Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/11 lok. 31
  • Mpo na kosolola na libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na kosolola na libota
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mabe nini ezali na elilingi oyo?
  • MAKAMBO NINI OYEBI MPO NA NTOMA NATANAELE?
  • EZALI NA ZULUNALO OYO
  • BIYANO
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2008
  • Mpo na kotalela na libota
    Lamuká!—2010
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2010
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2009
Lamuká!—2011
g 1/11 lok. 31

Mpo na kosolola na libota

Mabe nini ezali na elilingi oyo?

Tángá Ebandeli 4:1-8. Sikoyo talá elilingi yango. Mabe nini ezali wana? Komá biyano na mikɔlɔtɔ awa na nse.

1. ․․․․․

2. ․․․․․

3. ․․․․․

MPO NA KOSOLOLA:

Kaina asalaki nini ntango Yehova Nzambe amonisaki ete asepeli na leki na ye Abele? Soki ozali komona ete baboti na yo bazali kosepela na moko ya bandeko na yo, osengeli koboya kosala nini, mpe mpo na nini?

MAKAMBO NINI OYEBI MPO NA NTOMA NATANAELE?

4. Ekoki kozala ete Natanaele ayebanaki mpe na nkombo nini?

LISALISI: Tángá Luka 6:14; Yoane 1:44-46.

․․․․․

5. Mpo na nini Yesu asepelaki na Natanaele?

LISALISI: Tángá Yoane 1:47.

․․․․․

MPO NA KOSOLOLA:

Ndenge nini okoki komekola Natanaele? Matomba nini okozwa soki osali bongo?

LISALISI: Tángá Nzembo 24:3-5; 34:13-16.

EZALI NA ZULUNALO OYO

Yanolá na mituna oyo, mpe tyá vɛrsɛ to bavɛrsɛ oyo ezangi.

LOKASA 5 Mposa ya motema ya moto ezalaka ndenge nini? Ebandeli 8:․․․

LOKASA 6 Tosengeli kolinga kozala ndenge nini? Baebre 13:․․․

LOKASA 11 Nini ekokómela monguna ya nsuka? 1 Bakorinti 15:․․․

BIYANO

1. Kaka bana mibale nde bapesaki mbeka.

2. Kaina apesaki mbuma ya bilanga.

3. Abele apesaki mbeka ya mpate, kasi ngɔmbɛ te.

4. Bartelemi.

5. Azalaki na bokosi te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto