Maladi oyo bazalaki kobanga mingi na ekeke ya 19
Ezalaki na mobu 1854, mpe Londres ezalaki kobunda na choléra oyo ebimaki lisusu; ezali maladi moko ya misɔpɔ oyo epesaka pulupulu makasi mpe esilisaka mai na nzoto. Maladi yango ezalaki koboma noki mpenza. Bato mingi oyo balamukaki malamu na ntɔngɔ bazalaki kokufa na mpokwa. Ezalaki na nkisi te.
EZALAKI maladi oyo bazalaki kobanga mingi na ekeke yango, mpe eyebanaki te soki ezalaki kouta wapi. Bato mosusu bazalaki kokanisa ete moto abɛlaka choléra soki apemi nsolo mabe oyo euti na biloko ya kopɔla. Makanisi na bango ezalaki komonana ete ezali na libunga te. Tamise, ebale oyo ekatisaka Londres, ezalaki kobimisa nsolo moko mabe mpenza. Mopɛpɛ ya nsolo wana ya kopɔla nde ezalaki komema maladi yango?
Mbula mitano liboso, monganga moko na nkombo John Snow abimisaki likanisi ete choléra eutaka na mopɛpɛ ya mabe te kasi na mai ya bosɔtɔ. Monganga mosusu, William Budd, andimaki ete maladi yango eutaka na biloko mikemike oyo ezali lokola mayebo.
Ntango maladi yango ezalaki kopalangana na 1854, Snow alukaki koyeba soki likanisi na ye ezalaki solo; alandelaki bomoi ya bato oyo babɛlaki choléra na Soho, etúká moko ya Londres. Amitunaki boye: ‘Makambo nini bango nyonso basalaki?’ Bolukiluki ya Snow emonisaki likambo moko ya kokamwa. Bato nyonso oyo babɛlaki choléra na etúká yango bamɛlaki mai oyo eutaki na pɔmpi ya balabala moko, mpe mai yango ebebisamaki na bosɔtɔ oyo ezalaki na mikrobe ya choléra!a
Na mbula yango, likambo mosusu ya ntina mingi esalemaki na makambo ya monganga ntango Filippo Pacini, moto ya siansi na Italie, abimisaki lisolo moko na zulunalo oyo elimbolaki malamu ekelamu oyo ebimisaka choléra. Nzokande, balandaki mpenza te makanisi na ye, ndenge moko mpe na makanisi ya Snow mpe oyo ya Budd. Choléra ekobaki koboma, tii na mobu 1858.
“Nsolo moko makasi”
Parlema ezalaki koumisa likambo etali kotonga baterase ya sika mpo na kopɛtola mai ya ebale Tamise, kasi molunge makasi oyo ebimaki na eleko ya molunge na 1858 etindaki bango bátalela likambo yango. Nsolo ya ebale yango oyo ezalaki koleka liboso ya Chambre des communes elekaki makasi mpenza kino bakonzi yango ya politiki bakómaki kotya na maninisa na bango barido oyo bapɔlisá na nkisi ya koboma mikrobe mpo na kolɛmbisa nsolo yango. Likambo yango oyo babengaki Nsolo moko makasi etindaki Parlema eluka kosilisa yango. Nsima ya mikolo 18, epesaki mitindo bátonga baterase ya sika.
Basalaki batiyo ya minene mpo ezwaka bosɔtɔ liboso ekóma na ebale mpe ezalaki komema yango na ɛsti ya Londres epai ezalaki kobwakama na mbu ntango mai ya mbu ebendani. Ebotaki mbuma malamu mpenza. Ntango kaka mai nyonso ya bosɔtɔ ya Londres ekómaki koleka na batiyo yango ya sika, maladi ya choléra etikaki kopalangana.
Banda wana, ntembe ezalaki lisusu te: choléra eutaka na mopɛpɛ ya mabe te kasi na mai to bilei ya bosɔtɔ. Emonanaki mpe polele ete eloko oyo ebatelaka moto mpo azwa choléra te, ezali bopɛto.
Mobeko oyo ntina na yango eyaki koyebana na nsima
Bankóto ya bambula liboso maladi ya choléra epalangana na Londres, Moize abimisaki ekólo Yisraele na Ezipito. Atako batambolaki na esobe ya Sinai mbula 40, Bayisraele bazwaki te bamaladi oyo epalanganaka, na ndakisa choléra. Mpo na nini?
Bapesaki ekólo yango mitindo ya kokunda nyɛi mosika, na libándá ya kaa, mpo ete esika oyo bafandi mpe bisika oyo bazali kozwa mai ekɔta mikrobe te. Mobeko yango oyo ezali na Kozongela Mibeko 23:13, 14 elobi ete:
“Bokobongisa esika moko, mwa-mosika na bandako na bino, po bókendeke kosala wese na bino kuna. Moto na moto akozala na mwa-pau moko ya moke na kati ya mikumba na ye, pe tango akokende kosumba kuna, akotimola na yango libulu po na kozipa salité na ye.”—Bible na lingala ya lelo.
Mwa mobeko wana ebatelaki Bayisraele na bamaladi oyo ezalaki konyokola bikólo ya zingazinga. Bizaleli ya ndenge wana ezali mpe kobikisa bato na mikolo na biso.b Tózwa ndakisa moko.
“Maladi moko makasi ebimelaki biso ata mokolo moko te”
Na bambula ya 1970, monyoko moko makasi etindaki Batatoli ya Yehova mingi bákima Malawi. Bakendaki kofanda na Mozambique, ekólo oyo ezali pembeni na bango mpe kuna bato koleka 30 000, mibali, basi mpe bana bazalaki kofanda na bakaa ya bato oyo bakimá mboka. Ndenge toyebi yango, mbala mingi, bamaladi oyo eutaka na mai ebimaka mingi na bakaa ya bato oyo bakimá mboka. Na yango, Batatoli basalaki ndenge nini na bisika ya ndenge wana?
Lemon Kabwasi, elongo na Batatoli mosusu 17 000, bafandaki na kaa oyo elekaki monene na Mlangeni. Alobi boye: “Tozalaki ntango nyonso kobatela kaa pɛto. Tozalaki kotimola mabulu ya bakabinɛ libándá ya kaa, mpe moto moko te azalaki na ndingisa ya kotimola kabinɛ na ye na kati ya kaa. Tozalaki mpe kotimola mabulu ya fulu mosika ya kaa. Bandeko bazalaki komipesa mpo na kotya bopɛto, ata mpe mpo na kotala soki mai oyo ezalaki kouta na mabulu oyo batimolá na bisika ndenge na ndenge libándá ya kaa ezali pɛto. Atako tozalaki kofanda na nkaka, tozalaki kotosa mitinda ya Biblia na oyo etali bopɛto; na yango, maladi moko makasi ebimelaki biso ata mokolo moko te, mpe moto moko te abɛlaki choléra.”
Likambo ya mawa, na bisika mosusu na mokili, ezali na bandako oyo ezangi batiyo ya kobimisa mai ya bosɔtɔ. Bamaladi oyo euti na nyɛi ya bato ebomaka bana soki 5 000 mokolo na mokolo.
Atako bato bakoki kopekisa choléra mpe bamaladi mosusu ya minene, mpe milende mpo na kotya bopɛto eboti mbuma ya malamu, Biblia epesi elikya ete mosika te maladi nyonso ekosila. Emoniseli 21:4 elobi ete na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe, “liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” Biblia elaki ete na ntango wana “moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”—Yisaya 33:24.
Mpo na koyeba makambo mosusu oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na bato, talá Mikapo 3 mpe 8 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako na 1854 bazalaki kosalela bakabinɛ oyo etindikaka mai, banzela ya kolekisa mai ya bosɔtɔ ezalaki mpenza ya kala mpe ezalaki kolekisa nyɛi ya bato na baterase mpe na batiyo tii na Ebale Tamise, epai bato mingi bazalaki kotoka mai ya komɛla.
b Lokola choléra eutaka na bilei to mai oyo ekɔtá mikrobe, mpo maladi yango ezwa yo te esengeli kokeba na biloko nyonso oyo ezali kokɔta na monɔkɔ. Kopɛtola mai mpe kolamba biloko malamumalamu.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 25]
Ebale Tamise ekatisaka Londres mpe mai na yango ebebisamaki na bosɔtɔ oyo ezalaki na mikrobe ya choléra, ndenge mayemi mingi ya ntango wana emonisi yango
[Elilingi na lokasa 26]
Bato koleka 30 000, mibali, basi mpe bana bafandaki na bakaa zomi ya bato oyo bakimá mboka, na Mozambique, mpe bakaa yango ezalaki ntango nyonso pɛto
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Ebembe na Tamise: © Mary Evans Picture Library; karte: University of Texas Libraries