Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/3 nk. 26-30
  • Constantin Le Grand mobundeli ya boklisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Constantin Le Grand mobundeli ya boklisto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisolo ya Constantin
  • Lingomba engebene mwango ya Constantin
  • Akómaki nde moklisto?
  • Azalaki nde “Mosantu”?
  • Mbuma ya milende na ye
  • Boklisto ya solo ezali wapi?
  • Constantin
    Lamuká!—2014
  • Na nini Constantin abongwanaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Lolenge nini boklisto ya lokuta ekómaki eteni ya mokili oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ekulusu: elembo na boklisto liboso na Constantin?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/3 nk. 26-30

Constantin Le Grand mobundeli ya boklisto?

Constantin, amperere Moloma azali kati na mwa bato moke oyo lisolo ya makambo ya kala ekembisi nkombo na bango na kobakisáká liloba “Grand” (Monene). Mangomba ya boklisto ebakisaki maloba lokola “mosantu,” “ntoma ya zomi na misato,” “mobulami oyo akokani na bantoma,” mpe ‘moponami na Nzambe mpo na komema mbongwana eleki monene kati na mokili mobimba.’ Na bokeseni, bamoko bazali kolobela ye lokola “mosopi ya makila, oyo ayebani na botɛmɛli makasi na mitinda milongobani mpe atondi na bozimbisi, . . . monyokoli, mobomi monene ya bato.”

EBELE ya baklisto bateyamaki ete Constantin le Grand azalaki moko kati na bato oyo basalaki makambo malamu koleka mpo na boklisto. Bazali kotalela ye lokola mosikoli ya baklisto na bwale oyo bazalaki komona na mabɔkɔ ya Baloma mpe moto oyo apesaki bonsomi ya losambo. Na koleka, bato mingi bandimaka ete azalaki molandi ya sembo ya matambe ya Yesu Klisto na mposa makasi ya kotombola matomba ya boklisto. Lingomba ya Ortodokse ya Azia mpe Lingomba ya Copte babéngaka ye Constantin na mama na ye Hélène ete, “basantu.” Basalelaka bango feti na mokolo ya 3 Yúni to engebene manaka ya lingomba na mokolo ya 21 Máí.

Constantin le Grand azalaki mpenza nani? Mokumba na ye ezalaki nini na bokoli ya boklisto nsima ya bantoma? Mpo na kozwa bingɛngiseli tótika lisolo ya makambo ya kala mpe banganga-mayele báyanola na mituna yango.

Lisolo ya Constantin

Constantin, mwana ya Constance Chlore, abotamaki na engumba Niš, na ekólo Serbie pene na mobu 275 T.B. Ntango tata na ye akómaki amperere ya bitúká ya Loma oyo bizalaki na wɛsti na mobu 293 T.B., ye azalaki kobunda bitumba na Ebale Danube, na bitindá ya Amperere Galère. Na mobu 306 T.B., Constantin azongaki na ekólo Angleterre epai ya tata na ye oyo akómaki pene ya kokufa. Mwa moke na nsima ya liwa ya tata na ye, basoda bakómisaki Constantin amperere.

Na eleko wana, bato mosusu mitano bazalaki koloba ete bazalaki baamperere. Kati na mobu 306 mpe mobu 324 T.B., nsima wana Constantin akómaki amperere bobele moko, bitumba ya banamboka bizalaki ntango nyonso kosalema. Lokola alongaki na bitumba oyo atindaki basoda mbala mibale, lokumu na ye etombwanaki kati na lisolo ya Loma mpe akómaki mokonzi bobele moko ya Bokonzi ya Loma.

Na mobu 312 T.B., Constantin, alongaki Maxence, oyo azalaki monguna na ye na etumba oyo esalemaki na gbagba (pont) ebéngami Milvius na libándá ya engumba Loma. Bakomi oyo balongisaka bindimeli ya mangomba ya boklisto bazalaki koloba ete na boumeli ya etumba wana, elembo moko ya ekulusu ezalaki kopela mɔ́tɔ emonanaki na nse ya moi mpe ezalaki na maloba ya Latin ete In hoc signo vinces, elimboli ete “Okolonga mpo na elembo oyo.” Elobamaka mpe ete bayebisaki Constantin kati na ndɔtɔ, ete akoma lɛtɛlɛ mibale ya liboso ya nkombo ya Klisto na Greke na banguba oyo basoda na ye bazalaki kosalela na etumba. Nzokande, lisolo yango ezali na makambo mingi oyo etyami na esika na yango te. Buku Lisolo ya boklisto (na Lingelesi) elobi ete: “Bongolabongola ezali na oyo etali bosikisiki ya eleko, ya esika mpe ya makambo mikemike ya emonaneli wana.” Wana bayambaki Constantin na engumba Loma, Sénat ya bapakano elobaki ete ye azali mokonzi Mosantu (Auguste) mpe Pontifex Maximus, oyo elimboli, nganga monene ya lingomba ya bapakano na bokonzi ya Loma.

Na mobu 313 T.B., Constantin asalaki boyokani na Amperere Licinius, moyangeli ya bitúká ya ɛsti. Na kotalela mobeko ebéngami édit de Milan, bango mibale bapesaki bonsomi ya losambo mpe lotomo ndenge moko na mangomba nyonso. Nzokande, ebele ya banganga-mayele ya istware batyolaka ntina ya mobeko yango, kolobáká ete ezalaki se mokanda lokola oyo amesanaki kotinda mpe ezalaki te mokanda ya ntina euti na mokonzi oyo emonisaki mbongwana na makambo etali boklisto.

Na boumeli ya mbula zomi oyo elandaki, Constantin alongaki Licinius, mowelani na ye ya nsuka, mpe akómaki amperere oyo azangi monguna na mokili ya Loma. Na mobu 325 T.B., wana azwaki naino batisimo te, akambaki likita ya liboso ya monene oyo esangisaki bakonzi ya mangomba ya “boklisto,” likita oyo ekweisaki mateya ya Arius mpe ebimisaki bindimeli oyo ebongaki kolanda mpe babéngaki yango “Credo de Nicée.”

Nsukansuka na mobu 337 T.B., Constantin azwaki maladi. Na eleko wana ya nsuka ya bomoi na ye, azwaki batisimo, mpe akufaki. Nsima ya liwa na ye, Sénat ekómisaki ye moko ya banzambe ya Loma.

Lingomba engebene mwango ya Constantin

Kokanisáká bizaleli oyo baamperere ya Loma ya ekeke ya misato mpe ya ekeke ya minei bazalaki na yango liboso ya lingomba, buku Istoria tou Ellinikou Ethnous (Lisolo ya mboka Grèce) elobi ete: “Ata ntango baoyo bazalaki koyangela lokola baamperere bamipesaki mpenza na makambo ya lingomba te, kotaleláká bongo ezaleli ya bato mingi ya ntango wana, bamonaki malamu kopesa lingomba etɛlɛmɛlo ya lokumu na makambo ya politiki, mpo na kokɔtisa ata moke makambo ya lingomba kati na misala na bango.”

Na ntembe te, Constantin mpe azalaki kolanda bato ya eleko na ye. Na ebandeli ya mosala na ye, azalaki na mposa ya lisungi ya “nzambe,” mpe yango ekokaki te kopesamela ye na banzambe bazangi ntina oyo bazalaki na Loma. Boyangeli, bakisa mpe lingomba na yango mpe bibongiseli mosusu, ezalaki pene ya kokwea, mpe esengelaki eloko mosusu ya sika oyo ekopesa makasi mpo na kokembisa yango lisusu. Ansiklopedi Hidria elobi ete: “Constantin azalaki kosepela na lingomba ya boklisto mpo ete esungaki ye bobele na kolonga etumba te kasi mpe na kobongisa lisusu boyangeli na ye. Mangomba ya boklisto oyo ezalaki na bisika nyonso ekómaki kosunga ye na makambo ya politiki. . . . Azwaki bakonzi minene ya mangomba ya eleko wana ete bázala zingazinga na ye . . . , mpe asɛngaki ete bábatela bomoko na bango makasi.”

Constantin amonaki ete lingomba ya “boklisto”—atako na eleko wana ezalaki ya lipɛngwi mpe na misala mabe—ekokaki kosalelama lokola nguya ya sika mpe ya kotya bato esika moko mpo na kokokisa mokano ya koyangela lokola amperere. Kondimáká bongo miboko ya boklisto ya lipɛngwi mpo na kozwa lisungi ete akokisa mikano na ye ya politiki, azwaki ekateli ya kotya bato esika moko kati na lingomba ya “katoliki” to lingomba ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Mimeseno ya bapakano mpe milulu na yango epesamelaki bankombo ya “boklisto.” Mpe bakonzi ya mangomba ya “boklisto” bapesamelaki etɛlɛmɛlo ya lokumu, lifuti na mosala na bango, mpe bopusi motindo moko na banganga nzambe bapakano.

Kolukáká ete boyokani ezala kati na lingomba mpo na mikano na ye ya politiki, Constantin azalaki nokinoki kopekisa makanisi nyonso ya kotɛmɛla, engebene bosolo ya mateya te, kasi engebene makambo oyo bato mingi basepelaki na yango. Bokeseni makasi ya bindimeli oyo ekabolaki mangomba ya “boklisto” epesaki ye libaku ya kosala lokola moyokanisi oyo “atindami na Nzambe.” Lolenge ye azalaki kotalela Lingomba ya Donatiste ya Afrika ya nɔrdi mpe na baoyo bazalaki kolanda Arius na ɛsti ya bokonzi ya Loma, asosolaki nokinoki ete mpo na kosala lingomba ya makasi mpe ya bomoko, ekokaki te bobele kondimisa bato makambo na bilembeteli ya solo.a Ezalaki mpo na koluka kosukisa ntembe ya mateya ya Arius nde abéngisaki likita ya liboso ya monene mpo na bosangisi mangomba kati na lisolo ya lingomba.​—Talá etanda “Constantin mpe likita monene ya Nicée.”

Na oyo etali Constantin, Paul Johnson, nganga-mayele ya istware alobi ete: “Moko ya bantina oyo epusaki ye na kondima boklisto ekokaki kozala ete yango ezalaki kopesa ye mpe Letá libaku ya kotambwisa misala oyo miyokanaki na Lingomba mpe kobongisa misala oyo miyokanaki na lingomba te.”

Akómaki nde moklisto?

Johnson akomi ete: “Constantin atikaki kosambela moi te mpe abatelaki elembo ya moi kati na misolo na ye ya ebende.” Buku Encyclopédie catholique emonisi ete: “Constantin azalaki na koponapona te kati na “baklisto” mpe bapakano. Lokola azalaki pontifex maximus abatelaki losambo ya bapakano mpe ntomo na yango.” Ansiklopedi Hidria, elobi ete: “Constantin akómaki moklisto te,” mpe ebakisi ete: “Eusèbe de Césarée, oyo akomaki lisolo ya bomoi na ye, alobi ete akómaki moklisto na bangonga ya nsuka ya bomoi na ye. Batisimo yango ezali kondimisa te, mpo ete mokolo oyo elekaki liboso ete azwa batisimo, [Constantin] apesaki mbeka epai na Zeus mpamba te azalaki lisusu Pontifex Maximus.”

Kino mokolo ya liwa na ye na mobu 337 T.B., Constantin azalaki Pontifex Maximus mopakano, mokonzi aleki likoló na makambo ya lingomba. Mpo na batisimo na ye ebongi kotuna boye: Yango esalemaki nsima wana abongolaki motema solosolo mpe atikaki mabe, ndenge yango esɛngami kati na Makomami? (Misala 2:38, 40, 41) Constantin azindisamaki mobimba na mai lokola elembo ete amipesaki mpo na kosalela Yehova Nzambe?—Kokanisá na Misala 8:36-39.

Azalaki nde “Mosantu”?

Buku Encyclopédie britannique elobi ete: “Constantin abéngamaki ete “Monene” mpo na makambo oyo asalaki kasi mpo na bizaleli na ye te. Ɛɛ, soki batalelaki bizaleli na ye, azalaki moto oyo aleki moke mpenza kati na baoyo nyonso babéngami ete Monene ezala na ntango ya kala to na ntango na biso.” Mpe buku Lisolo ya boklisto (na Lingelesi) ezali koyebisa biso ete: “Ezali na balapolo ya kala oyo emonisi ete azalaki moto ya nkanda makasi mpe ya nkɛlɛ. . . . Azalaki na limemya te mpo na bomoi ya moto . . . Wana akómaki mokóló akómaki lisusu moto mabe koleka.”

Emonani polele ete Constantin azalaki na bomoto ya malamu te. Molukiluki moko na lisolo ya kala alobi ete: “Bizaleli mabe na ye bizalaki kotinda ye mbala mingi na kosala makambo mabemabe.” (Talá etanda “Kolandana ya koboma bato.”) Herbert Fisher, nganga-mayele na istware alobi kati na buku Lisolo ya mikili ya Mpoto (na Lingelesi) ete Constantin azalaki “moklisto” te. Misala na ye mimonisi ye te lokola moklisto ya solo oyo alataki “bomoto ya sika” mpe epai na nani bakokaki kokuta mbuma ya elimo santu ya Nzambe—bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, mpe komikanga motema.​—Bakolose 3:9, 10; Bagalatia 5:22, 23.

Mbuma ya milende na ye

Lokola azalaki Pontifex Maximus mopakano—mpe na yango mokonzi ya lingomba na Bokonzi ya Loma—Constantin alukaki kosala boninga na baepiskɔpɔ ya lingomba ya lipɛngwi. Apesaki bango etɛlɛmɛlo ya nguya, lokumu, mpe bozwi motindo moko na bakonzi ya lingomba ya Letá ya Loma. Buku Encyclopédie catholique endimi ete: “Baepiskɔpɔ mosusu, bazimbisamaki na nkembo ya ndako ya mokonzi, balekisaki ndelo kino kokumisa amperere kolobáká ete azali anzelu ya Nzambe, mobulami, mpe basakolaki ete akoyangela na likoló, motindo moko na Mwana na Nzambe.”

Lokola boklisto ya lipɛngwi endimamaki na politiki, mokemoke ekómaki eteni monene ya mokili oyo, ya ebongiseli ezangi ntina, mpe etangwaki mosika na mateya ya Yesu Klisto. (Yoane 15:19; 17:14, 16; Emoniseli 17:1, 2) Lokola litomba, basangisaki boklisto na mateya mpe misala ya lokuta—lokola bosato, kozanga kokufa ya molimo, lifelo ya mɔ́tɔ, epongelo, mabondeli mpo na bakufi, kosalela sapelɛ, bililingi, bikeko, mpe biloko mosusu ya motindo wana.​—Kokanisá na 2 Bakolinti 6:14-18.

Uta na Constantin, lingomba esangolaki lisusu ezaleli ya kozala na bokonzi likoló ya bato. Henderson mpe Charles Buck, banganga-mayele ya Biblia, balobi ete: “Evanzile ebungisaki motindo na yango ezangi mindɔndɔ, milulu mpe bafeti ya mineneminene ekɔtisamaki, babandaki kopesa bateyi ya boklisto lokumu lokola oyo ya bato ya mokili mpe lifuti na misala na bango, mpe Bokonzi ya Klisto ebongwanaki kino kokóma bokonzi ya mokili oyo.”

Boklisto ya solo ezali wapi?

Lisolo ya makambo ya kala emonisi solo oyo ebombami nsima ya “bonene” ya Constantin. Na esika ete Yesu Klisto, oyo azali Motó ya lisangá ya boklisto abandisa yango, mangomba ya boklisto ezali mbuma oyo ebimi na boyokani ya politiki mpe na mwango ya mayele mabe ya amperere mopakano. Na lolenge lobongi mpenza, Paul Johnson, nganga-mayele na istware azali kotuna ete: “Bokonzi emipesaki na boklisto to boklisto nde esalaki pite na bokonzi?”

Baoyo nyonso balingi mpenza kokɔta na boklisto ya pɛtɔ bakoki kosalisama mpo na koyeba mpe kosangana na lisangá ya boklisto ya solo lelo. Batatoli ya Yehova na mokili mobimba na bolingo malamu balingi kosalisa bato ya mitema sembo ete báyeba boklisto ya solo mpe básambela Nzambe na motindo oyo azali kondima.​—Yoane 4:23, 24.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Donatisme ezalaki mwa lingomba moke ya “baklisto” na ekeke ya minei mpe ya mitano T.B. Basangani na yango bazalaki kondima ete motuya ya kopɛtolama (sacrement) etalelaka bizaleli malamu ya mosali ya Nzambe mpe lingomba esengelaki kobimisa basali na masumu minene kati na yango. Arianisme ezalaki etuluku moko ya “baklisto” na ekeke ya minei oyo baboyaki kondima ete Yesu Klisto azali Nzambe. Arius ateyaki ete Nzambe akoki kobotama te mpe azali na ebandeli te. Mwana, lokola abotamaki, akoki kozala Nzambe te na lolenge oyo Tata azali. Mwana azangi ebandeli te lokola Nzambe kasi azalisamaki mpe azali na bomoi mpo na mokano ya Tata.

[Etanda na lokasa 28]

Constantin mpe likita monene ya Nicée

Mokumba nini Amperere Constantin, oyo abatisamaki naino te akokisaki na likita monene ya Nicée? Buku Encyclopédie britannique elobi ete: “Constantin ye moko akambaki, mpe atambwisaki masolo . . . Lokola bazalaki kobanga amperere, baepiskɔpɔ nyonso longola bobele mibale, batyaki sinyatili na mibeko oyo mikamatamaki, mingi basalaki yango na bolingo na bango moko te.”

Nsima ya sanza mibale ya ntembe makasi oyo ezalaki kati na baepiskɔpɔ, mopakano oyo, ye moto ya politiki, akataki likambo yango mpe alongisaki baoyo bazalaki koloba ete Yesu azalaki Nzambe. Mpo na nini bongo? Buku A Short History of Christian Doctrine (Lisolo mokuse ya mateya ya boklisto) elobi ete: “Constantin azalaki na bososoli soko moke te likoló na mateya ya teoloji ya Greke oyo mazalaki kotunama.” Eloko asosolaki ezalaki ete bokabwani ya lingomba ezalaki likama mpo na bokonzi na ye, mpe azalaki na mposa makasi ya kokembisa bokonzi na ye.

Na ntina na mokanda ya nsuka oyo ekomamaki na likita monene ya Nicée na bokambami ya Constantin, buku Istoria tou Ellinikou Ethnous (Lisolo ya mboka Grèce) elobi ete: “Ezali komonisa kozanga bosepeli [ya Constantin] na mateya ya lingomba, . . . motó makasi na ye na komekáká na ndenge nyonso kozongisa bomoko kati na lingomba, mpe na nsuka endimiseli na ye makasi ete lokola azalaki ‘episkɔpɔ ya baoyo bazalaki baklisto te’ azalaki na ekateli ya nsuka na makambo matali lingomba.” Ekateli oyo ekamatamaki na likita wana ezwamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe?—Kokanisá na Misala 15:28, 29.

[Etanda na lokasa 29]

Kobomama ya bato kati na libota ya bokonzi

Na nse na motó na likambo oyo, buku Istoria tou Ellinikou Ethnous (Lisolo ya mboka Grèce) elimboli likambo oyo [buku yango] ezali kobénga ete “mbeba ya nsɔmɔ kati na libota oyo Constantin asalaki.” Nokinoki nsima wana abongisaki bokonzi na ye, abosanaki lolenge ya kosepela na makambo mazangi kokanama mpe asosolaki likama oyo ezalaki zingazinga na ye. Lokola azalaki kokanisela bato mabe mpe mbala mosusu na kopusama na balɛti (flatteurs), akolisaki makanisi mabe likoló ya Licinius, mwana ya ndeko na ye—tata na ye mpe azalaki amperere (co-Auguste) oyo ye (Constantin) asilaki koboma—ete akoki kokóma mowelani na ye. Koboma yango elandanaki na kobomama ya Crispus, mwana ya liboso ya Constantin, oyo Fausta, mwasi mosusu ya Constantin, abomisaki mpamba te alingaki ete bokonzi etikala epai ya bana na ye.

Na ntina na likambo wana Fausta akufaki liwa ya nsɔmɔ. Emonani ete Mosantu (Augusta) Hélène, oyo azalaki na bopusi likoló ya mwana na ye Constantin kino na nsuka, nde abomisaki ye. Ezali mpo na mayoki wana ezangi kolongobana oyo mbala mingi ezalaki kotambwisa Constantin, nde abomaki ebele ya baninga na ye mpe basalani na ye. Buku History of the Middle Ages (Masolo ya Moyen-Âge) esukisi boye ete: “Kobomama—kasi koboma kaka te—ya mwana na ye mpe ya mwasi na ye emonisi ete azwaki soko moke te bopusi ya elimo kati na boklisto.”

[Elilingi na lokasa 30]

Monima oyo kati na Loma esalelamaká mpo na kokumisa Constantin

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]

Musée du Louvre, Paris

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto