Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/11 lok. 22
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kɔlɛ moko makasi ya bato ya kala
  • Kolala ntango moke epesaka miyoyo
  • Bisika ya kosala bilanga ezali ebele
  • Nzoto na yo esengeli na mpɔngi
    Lamuká!—1995
  • Nasala nini mpo nalalaka mingi?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Zwá ntango ya kolala!
    Lamuká!—2003
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—2009
Lamuká!—2011
g 1/11 lok. 22

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Na batɔne milio 95,2 ya banyama ya mai oyo bato bakangaka mbula nyonso, batɔne milio soki 38,5 esepelisaka bango te. Karoline Schacht, moto ya mayele na makambo ya koboma mbisi na ebongiseli moko (Fonds mondial pour la nature) alobi boye: “Lokola tozali kobimisa na mai mbisi mingi boye (soki 40%), oyo tozali na yango mposa te mbisi ezali kosila na mai.”​—BERLINER MORGENPOST, ALLEMAGNE.

“Ekoki komonana lokola ete bangɔmbɛ, bampate mpe bantaba bazali kosila mpo na lokoso ya bato ya kolya misuni, nzokande . . . na mokili mobimba, mopɛpɛ oyo bibwele ebimisaka ezali na gaze ya mabe mingi (18%) [mingimingi gaze babengi méthane]​—koleka bagaze nyonso oyo ebimaka na mituka, bingbunduka, baaviɔ, mpe bongo na bongo.”​—NEW SCIENTIST, GRANDE-BRETAGNE.

Kɔlɛ moko makasi ya bato ya kala

Bato ya siansi oyo bazali kosala na etúká ya Kwazulu-Natal, na Afrika ya Sudi, bamonaki kɔlɛ moko makasi oyo bato bazalaki kosalela eleki bankóto ya bambula. Zulunalo moko ya Johannesburg (The Star) elobi boye: “Kɔlɛ yango . . . Ezali makasi ndenge moko na bakɔlɛ ya makasi mingi oyo ezali kotɛkama lelo.” Bato balobaka ete babomi-nyama ya kala bazalaki kosalela kɔlɛ yango mpo na kokangisa mitó ya makula to ya makɔnga na banzete na yango. Milende oyo bato ya siansi basalaki mpo na kobimisa kɔlɛ ya ndenge wana​—na mabele ya motane, mafuta ya nyama, mai ya nzete ya akasia, mpe zɛlo—​mpe mpo na kokausa malamu kɔlɛ na mɔtɔ, etindaki bato ya siansi “bámemya” bato oyo bazalaki kosalela kɔlɛ wana.

Kolala ntango moke epesaka miyoyo

Lapolo moko ya iniversite Carnegie Mellon, na Pittsburgh, na Pennsylvanie, na États-Unis elobi boye: “Bato oyo bakokisaka ngonga 7 te na mpɔngi bazalaka na likama mbala soki misato ya kozwa maladi ya miyoyo koleka bato oyo balalaka ngonga soki 8 to koleka.” Mpe baoyo bazangaka mpɔngi “mpo na mwa ntango na boumeli ya ntango oyo bazali na mbeto bazalaka na likama soki mbala mitano” ya kozwa maladi ya miyoyo koleka bato oyo balalaka mpɔngi makasi. Sheldon Cohen, moto oyo atambwisaki ankɛtɛ yango alobaki boye: “Atako eyebani malamu ete mpɔngi epesaka nzoto makasi ya kobundisa bamaladi, yango ezali likambo ya liboso oyo emonisi ete kozanga mpɔngi ata mwa moke ekoki kokitisa makasi ya nzoto ya kobundisa mikrobe oyo epesaka miyoyo. Emonisi mpe ntina ya kobongisa programɛ mpo na kolala malamu.”

Bisika ya kosala bilanga ezali ebele

Zulunalo moko (New Scientist) elobi boye: “Na mokili, bisika ya kobimisa bilei oyo esengeli mpo na koleisa bato oyo bazali se kobakisama na mokili mobimba ezali mingi. Mpe na bokeseni na ndenge tozalaki kokanisa, bisika yango ezali mingi na Afrika.” Zulunalo yango etángi lapolo moko etali makambo ya bilanga oyo ebimisamaki na Organisation de coopération et de développement économiques (OCDE) mpe ya Organisation des Nations unies pour l’alimentation et l’agriculture (OAA). Na kolanda lapolo yango, bisika ya kosala bilanga na mokili mobimba ekoki kokóma mingi, mbala mibale koleka. Elobi boye: “Bisika mingi, koleka katikati ya bisika oyo bilanga ekoki kosalema, ezali na Afrika mpe Amerika ya Sudi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto