Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/12 nk. 6-7
  • Kosala makambo na bosembo efutaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosala makambo na bosembo efutaka
  • Lamuká!—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya kozala moto oyo batyelaka motema
  • Komeka bozindo na mosapi te
  • Esalisaka na ntango ya mikakatano
  • Nini etindaka bato bázanga bosembo?
    Lamuká!—2012
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Kosala makambo na bosembo ememaka matomba ya solosolo
    Lamuká!—2012
Makambo mosusu
Lamuká!—2012
g 4/12 nk. 6-7

Kosala makambo na bosembo efutaka

“Limpa oyo ezwami na lokuta ezali elɛngi epai ya moto, kasi nsima na yango, monɔkɔ na ye ekotonda na mabanga mikemike.”​—Masese 20:17.

MPO mombongo etambola malamu, esengeli kaka kosala makambo oyo ezangi bosembo? Te. Kutu mbala mingi, kozanga bosembo ebebisaka nde makambo. Mpo na nini? Mpo moto oyo asalaka makambo na bosembo aleki moto oyo azangi bosembo, mpamba te bato batyelaka ye motema mpe yango ememelaka ye matomba oyo eumelaka.

Ntina ya kozala moto oyo batyelaka motema

Koyebana lokola moto ya sembo, ememelaka moto matomba, ayeba yango to te. Likambo oyo ekómelaki Franz, oyo balobeli na lisolo oyo eleki, emonisi yango polele. Alobi boye: “Ntango nabandaki mosala, nayebaki te ete bakonzi na ngai bazalaki komeka bosembo na ngai. Kasi na nsima, nayaki koyeba ete nalongaki. Mpo na yango, bapesá ngai bokonzi mpe bonsomi mingi, mpe bakonzi na ngai bapesá ngai mbano mpo na bosembo na ngai. Nayebi ete ezali na bato oyo bakoki kosala mosala oyo nasalaka malamu koleka ngai, mpe baleki ngai na mayele. Kasi nayebi mpe ete soki tii lelo nazali naino na mosala oyo, ezali mpo bakonzi ya mosala batyelaka ngai motema.”

Komeka bozindo na mosapi te

David, moto ya mombongo oyo balobeli na lisolo eleki, alobi boye: “Ntango nazalaki komona bato bazali kobuka mibeko mpo na kozwa litomba ya ntango mokuse, nayebaki malamu ete ata ndɛlɛ ekosukela bango mabe. Toboyaki kosala mimbongo mosusu mpo ezalaki sembo te. Kasi bakompanyi mingi oyo ezalaki kosala makambo ya ndenge wana ekweaki na nsima, mpe bato mosusu bafundamaki na tribinale. Makambo ya ndenge wana ekwelaki kompanyi na biso te.”

Ntango Ken alingaki kosala ferme ya bangɔmbɛ na ekólo moko ya sudi-ɛsti ya Afrika, akokaki kopesa bakonzi ya Leta kanyaka mpo biloko na ye ekɔta noki mpe afutela yango mpako te. Alobi boye: “Bato mosusu mingi basalaki bongo. Lokola tosalaki makambo na bosembo, ezwaki biso mbula zomi mpo ferme ebanda kosala. Ezalaki nde na litomba? Ɛɛ! Bakonzi oyo bazangi bosembo bazalaki ntango nyonso kotungisa bato oyo bafutaki bango kanyaka mpo bapesa bango mbongo mosusu.”

Esalisaka na ntango ya mikakatano

Mposa ya kosala makambo oyo ezangi bosembo ekómaka makasi ntango mombongo moko oyo ezali kotambola malamu te elingi kokwea. Kasi na ntango ya ndenge wana nde valɛrɛ ya kozala sembo emonanaka.

Tozwa ndakisa ya Bill, oyo kompanyi na ye ya kotonga bandako ekweaki ntango mikakatano ebimaki na makambo etali bandako na États-Unis. Alobi boye: “Lokola bakompanyi ya bakiliya na biso mingi ekweaki, bakokaki lisusu te kofuta nyongo na biso ya bankoto ya badolare. Ntango makambo eyaki ndongo, nakendeki na kompanyi mosusu oyo etongaka mpe bandako mpo na kosɛnga ete bázwa ata mwa ndambo na biso na mosala. Mikolo mibale ekokaki te, bandimaki kozwa ngai ná basali na ngai mosusu mingi. Bayebisaki ngai ete nayebani lokola moto ya sembo mpe oyo asalaka mosala malamu.”

Bato nyonso oyo balobeli na masolo oyo bazali Batatoli ya Yehova. Na makambo nyonso ya bomoi na bango, ezala mpe na mombongo, balandaka toli ya Biblia. Ndenge tomoni yango, na esika ezongisa mombongo na bango nsima, bosembo na bango ememelaki bango nde matomba mingi.

Kasi, makambo ebimaka ntango nyonso oyo moto akoki komona lokola kozanga bosembo efutaka. Lifuti nyonso ezalaka kaka ya mbongo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Koyebana lokola moto ya sembo, ememelaka moto matomba, ayeba yango to te

[Elilingi na lokasa 7]

“Bayebisaki ngai ete nayebani lokola moto ya sembo mpe oyo asalaka mosala malamu.”​—Bill, États-Unis

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto