Makambo mazali koleka na mokili
◼ “Makaya ebomaki bato milio 100 na boumeli ya ekeke ya 20.”—ORGANISATION MONDIALE DE LA SANTÉ, SUISSE.
◼ “[Na Royaume-Uni], bato soki 9 000 oyo batyaki bango makila ntango basalaki bango lipaso ya motema kati na mobu 1996 mpe 2003, bazalaki na likama mbala misato ya kokufa na mbula oyo elandaki lipaso mpe likama mbala motoba ya kokufa na boumeli ya mikolo 30 oyo elandaki lipaso, koleka bato oyo bazongisaki bango makila te.”—NEW SCIENTIST, GRANDE-BRETAGNE.
Ntango ya kimya?
Zulunalo moko ya Suède mpo na baboti (Vi Föräldrar) elobi boye: “Noele ezali moko ya bafɛti na biso ya minene,” kasi ezali mpe “ntango oyo matata ezalaka mingi.” Ya solo, na mabota mingi, bato “baswanaka mpe babundaka mingi na [Noele] koleka bileko mosusu nyonso.” Zulunalo yango etunaki baboti koleka 1 100 oyo bazali na bana ya mike makambo oyo bamonaka mingi na eleko yango. Baboti mingi (soki 88%) balobaki ete matata ebimaka na mabota na bango ntango bazali koluka koyeba “ndenge mpe esika oyo bakosala fɛti ya Noele.” Bato mingi basilikaka ndenge baboti na bango bapesaka bana na bango babɔmbɔ, bisikiti mpe bakado ebeleebele.
Esengo ya kopesa eleki
Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko ya Canada (The Globe and Mail) elobaki boye: “Mbongo epesaka esengo soki ozali kokaba yango.” Atako bato mingi oyo batunaki balobaki ete bazalaka na esengo koleka soki bango moko bazali kolya mbongo na bango, baoyo basalelaki mbongo na bango mpo na kosalisa basusu—ata soki mbongo yango ezalaki mingi ndenge nini—balobaki ete bazalaki na esengo mingi koleka. Zulunalo mosusu elobi ete: “Baankɛtɛ emonisi ete mbongo kaka te nde epesaka moto esengo. Soki moto azali na mbongo oyo ekoki kosalisa ye akokisa bamposa na ye nyonso, kobakisa lisusu mingi ekozala na ntina te.”
Okoki kozwa yango na nzela ya Internet!
Zulunalo moko (New Scientist) elobi ete bakonzi ya États-Unis balingaki koyeba soki banguna na bango “bakoki kosomba bibundeli” na nzela ya Internet. “Bakamwaki mpenza ntango bamonaki ete ezali mpasi te kosala yango.” Na nzela ya basite ya mombongo oyo eyebani malamu, bazalaki na mokakatano te ya kosomba biloko lokola “elamba ya komibatela na masasi (to antibale) oyo soda moko ya Amerika asalelaki,” biteni ya mpɛpɔ ya bitumba mpe “ebele ya biloko mosusu.” Zulunalo yango elobi ete eyebani te soki bato oyo batɛkaki biloko yango bazwaki yango wapi, kasi bazali kolandela mingi kati na bango.
Kɔlɛ moko ya makasi ya kala
Na ntango ya kala, mpo na kokangisa nkasa ya lorye oyo esalami na palata na ekoti ya soda ya Loma bazalaki kosalela kɔlɛ moko ya makasi. Frank Willer, moto oyo akambaki misala ya kobongisa ndako moko oyo batyaka biloko ya kala na Rhénanie, na engumba Bonn na Allemagne, nde amonaki likambo yango. Na lisalisi ya sii moko ya moke, azalaki kopalola eloko moko oyo ekangamaki na ekoti moko ya kala (ya ekeke ya yambo liboso ya ntango na biso) oyo balɔkɔtaki na ebale Rhin; eumelaki kuna mbula soki 1 500. Alobi boye: “Mɔtɔ ya sii esalaki ete nkasa ya lorye oyo batyaki na ekoti yango elongwa, mpe etikaki bilembo ya kɔlɛ.” Bolukiluki emonisi ete kɔlɛ yango ya makasi esalemaki na gudrɔ, ná mpaka, mpe mafuta ya ngɔmbɛ.