Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 2/14 nk. 12-13
  • Constantin

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Constantin
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • LETA ENDIMAKI MANGOMBA MPE NA NSIMA EKONZAKI YANGO
  • LINGOMBA YA BOKRISTO YA NDENGE NINI?
  • Constantin Le Grand mobundeli ya boklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Na nini Constantin abongwanaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Lolenge nini boklisto ya lokuta ekómaki eteni ya mokili oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ekulusu: elembo na boklisto liboso na Constantin?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 2/14 nk. 12-13
Ekeko ya brɔnze ya Constantin

TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Constantin

Constantin azalaki amperɛrɛ ya liboso ya Roma oyo alobaki ete azali mokristo. Lokola asalaki bongo, abongolaki makambo mingi na mokili. Akɔtaki na lingomba oyo bazalaki konyokola bandimi na yango mpe apesaki mabɔkɔ mpo ekóma mangomba ya bokristo. Na yango, buku moko (The Encyclopædia Britannica) elobi ete lingomba yango oyo bazalaki kobenga lingomba ya bokristo ekómaki “kokɔta mingi na makambo ya politiki mpe ya bomoi ya bato” mpe ebongolá makambo mingi banda wana tii lelo.

MAKAMBO ya amperɛrɛ wana ya Roma etali yo na nini? Soki osepelaka na makambo etali bakristo, osengeli koyeba ete mayele mabe oyo Constantin asalelaki na politiki na ye mpe na mangomba, ebongolá mateya ya mangomba mingi mpe makambo oyo mangomba yango esalaka tii lelo. Na ndenge nini?

LETA ENDIMAKI MANGOMBA MPE NA NSIMA EKONZAKI YANGO

Na mobu 313 ya ntango na biso, Constantin ayangelaki Ampire ya Roma ya Wɛsti, mpe Licinius ná Maximinus bayangelaki ngámbo ya Ɛsti. Constantin ná Licinius bapesaki bato nyonso bonsomi ya losambo, ata mpe bakristo. Constantin abatelaki lingomba ya bokristo, akanisaki ete lingomba ekokaki kosala ete ampire na ye ezala na bomoko.a

Constantin abangaki ndenge mangomba ekabwanaki mpo na matata. Lokola azalaki na mposa makasi ete mangomba eyokana, abimisaki mateya oyo amonaki ete ezali “malamu” mpe alukaki ete bato bandima yango. Mpo bándimama na miso na ye, baepiskɔpɔ basengelaki kondima mateya yango, mpe baoyo basalaki bongo bazalaki kofuta mpako te mpe azalaki kosunga bango mingi. Charles Freeman, moto moko ya istware, alobaki boye: “Bakómaki kondima mateya yango mpo na mbongo ebele mpe lokumu oyo bakokaki kozwa kasi te mpo na lingomba.” Yango esalaki ete basango bákóma na nguya mingi na makambo ya mokili. Arnold Jones, moto moko ya istware alobaki ete: “Lingomba ezwaki moto ya kobatela yango kasi mpe moto ya kokonza yango.”

“Lingomba ezwaki moto ya kobatela yango kasi mpe moto ya kokonza yango.”​—Arnold Jones, moto moko ya istware

LINGOMBA YA BOKRISTO YA NDENGE NINI?

Lokola Constantin asalaki boyokani na baepiskɔpɔ, yango ebimisaki lingomba oyo esangisaki mateya ya bokristo mpe ya bapakano. Esengelaki kozala bongo mpo mokano ya amperɛrɛ ezalaki ete mangomba ezala ebele, kasi te ya koluka mateya ya solo. Kutu, azalaki nde mokonzi ya ampire ya bapakano. Moto moko ya istware akomaki ete mpo na kosepelisa bakristo ná bapakano, Constantin “amonisaki polele te soki azali mokristo to mopakano na makambo oyo azalaki kosala to na bokonzi na ye mobimba.”

Atako alobaki ete azalaki kokɔtela lingomba ya bokristo, lokolo na ye mosusu ezalaki na losambo ya bapakano. Na ndakisa, amipesaki na astroloji mpe na kosakola makambo oyo ebombaná​—misala ya bilimo mabe oyo Biblia epekisi. (Kolimbola Mibeko 18:10-12) Na ekeko ya Constantin oyo ezali na Roma, balakisi ye azali kopesa mbeka na banzambe ya bapakano. Akobaki kopesa nzambe-moi lokumu na ndenge atyaki elilingi ya nzambe yango na mbongo mpe atombolaki losambo na yango. Na nsima, Constantin apesaki nzela ete bátongela ye ná libota na ye tempelo moko na Ombrie, mwa engumba moko ya Italie mpe bátya banganga-nzambe oyo bakosala na tempelo yango.

Constantin azalaki koboya kozwa batisimo mpo akóma “mokristo” tii ayaki kozwa yango mwa mikolo moke liboso akufa na mobu 337 ya ntango na biso. Bato mingi ya mayele balobaka ete aboyaki kozwa batisimo mpo bakristo ná bapakano bákoba kopesa ampire na ye mabɔkɔ. Mpo na koloba solo, makambo ya bomoi na ye mpe ndenge oyo azwaki batisimo nsima mpenza etindaka bato bátya ntembe ete azalaki mpenza mondimi ya solosolo ya Kristo. Kasi, likambo ya ntina yango oyo: Lingomba oyo guvɛrnema ya Constantin endimaki ekómaki makasi na makambo ya politiki, mpe epesaki Kristo mokɔngɔ mpe emikɔtisaki na makambo ya mokili. Yesu alobaki boye mpo na bayekoli na ye: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:14) Lingomba wana oyo emikɔtisaki na makambo ya mokili, ebotaki mangomba ebele.

Makambo wana nyonso emonisi biso nini? Emonisi ete tosengeli te kondima mateya ya lingomba moko boye kaka bindimandima, kasi tosengeli mpenza kotala soki eyokani na oyo Biblia eteyaka.​—1 Yoane 4:1.

a Buku moko elobi ete bato mingi batyaka ntembe ete Constantin azalaki mondimi ya solosolo ya lingomba ya bokristo mpo “atikaki losambo ya bapakano ezala, ata nsima ya bambula mingi ya boyangeli na ye.”

MWA MAKAMBO ETALI CONSTANTIN

  • Constantin akómaki amperɛrɛ ya Ampire ya Roma ya Wɛsti na mobu 306 ya ntango na biso mpe kobanda mobu 324 tii 337, akómaki mpe koyangela ngámbo ya Ɛsti.

  • Constantin alobaki ete na ndɔtɔ to na emonaneli moko boye, Nzambe ya bakristo ayebisaki ye ete akosunga ye na bitumba.

  • Lokola Constantin andimaki ete Nzambe nde asalisaki ye alonga etumba moko, “apesaki nokinoki mitindo” ete bátya mwa likɔnga moko oyo ekokani na ekulusu na lobɔkɔ ya ekeko na ye oyo batɛlɛmisaki “na esika oyo bato bazalaki koleka mingi na Roma.”​—Paul Keresztes, moto ya istware.

  • Bapesaki Constantin titre moko ya bapakano pontifex maximus to nganga monene, mpe amonaki ete azali mokonzi ya mangomba nyonso oyo ezalaki na ampire na ye.

Liyemi ya Constantin

Liyemi ya Constantin oyo emonisi bitumba oyo alongaki

  • “Amperɛrɛ ya malamu; ata mpe mokristo ya solosolo asengeli kopona kondimama na Nzambe to kobungisa bokonzi na ye. Lokola Constantin afandaki kaka na kiti na ye ya bokonzi, amonisaki ete azalaki kaka na mposa ya bokonzi mpe ya kosala masumu oyo ekosala ete atikala kaka na bokonzi.”​—Richard Rubenstein, profesɛrɛ moko oyo atalaka matata oyo ebimaka kati na bato mpe na mangomba.

  • “Tokoki kotya ntembe te ete na nsuka ya bomoi na ye, Constantin akómaki mokristo, soki kaka moto akipe te bomoi na ye ya mokristo.”​—Paul Keresztes, profesɛrɛ moko ya istware.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto