Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/10 nk. 18-23
  • Mabala oyo esalemi na lokumu na miso ya Nzambe mpe ya bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabala oyo esalemi na lokumu na miso ya Nzambe mpe ya bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libala ya lokumu ezali oyo endimami na Leta
  • Libala ya bonkɔkɔ mpe libala ya Leta
  • Bóbatela lokumu ya libala
  • Bóbatela esengo mpe lokumu ya mokolo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Makambo esalemaka ndenge nini na fɛti ya libala ya Batatoli ya Yehova?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Milulu ya libala oyo mikumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bafɛti ya mabala oyo ekumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/10 nk. 18-23

Mabala oyo esalemi na lokumu na miso ya Nzambe mpe ya bato

“Fɛti moko ya libala esalemaki na Kana . . . Yesu ná bayekoli na ye babyangamaki mpe na fɛti yango ya libala.”​—Yoane 2:1, 2.

1. Lisolo ya likambo oyo Yesu esalaki na Kana ezali kobenda likebi na biso na nini?

YESU, mama na ye, ná bayekoli na ye mosusu bayebaki ete libala oyo esalemi na ndenge ya lokumu esepelisaka basaleli ya Nzambe. Kutu, Klisto asalaki likamwisi na ye ya liboso na fɛti moko ya libala, mpe yango ebakisaki esengo na fɛti yango. (Yoane 2:1-11) Ekoki kozala ete osilá kokende na libala ya basaleli ya Yehova mpe osepelaki na yango. To ozali kokana ete libala na yo esalema malamu, to ozali kosalisa moninga moko mpo libala na ye eleka malamu. Nini ekoki kosalisa yo?

2. Makambo nini Biblia elobi mpo na libala?

2 Baklisto bayebi ete toli ya Liloba ya Nzambe esalisaka mpenza mwasi ná mobali oyo bazali kokana kobalana. (2 Timote 3:16, 17) Ya solo, ezali na mobeko moko te na kati ya Biblia oyo emonisi ndenge oyo mabala nyonso ya baklisto esengeli kosalemaka. Ezali likambo ya kokamwa te mpo esika na esika ezalaka na mimeseno na yango mpe makambo oyo Leta asɛngaka ezalaka ndenge moko te. Na ndakisa, na ntango ya kala na Yisalaele, molulu moko te ezalaki kosalema na mokolo ya libala. Na mokolo yango, mobali azalaki kaka kokende kozwa mwasi na ye mpe komema ye na ndako na ye to na ndako ya tata na ye. (Genese 24:67; Yisaya 61:10; Matai 1:24) Likambo wana nde ezalaki komonisa polele ete moto abali; ezalaki te na milulu kilikili lokola lelo.

3. Yesu abongisaki lisusu likambo nini oyo esalemaki na Kana?

3 Mpo na Bayisalaele, likambo wana nde ezalaki libala mobimba. Na nsima, bakokaki kosala fɛti lokola oyo elobelami na Yoane 2:1. Babiblia mingi ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Libala ezalaki na Kana.” Kasi, liloba ya Grɛki oyo esalelamaki na vɛrsɛ yango ebongi kobongolama na “fɛti ya libala.”a (Matai 22:2-10; 25:10; Luka 14:8) Lisolo elobi ete Yesu azalaki na libala yango mpe abakisaki esengo ya bato oyo bazalaki na fɛti yango. Kasi, likambo oyo tolingi kosimba ezali ete ndenge oyo mabala ezalaki kosalema na ntango wana ekeseni na oyo ya lelo.

4. Baklisto mosusu baponaka kobalana ndenge nini, mpe mpo na nini?

4 Lelo oyo na mikili mingi, baklisto oyo balingi kobala basengeli kokokisa mwa makambo oyo Leta asɛngaka. Soki bakokisi yango, bakoki kobalana na ndenge oyo endimami na Leta. Yango ekoki kozala mwa molulu oyo ekokambama na zuzi, guvɛrnɛrɛ, to moto moko ya lingomba oyo Leta apesi ndingisa. Baklisto mosusu basepelaka kobalana kaka ndenge wana mpe kobengisa mwa bandeko na bango to baninga baklisto mosusu mpo bámona ndenge ekoleka to básepela elongo na molulu wana ya ntina mingi. (Yilimia 33:11; Yoane 3:29) Kasi, bamosusu mpe bamonaka malamu básalisa fɛti oyo ekosɛnga bango makambo mingi te mpe mbongo mingi te. Ntango mosusu babengisaka kaka mwa baninga mpo bákabola na bango mwa eloko ya kolya. Tokoki kozala na ndenge oyo biso tosepelaka libala esalema; kasi tóbosana te ete baklisto mosusu oyo bakɔmeli na elimo bakoki kozala na makanisi oyo ekeseni na oyo ya biso.​—Baloma 14:3, 4.

5. Mpo na nini baklisto mingi basepelaka básalela bango lisukulu ya libala, mpe yango emonisaka nini?

5 Baklisto mingi balingaka básalela bango lisukulu na mokolo ya libala na bango.b Bayebi ete Yehova nde abandisaki libala mpe na Liloba na ye apesi toli malamu oyo ekoki kosalisa babalani bálonga mpe bázala na esengo. (Genese 2:22-24; Malako 10:6-9; Baefese 5:22-33) Mingi mpe balingaka ete baninga na bango baklisto mpe bandeko na bango bázala na lisukulu yango. Kasi, ndenge nini tosengeli kotalela makambo ndenge na ndenge oyo Leta asɛngaka mpo na kobalisa bato, mpe mimeseno ya esika tofandi na oyo etali libala? Lisolo oyo ekolobela makambo ndenge esalemaka na mikili ndenge na ndenge. Makambo mosusu ekoki kokesana mpenza na oyo oyebi to oyo esalemaka na mboka na bino. Atako bongo, makambo yango nyonso esalemaka na kolanda mitinda oyo ezali na ntina mingi mpo na basaleli ya Nzambe.

Libala ya lokumu ezali oyo endimami na Leta

6, 7. Mpo na nini tosengeli kotosa mibeko ya Leta na oyo etali kobala, mpe ndenge nini tokoki komonisa yango?

6 Atako Yehova nde abandisaki libala, Leta azali na lotomo ya kosɛnga bato oyo balingi kobalana bákokisa mwa masɛngami. Yango ezali mabe te. Yesu alobaki ete: “Bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.” (Malako 12:17) Ntoma Paulo mpe apesaki toli oyo: “Tiká molimo nyonso etosaka bakonzi oyo bazali liboso, mpo ezali na bokonzi te soki na nzela ya Nzambe te; bakonzi oyo bazali batyami na bibonga na bango oyo elandaná na nzela ya Nzambe.”​—Baloma 13:1; Tito 3:1.

7 Na mikili mingi, Kaisala, elingi koloba bakonzi ya Leta nde bakataka soki nani akoki mpo na kobala. Na yango, ntango baklisto mibale, oyo likambo moko te na Biblia epekisi bango, balingi kobalana, balandaka oyo mibeko ya mboka na bango esɛngi. Yango esangisi makambo lokola: kozwa mokanda ya libala, kopona moto oyo azali na ndingisa ya kobalisa, mpe ntango mosusu kokomisa libala na buku. Ntango Kaisala Augusto asɛngaki “bokomisi nkombo,” Malia ná Yozefe batosaki mpe bakendaki na Beteleme mpo na ‘kokomisa nkombo.’​—Luka 2:1-5.

8. Nani abalisaka, mpe ndenge nini Batatoli ya Yehova bamonisaka ete bandimaka likambo yango?

8 Ntango baklisto babalani na kolanda ndenge oyo Leta azali kosɛnga mpe libala na bango ekomami na buku ya Leta, na miso ya Nzambe bakómi mwasi ná mobali. Yango wana, Batatoli ya Yehova bazongelaka lisusu te molulu ya kobalisa; basɛngaka mpe te na babalani bálapa ndai mosusu, ndenge bato mosusu basalaka soki bakokisi mbula 25 to 50 ya libala. (Matai 5:37) (Mangomba mosusu endimaka libala ya Leta te; elobaka ete yango ezali mpenza libala te, sango to pastɛrɛ nde azali na lotomo ya kobalisa.) Na mikili mosusu, Leta apesá nzela na baministre mosusu Batatoli ya Yehova bábalisaka. Soki ezali bongo, ekozala malamu esalema kaka mokolo ya lisukulu ya libala na Ndako ya Bokonzi. Yango nde esika ya losambo ya solo mpe ebongi mpo na kosala lisukulu ya libala oyo ezali ebongiseli ya Yehova Nzambe.

9. (a) Soki mibeko esɛngi ete mokonzi ya Leta abalisa bato, baklisto bakoki kosepela kosala nini na nsima? (b) Makambo nini bato oyo babalani bakoki kosɛnga epai ya bankulutu?

9 Na mikili mosusu, mibeko esɛngaka ete bato bábalana kaka na biro ya Leta, na ndakisa, na biro ya komine to liboso ya mokonzi moko ya Leta oyo aponami. Mbala mingi, nsima ya kosala yango, baklisto bakendaka na Ndako ya Bokonzi mpo na lisukulu ya libala na mokolo yango kaka to na mokolo oyo elandi. (Balekisaka lisusu mikolo mingi te liboso básalela bango lisukulu, mpamba te basili kokóma mwasi ná mobali liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato, ata mpe na lisangá.) Soki babalani balingi ete básalela bango lisukulu na Ndako ya Bokonzi nsima ya kokomisa libala na bango na Leta, basengeli kosɛnga nzela na bankulutu oyo bazali na Komite ya mosala ya lisangá. Bankulutu yango bakotalela soki babalani yango bazali na etamboli malamu, na nsima bakotalela mpe soki ngonga oyo batye mpo na lisukulu ekobebisa te makita ya lisangá mpe makambo mosusu oyo esalemaka na Ndako ya Bokonzi. (1 Bakolinti 14:33, 40) Bankulutu yango bakotalela mpe ndenge oyo balingi kobongisa Ndako ya Bokonzi mpe bakotala soki basengeli kopesa liyebisi mpo na lisukulu yango.

10. Soki baklisto babalani liboso ya Leta, makambo ekoleka ndenge nini na lisukulu?

10 Nkulutu oyo azali kosala lisukulu ya libala asengeli kosala yango na esengo, na ndenge oyo ezali kolendisa na elimo, mpe na lokumu. Soki babalani basilaki kobalana liboso ya Leta, akomonisa yango polele ete basilaki kobalana na kolanda mibeko ya Kaisala. Soki balapaki ndai te liboso ya Leta, bakoki kosala yango na ntango ya lisukulu.c Soki basilaki kolapa ndai liboso ya Leta, kasi balingi lisusu kosala yango liboso ya Yehova mpe lisangá, basengeli koloba yango na ndenge oyo ekomonisa ete basilaki “kokangana esika moko.”​—Matai 19:6; 22:21.

11. Na bisika mosusu baklisto babalanaka ndenge nini, mpe lisukulu esalemaka ndenge nini?

11 Na bamboka mosusu, mobeko esɛngaka molulu ata moko te mpo na kokoma libala, ata liboso ya mokonzi ya Leta. Bato oyo balingi kobalana batondisaka formilɛrɛ moko mpe batyaka sinyatili na bango na nsima bapesaka yango na mokonzi ya Leta. Nsima na yango, bapesaka bango mokanda ya libala. Na mokolo yango bakómaka mwasi ná mobali mpe yango nde dati ya libala na bango. Ndenge tomonaki yango, babalani bakoki kosepela ete nkulutu moko asalela bango lisukulu kaka na mokolo yango na Ndako ya Bokonzi. Nkulutu yango akoyebisa bayangani ete bandeko yango basilaki kobalana mpo Leta asilaki kopesa bango mokanda ya libala. Na ntango wana bakolapa ndai na kolanda maloba oyo ezali na paragrafe 10, na maloba oyo ezali na nse ya lokasa. Bayangani bakosepela elongo na babalani mpe bakozwa litomba na toli oyo euti na Liloba ya Nzambe.​—Loyembo ya Salomo 3:11.

Libala ya bonkɔkɔ mpe libala ya Leta

12. Libala ya bonkɔkɔ ezali nini, mpe ezali malamu kosala nini nsima na yango?

12 Na mikili mosusu, bato basalaka libala ya bonkɔkɔ. Yango ezali te libala ya makango to libala ya “yaká tófanda” to ya bato oyo, ntango mosusu mpe baboti bana, kasi mobali apesá mbongo ya libala te.d Tozali nde kolobela libala oyo esalemaka na kolanda mimeseno ya ekólo to esika moko. Yango ekoki kosangisa makambo lokola kopesa mbongo ya libala, yango ekosala ete libala yango endimama na miso ya Leta mpe ya Nzambe. Leta andimaka libala yango. Na nsima, bakoki kokoma libala yango na buku ya Leta mpe bakopesa babalani mokanda oyo ekomonisa ete bazali mwasi ná mobali. Kokomisa libala ya bonkɔkɔ na buku ya Leta ebatelaka, mingimingi mwasi mpe bana soki mobali akufi. Lisangá esengeli kolendisa bandeko oyo babalani na ndenge ya bonkɔkɔ bákomisa libala yango nokinoki na buku ya Leta. Emonani ete Mibeko ya Moize ezalaki kosɛngisa bato bákomisa mabala mpe kobotama ya bana na mikanda.​—Matai 1:1-16.

13. Ntango nkulutu azali kosala lisukulu ya baklisto oyo babalani libala ya bonkɔkɔ, ezali na ntina ayebisa bayangani likambo nini?

13 Ntango bato babalani na ndenge ya bonkɔkɔ bakómi mpenza mwasi ná mobali soki Leta andimaka libala yango. Ndenge tomonaki yango liboso, baklisto oyo babalani na ndenge yango bakoki kosɛnga básalela bango lisukulu mpe bakolapa ndai na Ndako ya Bokonzi. Na ntango ya lisukulu yango, molobi akomonisa ete baklisto yango basilaki kobalana na kolanda mibeko ya Leta. Lisukulu ekozala kaka moko. Libala ezali kaka moko elingi koloba libala ya bonkɔkɔ mpe lisukulu kaka moko. Kosala makambo yango mibale na mokolo moko to nsima ya mikolo mingi te epesaka libala ya baklisto lokumu.

14. Moklisto asengeli kosala nini soki libala ya bonkɔkɔ mpe ya Leta esalemaka na esika oyo afandi?

14 Na mikili mosusu, atako Leta andimaka libala ya bonkɔkɔ, abongisá mpe kobalisa bato mosusu oyo balingi. Yango esalemaka liboso ya mokonzi moko ya Leta mpe ekoki kosɛnga ete babalani bálapa ndai mpe bátya sinyatili na mokanda ya Leta. Baklisto mosusu basepelaka kobalana ndenge wana na esika ya kosala libala ya bonkɔkɔ. Ezali na mobeko moko te oyo esɛngisi kosala mabala yango nyonso mibale; mokomoko endimami na miso ya Leta. Makanisi oyo ezali na paragrafe 9 mpe 10 mpo na lisukulu mpe ndai ya libala esengeli mpe kosalelama awa. Likambo ya ntina ezali ete bato yango mibale babalani na ndenge ya lokumu na miso ya Nzambe mpe ya bato.​—Luka 20:25; 1 Petelo 2:13, 14.

Bóbatela lokumu ya libala

15, 16. Ndenge nini babalani bakoki kopesana lokumu mpe ndenge nini ndeko oyo akosala lisukulu akoki kopesa libala lokumu?

15 Ntango mokakatano ebimaki na libala ya mokonzi ya Perse, Memukana mopesi-toli moko ya mokonzi, alobaki ete ‘basi nyonso bakokumisa mibali na bango.’ (Esetele 1:20) Basi baklisto bazelaka te ete mokonzi moko abimisa mobeko mpo na kotinda bango bátosa mibali na bango. Ndenge moko mpe, mibali baklisto bapesaka basi na bango lokumu. (Masese 31:11, 30; 1 Petelo 3:7) Babalani basengeli te kokanisa ete kopesa libala lokumu ebandaka nsima ya bambula. Lokumu ya libala esengeli kobanda na ebandeli, elingi koloba, na mokolo ya libala.

16 Ezali kaka te mwasi ná mobali oyo babalani nde bakomonisa lokumu na mokolo ya libala. Nkulutu oyo aponami mpo na kosala lisukulu asengeli kosala yango na ndenge ya lokumu. Ntango azali kosala lisukulu akobanda koloba nde epai ya mwasi ná mobali oyo babalani. Mpo na kopesa lokumu na babalani asengeli te koloba kaka makambo ya kosɛkisa; asengeli mpe koboya kosalela masapo ya bonkɔkɔ. Asengeli te kolobela mingi makambo oyo ye ayebi mpo na mobali to mwasi oyo abali, oyo ekoki kozala nsɔni mpo na bango to mpo na bato oyo bayei kolanda lisukulu. Kasi, asengeli kosala lisukulu yango na esengo, na ndenge ya kolendisa; akomonisa nani azali Mobandisi ya libala mpe akolobela toli na ye ya malamu mingi. Soki nkulutu asali lisukulu yango na ndenge oyo ebongi, libala ekopesa Yehova Nzambe lokumu.

17. Mpo na nini esengeli ete mabala ya baklisto esalema na ndenge oyo Leta azali kosɛnga?

17 Na ntembe te omoni ete lisolo oyo elobeli makambo mingi etali mabala oyo endimami na Leta. Ekoki kozala ete makambo mosusu etaleli mpenza te esika oyo ofandi. Kasi, biso nyonso tosengeli koyeba ete libala ya Batatoli ya Yehova esengeli komonisa ete batosaka mibeko ya mboka mpe ya Kaisala. (Luka 20:25) Paulo apesi biso toli oyo: “Bózongisa epai ya banso oyo esengeli na bango, epai ya oyo asɛngi mpako, mpako; epai ya oyo asɛngi lifuti, lifuti; . . . epai ya oyo asɛngi lokumu, lokumu.” (Baloma 13:7) Ya solo, ezali malamu ete banda na mokolo ya liboso, baklisto bákumisa ebongiseli yango ya Nzambe.

18. Bato mosusu oyo babalani basepelaka kosala nini oyo esengeli mpe bátyela yango likebi, mpe tokozwa toli mpo na yango epai wapi?

18 Baklisto mingi basepelaka mpe kosala fɛti na mokolo ya libala na bango. Tóbosana te ete Yesu akendaki na fɛti moko ya libala. Soki tosepeli kosala fɛti, toli nini ya Biblia ekoki kosalisa biso mpo fɛti yango epesa Nzambe lokumu, mpe esepelisa bato oyo babalani mpe lisangá? Lisolo oyo elandi ekolobela likambo yango.e

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba yango ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela ata fɛti mosusu.​—Esetele 9:22.

b Batatoli ya Yehova basalaka lisukulu ya libala oyo ezali na motó ya likambo ete: “Libala ya lokumu na miso ya Nzambe”; lisukulu yango eumelaka miniti soki 30. Batoli na yango euti na buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota mpe na mikanda mosusu ya Batatoli ya Yehova. Ezalaka na ntina mingi mpo na babalani mpe bato nyonso oyo bayanganaka.

c Soki mibeko ya Leta eyebisi te ndai oyo babalani basengeli kolapa, ndai oyo baklisto basalelaka yango oyo: Mpo na mobali: “Ngai [. . .] nakamati yo [. . .] lokola mwasi na ngai, nalapi ndai ya kolinga yo mpe ya kosepela na yo na boyokani na mobeko ya Nzambe ndenge eyebisami kati na Makomami mosantu mpo na mibali baklisto, ntango nyonso oyo tokozala na bomoi elongo awa na mabelé kati na ebongiseli ya libala ndenge Nzambe abandisaki yango.” Mpo na mwasi: “Ngai [. . .] nakamati yo [. . .] lokola mobali na ngai mpe nalapi ndai ya kolinga yo, ya kosepela na yo mpe ya komonisa yo limemya mozindo na boyokani na mobeko ya Nzambe ndenge eyebisami kati na Makomami mosantu mpo na basi baklisto, ntango nyonso oyo tokozala na bomoi elongo awa na mabelé kati na ebongiseli ya libala ndenge Nzambe abandisaki yango.”

d Talá bandimbola ya libala ya bonkɔkɔ na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1963, lokasa 575 (ebimeli ya Lifalanse).

e Talá mpe lisolo “Bóbatela esengo mpe lokumu ya mokolo ya libala,” na lokasa 28.

Ozali koyeba lisusu?

• Na oyo etali libala, mpo na nini tosengeli kotalela masɛngami ya Leta mpe ya Biblia?

• Soki baklisto bakomisi libala na bango na Leta, bakoki kosɛnga likambo nini na nsima?

• Mpo na nini lisukulu ya libala esalemaka na Ndako ya Bokonzi?

[Elilingi na lokasa 18]

Na Yisalaele ya kala, mobali azalaki komema mwasi na ye na ndako na ye to na ndako ya tata na ye; likambo yango ezalaki komonisa ete babalani

[Elilingi na lokasa 21]

Baklisto bakoki kosepela ete nsima ya libala ya bonkɔkɔ, básalela bango lisukulu na Ndako ya Bokonzi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto