Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 6/14 lok. 3
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Chine
  • Mokili
  • Canada
  • Irlande
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Makambo esalemaka ndenge nini na fɛti ya libala ya Batatoli ya Yehova?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Mabala oyo esalemi na lokumu na miso ya Nzambe mpe ya bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bóbatela esengo mpe lokumu ya mokolo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Lamuká!—2014
g 6/14 lok. 3

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Chine

Mwasi ná mobali oyo babomá libala na bango

Na kokesana na 2012, motángo ya mabala oyo ekufaka emataki mpenza (41%) na Beijing, mboka-mokonzi ya Chine na boumeli ya basanza libwa ya liboso ya 2013. Bato ya mayele balobi ete yango esalemaki bongo mpo babalani balukaki kokima kofuta mpako ya (20%) oyo Leta eutaki kotya mpo na baoyo balingi kotɛka na ntalo mingi, bandako oyo basombaki. Kasi, mpo na bantina mosusu, Leta ekitiselaka baoyo babomi libala mpako yango soki balingi kotɛka ndako na bango ya mibale.

Mokili

Saani ya bilei ya banyama mikemike

Lapolo moko oyo ONU euti kobimisa elobi ete soki bato mingi bazali kolya mwa banyama mikemike, yango ekoki kosilisa likambo ya kozanga kolya malamu. Lokola mwa banyama yango ezalaka na proteini mingi mpe elyaka bilei ya malamu, “bato bakoki kolya yango na esika ya mosuni ya nyama mpo ezali na baproteini ndenge moko.” Kasi lapolo yango elobi mpe ete “na bikólo mosusu bato balingaka kolya [mwa banyama] yango te.”

Canada

Mwa molangi oyo babombaka maki ya mwasi mpe mai ya mobali na malili

Balopitalo oyo ebombaka maki ya bomwasi mpe mai ya mibali (ovules mpe spermatozoïdes) na malili bazali koyeba te básala nini na oyo esí basangisaki na labo mpo ebanda kosala mwana, oyo “bankolo na yango” bayebani lisusu te. Kaka lopitalo moko mpamba elobi ete ezali na maki yango 1 000 oyo ezali naino na bomoi, oyo bankolo na yango “bamonanaka lisusu te.”

Irlande

Molulu ya libala ya bato oyo bandimaka lingomba te

Bandimi ya Lingomba ya Katolike oyo balingaki kobala na Irlande basengelaki kopona kosala libala na bango na eglize to na Leta tii na 2013; bakokaki mpe kopona kokende epai ya bato oyo bandimaka mangomba te mpo básalela bango milulu ya libala. Zulunalo moko (Reuters) elobaki ete, “babalani oyo balingaki te kosuka na kokomisa nkombo na buku ya Leta kasi baboyaki mpe milulu ya eglize, basalaki ete biro ya bato yango oyo eutaki kofungwama kala mingi te ekóma na mosala mingi mpenza.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto