Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/12 nk. 9-12
  • Wapi ntina ya bopeto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Wapi ntina ya bopeto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezali likambo ya libota mobimba
  • Bopɛto na biso ekumisaka Yehova
  • “Bókóma bamekoli ya Nzambe”
  • Bopɛto ezali mpenza na ntina nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bopɛto elimboli mpenza nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Yehova alingaka bato ya pɛto
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Nzambe alingaka bopɛto
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/12 nk. 9-12

Wapi ntina ya bopɛto?

Bamaladi ya mabe enyokolaka bato banda kala. Bato mosusu balobaka ete yango emonisaka nkanda ya nzambe, mpe atindaka yango mpo na kopesa bato mabe etumbu. Na nsima ya kolukaluka na likebi mpenza bambula mingi, emonani ete mbala mingi banyama ya mikemike nde bamemelaka bato bamaladi.

Minganga bamoni ete banyama lokola mpoko, mpɛsɛ, nzinzi, mpe ngungi ekoki komemela bato maladi. Bamoni mpe ete bato bango moko bamilukelaka bamaladi soki balingi bopɛto te. Bopɛto esalisaka biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ.

Na ntembe te likambo ya bopɛto etali bato na bato; ndenge bamesaná kofanda mpe bomoi oyo bazali na yango. Na bamboka oyo ezali mpenza na mai te to batalase ya malonga ezali te, ezalaka mpasi mpo na kotya bopɛto. Nzokande, Nzambe asɛngaki Bayisalaele bázala pɛto atako bazalaki na esobe, esika ezalaka mpasi mpo na kozwa mai!

Mpo na nini bopɛto ezali na ntina na miso ya Nzambe? Ndenge nini tosengeli kotalela bopɛto? Yo ná libota na yo bosengeli kosala nini mpo na kokima bamaladi?

TOZALI na Cameroun. Kelasi ebimi mpe Max,a mwana mobali moko ya moke, azongi ndako. Nzala mpe mposa ya mai ekangi ye, akɔti na ndako, ayambi mbwa na ye, abwaki sakosi na ye likoló ya mesa, afandi mpe azali kozela motema lukuluku biloko mpo alya.

Mama ya Max na kuku epai azalaki, ayoki ndenge Max akɔti na ndako mpe amemeli ye saani ya loso ná madesu. Ntango mama amoni sakosi ya Max likoló ya mesa ya pɛto, abebisi elongi. Atali mwana na ye mpe, na malɛmbɛ mpenza alobi na ye, “Maaaax!” Mwana ayebi mbala moko likambo oyo mama alingi koloba, alongoli sakosi na ye mbala moko likoló ya mesa mpe akei mbangu na libándá kosukola mabɔkɔ. Na nsima, azongeli biloko na ye, mpe alobi na mama na ye, “Limbisá ngai, mama. Nabosanaki.”

Mama ya malamu akoki kosalisa libota na ye bázala nzoto kolɔngɔnɔ mpe pɛto, atako yango ezali likambo ya libota mobimba. Ndenge lisolo ya Max emonisi yango, kosalisa bana bázalaka pɛto ezali likambo ya mokolo moko te, mpo yango esɛngaka mpenza milende ya ntango nyonso, nzokande bana babosanaka makambo noki.

Mama ya Max ayebi ete mikrobɛ ekoki kokɔta na bilei na banzela mingi. Yango wana, asukolaka mabɔkɔ na ye malamu liboso ya kosimba bilei mpe azipaka yango malamu mpo banzinzi ematela yango te. Lokola abatelaka bilei malamu, abongisaka mpe apɛtolaka ndako na ye, bampoko to mpe bampɛsɛ batungisaka ye te.

Moko ya bantina oyo mama ya Max asalaka bongo ezali mpo alingi kosepelisa Nzambe. Alobi boye: “Biblia elobi ete basaleli ya Nzambe basengeli kozala basantu, mpo Nzambe azali mosantu.” (1 Petelo 1:16) Abakisi ete “bosantu etambolaka nzela moko na bopɛto. Yango wana, nalingaka ndako mpe libota na ngai ezala pɛto. Mpe nazali kolonga kaka mpo moto nyonso na kati ya libota apesaka ngai mabɔkɔ na likambo yango.”

Ezali likambo ya libota mobimba

Ndenge mama ya Max amonisi yango, bopɛto ya libota ezali likambo ya moto nyonso. Mabota mosusu bafandaka mbala na mbala mpo na kolobela bamposa ya libota na bango mpe kotala nini bakoki kobongisa lisusu, ezala na libándá to na kati ya ndako. Yango esalisaka libota ezala na bomoko mpe ekundwelaka mokomoko ete asengeli koluka bolamu ya libota mobimba. Na ndakisa, mama akoki komonisa bana na ye ya mikóló ntina ya kosukolaka mabɔkɔ soki bauti kabinɛ, soki basimbi mbongo mpe liboso ya kolya. Bango mpe basengeli kosalisa baleki na bango bázwaka likambo yango na lisɛki te.

Na kati ya libota, bakoki kokabolela bana misala. Libota ekoki kozwa mokano ya kosukolaka ndako mbala na mbala pɔsɔ nyonso, mpe kopona mokolo moko to mibale na mbula oyo bokosukola ndako mobimba. Libándá ya ndako esengeli kozalaka ndenge nini? Stewart L. Udall, moko ya bato oyo bazali kosala nyonso mpo na kobatela mabelé, alobi boye mpo na États-Unis: “Tozali kofanda na mokili moko oyo kitoko na yango ezali kosila, bazamba nyonso ezali kosila, mipɛpɛ mabe ya babɔmbi, ya mituka mpe makɛlɛlɛ ebebisi mpenza esika tofandi.”

Ezali mpe bongo esika ofandi? Na ntango ya kala, mpe ata tii lelo na bingumba mosusu ya Afrika ya ntei, moto moko alekaka na balabala azali kobɛta ngonga mpo na kobenda likebi ya bato. Na mongongo makasi, ayebisaka bato bápɛtola mboka, báfungola batalase, bálongola bitape ya banzete, bákata matiti, mpe bálongola bosɔtɔ.

Na mokili mobimba, bazali na mokakatano ya kozwa bisika ya kobwaka bosɔtɔ, mpe likambo yango ezali kopesa bakonzi mingi motó mpasi. Na bingumba mosusu, bakonzi bazali komeka kolɔkɔta bosɔtɔ, kasi bazali kokoka te, yango wana bosɔtɔ etondi kotonda na babalabala. Mbala mosusu, basɛngaka bato bápesa mabɔkɔ. Lokola biso baklisto tozali bato ya botosi, tozalaka bato ya liboso mpo na kotosa mibeko ya Kaisala kozanga koimaima. (Baloma 13:3, 5-7) Baklisto ya solo bazelaka kaka te bakonzi básɛnga bango básala. Balingaka kofanda na esika ya pɛto mpe batyaka bopɛto na bisika bafandi. Bazelaka te ete bakonzi ya mboka bátinda bongo mpo bátya bopɛto. Bayebaka ete bopɛto ezali elembo ya moto oyo ateyami malamu mpe apesaka nzoto na ye kilo. Esengeli kobanda liboso epai ya moto mokomoko mpe libota mokomoko. Soki tozali ntango nyonso kotya bopɛto na lopango na biso, tokozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe yango ekobakisa kitoko ya kartye.

Bopɛto na biso ekumisaka Yehova

Bopɛto ya nzoto mpe kolata na ndenge ebongi ekumisaka Nzambe na biso mpe ekesenisaka biso na bato mosusu. Nsima ya liyangani moko ya Batatoli ya Yehova oyo esalemaki na engumba Toulouse, na France, bilenge soki 15 bakɔtaki na restora moko. Mobali moko ná mwasi na ye oyo bazalaki mibange, oyo bafandaki na mesa moko pene na bango bakanisaki ete bilenge yango bakosala makɛlɛlɛ mpe mobulu makasi. Kasi, bakamwaki na etamboli mpe masolo ya malamu ya bilenge yango, oyo balataki malamu mpenza. Ntango bilenge yango balingaki kokende, mibange wana bapesaki bango longonya mpo na etamboli na bango ya malamu mpe bayebisaki moko na bango ete bilenge lokola bango bazali lisusu mingi te mikolo oyo.

Bato oyo bakendaka kotala babiro ya filiale, ba-imprimeri mpe bandako ya bandeko ya Betele bakamwaka na bopɛto oyo bamonaka kuna. Basɛngaka na bandeko oyo basalaka mpe bafandaka kuna básukolaka bilamba mpe nzoto na bango mbala na mbala. Malasi esengeli te kozwa esika ya kosukola nzoto. Ntango bandeko yango basakwelaka bazalani na bango na mpokwa to na wikende, bopɛto na bango epesaka nsango na bango lokumu.

“Bókóma bamekoli ya Nzambe”

Biblia elendisi baklisto ete ‘bákóma bamekoli ya Nzambe.’ (Baefese 5:1) Na emonaneli moko, mosakoli Yisaya amonaki baanzelu bazali kokumisa Mozalisi boye: “Mosantu, mosantu, mosantu.” (Yisaya 6:3, NW) Maloba wana emonisi ete Nzambe azali pɛto koleka bikelamu nyonso. Yango wana, Nzambe asɛngaka basaleli na ye nyonso bázala pɛto. Alobi na bango ete: “Bosengeli kozala basantu, mpo ngai nazali mosantu.”​—1 Petelo 1:16.

Biblia ezali kolendisa baklisto “bálata na ndenge ebongi.” (1 Timoté 2:9, Bible na lingala ya lelo oyo) Yango wana, tokoki kokamwa te ete mokanda ya Emoniseli elobi ete misala ya boyengebene ya bato oyo Nzambe azali kotánga basantu ezali ‘ngɛlingɛli, pɛto mpe lokola lini ya kitoko.’ (Emoniseli 19:8) Nzokande, Biblia elobelaka lisumu mbala mingi lokola litɔnɔ to bosɔtɔ.​—Masese 15:26; Yisaya 1:16; Yakobo 1:27.

Lelo oyo, bamilio ya bato bazali kofanda na bisika oyo esengeli kobunda ntango nyonso mpo na kozala pɛto na nzoto, na bizaleli mpe na elimo. Mokakatano wana ekosila mpenza kaka ntango Nzambe ‘akosala biloko nyonso biloko ya sika.’ (Emoniseli 21:5) Ntango elaka wana ekokisama, mbindo mpe bosɔtɔ ya ndenge nyonso ekolimwa mpo na libela.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo mosusu ezali ya bango te.

[Etanda na lokasa 10]

Nzambe alingaka bopɛto

Ntango Bayisalaele bazalaki kotambola na esobe, Nzambe alobaki na bango ete soki moto alingi kosala zongo, atimola libulu mpe akunda salite na ye. (Deteronome 23:12-14) Lokola bakaa oyo bazalaki kofanda ezalaki minene, kobima ntango nyonso libándá ya kaa mpo na kotimola mabulu ezalaki kolɛmbisa, kasi na ntembe te, kotosa etinda wana ebatelaki bango na maladi lokola typhoïde mpe choléra.

Nzambe apesaki Bayisalaele mobeko ete básukolaka to bábebisaka eloko nyonso oyo etuti ebembe. Atako bayebaki te ntina ya mobeko yango te, kotosa yango ezalaki kosalisa bango bákima mikrobɛ mpe maladi.​—Levitike 11:32-38.

Banganga-nzambe basengelaki kosukola mabɔkɔ mpe makolo na bango liboso ya kosala misala na bango na tabenakle. Kotondisa mai na saani ya kwivre oyo bazalaki kosalela na tabenakle ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te, kasi kosukola ezalaki mpenza mobeko.​—Exode 30:17-21.

[Etanda na lokasa 11]

Toli ya monganga moko

Mai ezali na ntina mingi mpo na bomoi, kasi mai oyo ezali na mikrobɛ ekoki kobɛlisa moto mpe koboma ye. Ntango basololaki na ye, Doktɛrɛ Mbangue Lobe, oyo azali mokonzi ya minganga na libongo ya Douala, na Cameroun, apesaki mwa makanisi oyo ekoki kosalisa.

“Soki bondimi mpenza te ete mai na bino ezali pɛto, ekozala malamu bótɔkisaka yango.” Kasi apesaki toli oyo: “Kotya javel to bankisi mosusu na mai ezali malamu, kasi ekoki kobimisa makama soki esalelami malamu te. Ntango nyonso, liboso ya kolya mpe nsima ya kouta na twalɛti, esengeli kosukola mabɔkɔ na sabuni. Sabuni ezalaka ntalo makasi te, ata babola bakoki kosomba yango. Sukoláká bilamba na yo mbala na mbala, saleláká mai ya mɔtɔ soki obɛlaka maladi ya mposo.”

Monganga yango abakisaki boye: “Moto nyonso na kati ya libota asengeli kotyaka bopɛto na kati ya ndako mpe na lopango mobimba. Mbala mingi, bato bakipaka te kotya bopɛto na batwalɛti mpe lopango. Yango wana bampɛsɛ mpe banzinzi etondaka na bisika yango.” Mpo na bana, apesaki toli oyo: “Kebá na kosukola na mwa mai ya mikemike oyo etɛlɛmatɛlɛmaka na kartye na bino. Etondá na mikrobɛ. Na butu, liboso ya kolala, esengeli kosukola, konika mino mpe kolalaka na kati ya mosikitele.” Makanisi oyo nyonso elingi kaka koloba ete tosengeli kokanisaka liboso, kozwaka bibongiseli soki esengeli mpo na kokima bamaladi.

[Elilingi na lokasa 10]

Kosukolaka bilamba ekobatela biso na bamaladi ya mposo

[Elilingi na lokasa 10]

Baklisto bazelaka te bátinda bango mpo na kotya bopɛto na esika bafandi

[Elilingi na lokasa 10]

Mama ya malamu asalaka mingi mpo na bopɛto ya ndako na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto