonaki ete nabandaki kozwa eyano na libondeli oyo nasalaki na bomwana. Makambo oyo nazalaki koyoka ezalaki solo oyo etali Mozalisi mpe Bokonzi na ye! Nazwaki ‘liyaka ya motuya monene.’​—Mat. 13:45, 46.

Ndeko Pam, yo mpe obandaki koluka liyaka yango banda bomwana. Ndenge nini ozwaki yango?

Nakolá na libota moko oyo elingaki makambo ya Nzambe, na engumba Coffs Harbour, na Nouvelle-Galles du Sud. Baboti na ngai ná bankɔkɔ na ngai bazalaki bandimi ya lingomba ya bato oyo bazalaki koloba ete bato ya Grande-Bretagne bazali bakitani ya mabota ya ekólo Yisraele oyo ebungá. Banda bomwana, ngai, leki na ngai ya mobali, yaya na ngai ya mwasi, mpe bana ya bandeko ya mama na biso, bazalaki koteya biso nyonso ete Nzambe amonisaka boboto epai ya bato oyo bankɔkɔ na bango bazalaki bato ya Grande-Bretagne. Nazalaki kondima likambo yango te, mpe nazalaki komona ete nayebi Nzambe malamu te. Ntango nakómaki na mbula 14, nakendaki na bandako-nzambe ndenge na ndenge ya mboka na biso, na ndakisa, Anglican, Baptiste, mpe Lingomba ya Adventiste. Kasi, mposa na ngai ya koyeba Nzambe esilaki te.

Na nsima, libota na biso mobimba toyaki kofanda na Sydney, epai nakutanaki na Winston, oyo azalaki na konje kuna. Ndenge alobaki yango, lisolo na biso oyo etalaki mangomba esalaki ete abanda koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Banda wana, mikanda oyo azalaki kokomela ngai etondaki na bavɛrsɛ ya Biblia! Mpo na koloba solo, na ebandeli etungisaki ngai, kutu ezalaki kopesa ngai nkanda. Kasi mokemoke, nabandaki komona ete makambo oyo azalaki kokoma ezalaki solo oyo etali Nzambe.

Na 1962, nakendaki kofanda na Adélaïde mpo nazala pene ya Winston. Abongisaki ete nafanda elongo na ndeko Thomas Sloman ná mwasi na ye Janice, oyo bazaláká bamisionɛrɛ na Papouasie-Nouvelle-Guinée. Bamoniselaki ngai mpenza boboto; nazalaki kaka na mbula 18, mpe basalisaki ngai mingi mpo nayeba Yehova. Ngai mpe nabandaki koyekola Biblia; mpe eumelaki te namonaki ete makambo oyo nazalaki koyekola ezalaki solo. Nsima ya kobalana na Winston, tobandaki mbala moko bomoi ya esengo na mosala ya Yehova. Mpe atako tokutanaki na mikakatano, bomoi yango esalisaki biso tókoba komonisa botɔndi mingi mpo na liyaka na biso ya motuya monene.

Ndeko Winston, yebisá biso ebandeli na yo na mosala ya Yehova.

Karte oyo elakisi bisika oyo Winston ná Pam batambolaki na mosala ya zongazonga; tɛmbrɛ ya posita ya bisanga yango mosusu; esanga Funafuti na Tuvalu

A. Bamboka oyo tosalaki mosala ya zongazonga

B. Tɛmbrɛ ya posita ya bisanga yango mosusu. Na kala, bisanga ya Kiribati mpe Tuvalu ezalaki kobengama Gilbert mpe Ellice

C. Engumba kitoko ya Funafuti oyo ezali na Tuvalu. Moko ya bisanga epai tokendaki, liboso bátinda bamisionɛrɛ kuna

Mwa moke nsima ya kobalana na Pam, Yehova abandaki kopesa biso mabaku ya kosala mingi na mosala na ye. (1 Ko. 16:9) Libaku ya liboso ezalaki ntango ndeko Jack Porter oyo azalaki mokɛngɛli ya zongazonga, ayaki kotala mwa lisangá na biso. (Lelo oyo tosalaka na ye elongo na Komite ya filiale na Betele ya Australasie.) Ndeko Jack ná mwasi na ye Roslyn balendisaki biso tókóma babongisi-nzela ya sanza na sanza; tosalaki mosala yango mbula mitano. Ntango nakómaki na mbula 29, nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga na bisanga ya Pacifique Sud, oyo ekómaki na nse ya litambwisi ya Betele ya Fidji. Bisanga yango ezalaki: Kiribati, Nauru, Niue, Samoa, Samoa ya Amerika, Tokelau, Tonga, Tuvalu, mpe Vanuatu.

Na ntango wana, bato oyo bazalaki kofanda na bisanga mosusu ya mosika bazalaki kokanisela Batatoli ya Yehova mabe; na yango tosengelaki kozala na bokɛngi mpe na mayele. (Mat. 10:16) Masangá ezalaki mikemike, mpe na masangá mosusu, esika ya kolala epai ya bandeko ezalaki te. Yango wana, tozalaki kosɛnga kolala epai ya bato ya mboka, mpe bazalaki ntango nyonso kondima.

Ndeko Winston, osepelaka mingi na mosala ya kobongola. Mposa yango ebandaki ndenge nini?

Winston Payne azali kotambwisa eteyelo ya bankulutu na Samoa

Na Samoa, Winston azali kotambwisa eteyelo ya bankulutu

Na ntango wana, bandeko ya esanga Tonga bazalaki kaka na batrakte ná mwa babuku moke na monɔkɔ ya Tongien. Na mosala ya kosakola, bazalaki koyekola na bato buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko na monɔkɔ ya Anglais. Na yango, na kelasi ya bankulutu oyo eumelaki pɔsɔ minei, bankulutu misato oyo bayebaki Anglais mwa moke bayokanaki mpo bábongola buku Solo na monɔkɔ ya Tongien. Pam azalaki kobɛta yango na masini, mpe totindaki yango na imprimeri na Betele ya États-Unis. Mosala yango nyonso eumelaki pɔsɔ soki mwambe. Atako makambo oyo babongolaki ezalaki na mwa bambeba, buku yango esalisaki bato mingi oyo balobaka monɔkɔ ya Tongien báyeba solo. Ngai ná Pam tozali babongoli te, kasi likambo wana esalaki ete tókóma kosepela na mosala ya kobongola.

Ndeko Pam, yebisá biso ndenge bomoi ezalaki na bisanga mpe na Australie.

Winston ná Pam Payne batɛlɛmi pene ya bisi moko, oyo ezali moko ya bisika oyo bazalaki kolala ntango bazalaki na mosala ya zongazonga

Moko ya esika oyo tozalaki kolala ntango tozalaki na mosala ya zongazonga

Bomoi ekesanaki mpenza! Na kotalela esika oyo tozali, tosengelaki komesana na ngungi, moi makasi mpe molunge, bampoko, maladi, mpe na bantango mosusu tozalaki na bilei mingi te. Kasi, na nsuka ya mokolo nyonso, ezalaki malamu kofanda na kimya na ndako na biso oyo ezalaki na nsamba ya ndɛlɛ mpe ezalaki na bifelo te, wana tozali kotala ebale na mosika. Ntango sanza engɛngi makasi na butu, tozalaki komona elili ya banzete ya kokoti, mpe kongɛnga ya sanza ezalaki komonana na ebale. Bantango wana ya kimya ezalaki kotinda biso tómanyola mpe tóbondela; ezalaki kosalisa biso tólongola makanisi ya kolɛmbisa nzoto.

Tokómaki kolinga bana, mpo bazalaki kosepela mpe kotalatala biso, bapaya oyo bazali mindɛlɛ. Ntango tokendaki na esanga Niue, mwana moko ya mobali asimbaki lobɔkɔ ya Winston oyo etondá na nsuki mpe alobaki, “Masala na yo kitoko.” Emonani ete ezalaki mbala ya liboso amona lobɔkɔ ya moto etondi na nsuki ndenge wana mpe ayebaki te ndenge ya kobenga yango!

Tozalaki koyoka mpasi na motema ndenge bato mingi bazalaki babola. Mokili ezalaki kitoko mpenza, kasi bazangaki lisalisi ya malamu ya monganga mpe mai ya komɛla ezalaki mpasi. Atako bongo, emonanaki ete bandeko bazalaki komilelalela te. Bamesanaki na bomoi na bango. Bazalaki na esengo mpo bazalaki elongo na mabota na bango, bazalaki na esika ya koyangana mpo na losambo, mpe bazalaki na libaku ya kosanzola Yehova. Ndakisa na bango esalisaki biso tókoba kotya makambo ya ntina na esika ya liboso mpe tózala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ.

Ndeko Pam, na bantango mosusu ezalaki kosɛnga okendaka kotɔka mai mpe olambaka yo moko. Ozalaki kosala ndenge nini?

NaTonga, Pam azali kosokola bilamba, azali kosalela katini mpe saani ya monene

Na Tonga, Pam azali kosukola bilamba

Napesaka papa na biso matɔndi mingi. Alakisá ngai makambo ebele, na ndakisa ndenge ya kopelisa mɔtɔ, kolamba na yango mpe ndenge ya kobikela ata na biloko moke. Na libaku moko ntango tokendaki na Kiribati, tofandaki na mwa ndako moko oyo ezalaki na nsamba ya ndɛlɛ, na esika ya sima, batyaki biloko moko oyo eutaka na nse ya mai, mpe bifelo ezalaki ya nzete ya bambu. Mpo na kolamba mwa eloko, nazalaki kotimola mwa libulu mpe nazalaki kotya mposo ya kokoti mpo na kopelisa mɔtɔ. Mpo na kozwa mai, nazalaki kokende kosala molɔngɔ na libulu ya mai elongo na basi ya mboka. Mpo na kotoka mai na libulu yango, bazalaki kosalela nzete ya molai ya mɛtrɛ soki mibale oyo batyá nsinga moko ya makasi na nsɔngɛ moko, lokola nzete ya mobomi-mbisi. Kasi, na esika bátya ndɔbɔ na nsɔngɛ mosusu ya nzete, batyaki mwa saani mpo na kotoka mai. Mwasi mokomoko na ngala na ye azalaki kokitisa nzete na libulu mpe azalaki kotoka mai nokinoki. Bazalaki kobalusa saani mpe mai ezalaki kokɔta mbala moko. Nakanisaki ete ezali mpasi te, tii ntango ekómaki ngala na ngai. Nakitisaki nzete na mai mbala ebele, kasi nazalaki kokoka kozwa mai te. Bato nyonso basɛkaki ngai; nsima na yango mwasi moko asalisaki ngai. Bato ya esanga yango bazalaki kosalisa biso mingi mpe bazalaki na boboto.

Bokómaki kolinga mpenza kosala na bisanga. Makambo nini esepelisaki bino mpenza kuna?

Winston: Esɛngaki mwa ntango mpo na koyekola makambo mosusu. Na ndakisa, ntango bandeko bazalaki kopesa biso bilei, mbala mingi bazalaki kotya biloko nyonso oyo bazali na yango. Na ebandeli, toyebaki te ete tosengelaki kotika ndambo mpo na bango. Na yango, tozalaki kolya biloko nyonso oyo batyeli biso! Kasi ntango toyebaki ndenge makambo esalemaka, tokómaki kotikela bango. Atako tozalaki kosala mabunga, bandeko bazalaki komitya na esika na biso. Mpe bazalaki kosepela komona biso nsima ya sanza soki motoba nyonso ntango toyei kotala masangá na bango. Longola bandeko ya mboka, kaka biso nde tozalaki bapaya na masangá na ntango wana.

Winston ná bandeko bazali na tukutuku, bakei kosakola na esanga Niue

Na esanga Niue, bazali kokende mosala ya kosakola

Koya ya mokɛngɛli ya zongazonga ezalaki mpe kopesa litatoli epai ya bato ya mboka. Bato mingi bazalaki kokanisa ete bandeko bango moko nde basalaki mwa lingomba na esanga yango. Na yango, ntango mokɛngɛli moko ná mwasi na ye bauti na esika mosusu mpe bayei kotala bandeko, bato ya mboka bazalaki kokamwa ete bandeko bazalaki na kati ya ebongiseli moko monene.

Pam: Likambo mosusu oyo nabosanaka te esalemaki na Kiribati; ezalaki na lisangá moko oyo ezalaki na bandeko moke mpenza. Ndeko Itinikai Matera, oyo azalaki nkulutu kaka moko ya lisangá yango, azalaki kosala oyo akoki mpo na kokokisa bamposa na biso. Mokolo moko amemelaki biso likei moko mpe alobaki: “Ezali mpo na bino.” Kopesa biso likei ya nsoso ezalaki likambo monene na ntango wana. Bokabi na ye esimbaki mpenza motema na biso, atako ezalaki eloko ya monene te.

Ndeko Pam, mwa bambula na nsima, mwana akufaki yo na libumu. Nini esalisaki yo oyikela yango mpiko?

Na 1973, nakómaki na zemi ntango tozalaki na Pacifique Sud. Tomonaki malamu tózonga Australie, mpe kuna, sanza minei na nsima mwana na biso akufaki. Winston mpe ayokaki mpasi mingi; azalaki mpe mwana na ye. Mpasi na ngai ezalaki kokita mokemoke nsima ya bambula, kasi ekitaki mpenza kaka ntango tozwaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2009. Ezalaki na “Mituna ya batángi” oyo elobaki ete: “Soki mwana akufi na kati ya libumu ya mama na ye, elikya ya lisekwa ezali mpo na ye?” Lisolo yango emonisaki ete likambo yango etali kaka Yehova, ye oyo asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo. Akosilisa bampasi nyonso oyo tomoná na mokili oyo ya Satana ndenge akosalela Mwana na ye na bolingo nyonso mpo ‘abukabuka misala ya Zabolo.’ (1 Yoa. 3:8) Lisolo yango esalisaki biso mpe tómona lisusu ete tozali na “liyaka” ya motuya ndenge tozali basaleli ya Yehova! Elingaki kozala mpasi mingi soki elikya ya Bokonzi ezalaki te.

Nsima ya liwa ya mwana na libumu, tozongelaki mosala ya ntango nyonso. Tosalaki na Betele ya Australie mwa bansanza mpe nsukansuka tozongelaki mosala ya zongazonga. Na 1981, nsima ya kosala mbula minei na etúká ya Nouvelle-Galles du Sud mpe na Sydney, babengaki biso na Betele ya Australie, ndenge ezalaki kobengama na ntango wana; mpe tozali kuna tii lelo.

Ndeko Winston, bomoi oyo bolekisaki na bisanga ya Pacifique Sud esalisaka yo na mosala na yo na Komite ya filiale na Australasie?

Ɛɛ, na ndenge mingi. Ya liboso, Australie esengelaki kobanda kotambwisa mosala na bisanga ya Samoa mpe Samoa ya Amerika. Na nsima, basangisaki Betele ya Nouvelle-Zélande ná Betele ya Australie. Lelo oyo, Betele ya Australasie etambwisaka mosala ya bamboka oyo: Australie, Bisanga ya Cook, Nouvelle-Zélande, Niue, Samoa, Samoa ya Amerika, Timor oriental, Tokelau, mpe Tonga. Nazwaki libaku ya kokende na bamboka yango lokola momonisi ya Betele. Ndenge nasalá elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi ya sembo na bisanga yango esalisaka ngai mingi ndenge nazali sikoyo kosalisa bango longwa na Betele.

Winston ná Pam Payne na Betele ya Australasie

Winston ná Pam na Betele ya Australasie

Mpo na kosukisa, na kotalela bomoi na biso, toyebi ete kaka mikóló te nde balukaka Nzambe. Bilenge mpe balukaka ‘liyaka ya motuya monene,’ ata soki bato mosusu ya mabota na bango basepeli na solo te. (2 Bak. 5:2, 3; 2 Nt. 34:1-3) Kasi, Yehova azali Nzambe ya bolingo oyo alingi ete bato nyonso, ezala bilenge to mikóló, bázwa bomoi!

Esali sikoyo mbula koleka 50, ntango ngai ná Pam tobandaki koluka Nzambe, toyebaki mpenza te soki bolukiluki yango ekomema biso wapi. Kozanga ntembe, solo ya Bokonzi ezali mpenza liyaka ya motuya monene! Tozali na ekateli ya kokangama na yango na makasi na biso nyonso!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto