Bóbatela esengo mpe lokumu ya mokolo ya libala
GORDON, mobali moko oyo alingi kokokisa mbula 60 banda abalá alobi boye: “Mokolo ya libala na ngai ezali moko ya mikolo oyo elekaki ntina mpe esengo na bomoi na ngai.” Mpo na nini baklisto bamonaka ete mokolo ya libala ezali mokolo ya ntina mingi? Ezali mokolo oyo moklisto alapaka ndai liboso ya bato oyo alingaka mingi, elingi koloba, Yehova Nzambe mpe molongani na ye. (Matai 22:37; Baefese 5:22-29) Elenge mwasi ná elenge mobali oyo bazali kokana kobalana bazalaka na mposa básepela mpenza na mokolo ya libala na bango, kasi mpe bákumisa Mobandisi ya libala.—Genese 2:18-24; Matai 19:5, 6.
Ndenge nini mobali akoki kosala ete mokolo yango ezala mpenza na lokumu? Mwasi asengeli kosala nini mpo na kopesa mobali na ye mpe Yehova lokumu na mokolo yango? Ndenge nini bato oyo bakoya kosepela na bango elongo bakoki kobakisa esengo ya mokolo yango? Tótalela mwa mitinda ya Biblia mpo na kozwa eyano na mituna wana; mpe soki tosaleli mitinda yango, ekosalisa biso tókima makambo oyo ekoki kobebisa esengo ya mokolo yango ya ntina mingi.
Ezali mokumba ya nani?
Na mikili mosusu, Leta apesá ndingisa na bankulutu mosusu bakomaka mabala ya Batatoli ya Yehova na buku ya Leta. Ata na mikili oyo kaka mokonzi ya Leta nde azali na lotomo ya kokoma nkombo ya babalani na buku, baklisto bakoki mpe kosɛnga básalela bango lisukulu na nsima. Na lisukulu yango, mbala mingi balimbwelaka mobali mokumba oyo Nzambe apesi ye ya kozala mokonzi ya libota. (1 Bakolinti 11:3) Na yango, mobali nde azali na mokumba monene na makambo oyo ekosalema na mokolo ya libala. Ya solo, ndenge oyo makambo ekoleka na mokolo ya libala mpe ntango mosusu fɛti oyo ekosalema na mokolo yango ebongisamaka mikolo mingi liboso. Kasi, mpo na nini yango ekoki kozala mokakatano mpo na mobali?
Ntina moko ezali ete bandeko, ezala ya mobali to ya mwasi, bakoki koluka ete makambo esalema ndenge oyo bango basepeli. Rodolfo, oyo asalá mbala mingi lokola mokambi ya bafɛti ya libala, alobi boye: “Na bantango mosusu bandeko ya libota balukaka kopusa babalani básala makambo ndenge bango balingi, mingimingi soki bango mpe bapesi mbongo mpo na fɛti yango. Babimisaka makanisi ebele ebele mpo na ndenge oyo makambo esengeli kotambola mpe mpo na fɛti oyo esengeli kosalema. Yango ekoki kobebisa mokumba oyo mobali azali na yango ya mokonzi.”
Max, oyo asalaka lokola mokambi ya bafɛti ya libala banda mbula koleka 35, alobi boye: “Mbala mingi namonaka ete mwasi nde azwaka bikateli na ndenge makambo esengeli kosalema na mokolo ya libala na bango mpe ndenge oyo fɛti ekosalema, mpe mobali azalaka na mingi ya koloba te.” David, oyo akambá mpe mabala mingi, alobi boye: “Ekoki kozala ete mibali yango bamesaná kotambwisa makambo te mpe yango esalaka ete bázala mpenza na mingi ya koloba te ntango bazali kobongisa mokolo ya libala na bango.” Ndenge nini mobali akoki kokokisa mokumba na ye?
Esengeli kosolola
Mpo mobali akokisa malamu mokumba na ye ya kobongisa mokolo ya libala, asengeli kosolola. Biblia elobi ete: “Myango ekokufa wana bato ya toli bazangi.” (Masese 15:22) Yango wana, mpo na kokima makambo mingi oyo ekoki kobebisa esengo ya mokolo yango, ezalaka malamu ete mobali asolola liboso na mwasi na ye, na bato ya mabota na bango, mpe na bato mosusu oyo bakoki kopesa bango toli ya malamu oyo euti na Biblia.
Ya solo, ezali na ntina ete bafianse básolola naino bango mibale malamumalamu mpo na koyokana ndenge makambo ekoleka mpe kotalela makoki oyo bazali na yango. Mpo na nini? Tótalela makanisi ya Ivan ná Delwyn, oyo babalaná esili koleka bambula mingi atako bazali bato ya mboka moko te. Ivan, alobi boye mpo na mokolo ya libala na bango: “Na motó na ngai nayebaki ndenge oyo libala na ngai esengeli kosalema; mposa na ngai ezalaki ete baninga na ngai nyonso báya, gato ya libala ezanga te, mpe mwasi na ngai alata robɛ ya mpɛmbɛ ya libala. Nzokande, Delwyn, azalaki kolinga kosala likambo moko ya moke, ezangi mindɔndɔ mpe gato ya libala ezala te. Azalaki kutu kokanisa kolata robɛ ya libala te.”
Ndenge nini mobali yango ná mwasi na ye basalaki mpo bákóma na likanisi moko? Basololaki polele mpe na boboto nyonso. (Masese 12:18) Ivan alobi boye: “Totángaki masolo mingi oyo ezali kolobela libala, na ndakisa masolo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1984 (ebimeli ya Lifalanse.)a Masolo yango esalisaki biso tótalela makambo na miso ya elimo. Lokola tozali bato ya mboka moko te, tosengelaki koyokana na makambo mwa mingi. Tosalaki bongo mpe toyokanaki malamu.”
Aret ná Penny basalaki mpe bongo. Aret alobi boye: “Ngai ná Penny tosololaki malamu; nayebisaki ye makambo oyo ngai nalingaki, ye mpe ayebisaki ngai oyo ye alingaki mpo na mokolo ya libala na biso; yango esalisaki biso tóyokana malamu mpe tóbongisa makambo malamu. Tobondelaki Yehova apambola mokolo yango. Natunaki mpe makanisi ya baboti na ngai mpe ya babalani mosusu oyo bakɔmeli na elimo. Batoli na bango esalisaki biso mingi. Yango esalaki ete makambo eleka malamu na mokolo ya libala na biso.”
Molato mpe monzɛlɛ oyo ebongi
Tokoki kokamwa te ete babalani bálinga kolata kitoko na mokolo ya libala na bango. (Nzembo 45:8-15) Nzokande, yango ekoki kosɛnga bango ntango, milende, mpe mbongo mpo na kozwa bilamba oyo ebongi. Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa bango bápona molato ya kitoko mpe oyo ebongi?
Tólobela naino elamba oyo mwasi alataka na mokolo yango. Atako moto na moto azali na ndenge oyo asepelaka kolata mpe mboka na mboka ezali na mimeseno na yango, mitinda ya Biblia ezali ndenge moko mpo na bato nyonso mpe bisika nyonso. Biblia epesi basi toli ete “bábongisa nzoto na bango na molato ya malamu, na kolekisa ndelo te mpe na makanisi ya malamu.” Basi baklisto basengeli kotosa etinda yango ntango nyonso ata mpe na mokolo ya libala. Tóyeba ete libala ya esengo esɛngaka kaka te “bilamba ya ntalo makasi.” (1 Timote 2:9; 1 Petelo 3:3, 4) Ezalaka mpenza esengo soki mwasi oyo azali kobala alandi toli yango.
David, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Babalani mingi basalaka makasi mpo na kolanda mitinda ya Biblia, mpe ebongi kopesa bango longonya mpo na yango. Kasi, ezalaki na mabala mosusu oyo mwasi mpe baninga na ye balataki mabe mpenza, barobɛ na bango etikaki ntolo mpe mapeka polele mpe misusu ezalaki komonisa nzoto mobimba.” Moklisto moko oyo asololaki na mwasi ná mobali oyo bazalaki kobongisa libala na bango asalisaki bango bátalela mokolo yango na liso ya elimo. Ndenge nini? Atunaki bango soki bilamba oyo bazalaki kokana kolata bakoki kolata yango ata na makita. Ya solo, modɛlɛ ya elamba oyo moto alataka mokolo ya libala ekeseni na oyo alataka na makita mpe bato na bato balataka na kolanda mimeseno ya esika bafandi; nzokande, mpo na baklisto etinda ya komilatisa na kolekisa ndelo te ebongwanaka te. Ata soki bato mosusu bamonaka ete mitinda ya Biblia ezali makasi, baklisto ya solo batosaka yango na esengo mpe bapesaka nzela na bamposa ya mokili te.—Baloma 12:2; 1 Petelo 4:4.
Penny alobi boye: “Na esika tótalela bilamba to mpe fɛti lokola likambo oyo eleki ntina, ngai ná Aret totyaki makanisi na biso na lisukulu. Yango nde likambo elekaki ntina na mokolo yango. Likambo oyo nabosanaka te tii lelo ezali te ndenge nalataki to bilei nalyaki, kasi nde baninga oyo bazalaki na biso elongo na mokolo yango mpe esengo oyo nazalaki na yango na ndenge nabalaki mobali oyo nalingaki.” Bafianse basengeli te kobosana likambo yango ntango bazali kobongisa mokolo ya libala na bango.
Ndako ya Bokonzi ezali esika ya lokumu
Baklisto mingi basepelaka ete lisukulu ya libala na bango esalema na Ndako ya Bokonzi. Mpo na nini? Mobali moko ná mwasi na ye balobi boye: “Tomonaki ete libala ezali ebongiseli mosantu ya Yehova. Kobalana na Ndako ya Bokonzi, esika na biso ya losambo, esalisaki biso tóbosana te ete Yehova asengeli kozala na esika ya liboso na libala na biso. Litomba mosusu ezali ete yango esalaki ete bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli ya Yehova te bámona ete losambo ya Yehova ezali na ntina mingi mpo na biso.”
Soki bankulutu bandimi ete lisukulu esalema na Ndako ya Bokonzi, babalani basengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo bakani kosala na mokolo yango. Babalani bakomonisa limemya mpo na bato oyo babengisi na lisukulu na bango soki bakómi na ngonga ya malamu. Basengeli mpe koluka ete makambo nyonso esalema na ndenge ya malamu.b (1 Bakolinti 14:40) Na ndenge yango, bakosala te makambo oyo ebongi te, ndenge emonanaka na mabala mingi ya mokili.—1 Yoane 2:15, 16.
Baoyo bayei na lisukulu bakoki mpe komonisa ete bazali kotalela mokolo yango ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Na ndakisa, basengeli koluka te ete libala yango eleka mabala ya baklisto mosusu oyo esalemá. Baklisto oyo bakɔmeli bamonaka mpe ete kozala na Ndako ya Bokonzi mpo na koyoka lisukulu ya libala ezali na ntina mingi koleka fɛti to ebongiseli mosusu oyo ekoki kosalema na nsima ya lisukulu. Soki programɛ ya moklisto moko ekopesa ye nzela te akende na lisukulu mpe na nsima akende na fɛti, asengeli kopona kokende na lisukulu na Ndako ya Bokonzi. Nkulutu moko nkombo na ye William alobi boye: “Soki bato oyo bobengisi bayei te na lisukulu, kasi bayei kaka na fɛti, yango ekomonisa ete bakangi ntina te ete lisukulu nde likambo eleki ntina na miso ya Nzambe. Ata soki babengisi biso na fɛti te, tokoki komonisa esengo na biso mpo na babalani soki tokei na lisukulu ya libala na Ndako ya Bokonzi; yango ekopesa litatoli malamu epai ya bandeko na bango oyo bazali Batatoli te.”
Esengo oyo etikalaka libela
Kobongisa bafɛti ya mabala ekómi mombongo oyo bato bazali kozwela yango mbongo mingi mpenza. Lapolo moko emonisi ete na États-Unis, bafɛti mingi ya mabala esɛngaka dolare 22 000 to mpe katikati ya lifuti ya mbula mobimba.” Lokola bazali kolanda piblisite, babalani mingi to mpe bandeko na bango bakɔtaka banyongo oyo esɛngaka bambula mingi mpo na kofuta yango. Okanisi ete yango ezali ndenge malamu ya kobanda libala? Bato oyo bayebi Biblia te to mpe baoyo balandaka mitinda na yango te bakoki koluka kosala makambo na kolekisa ndelo, kasi baklisto basalaka bongo te.
Baklisto mingi basalaki ete molulu ya libala na bango esalema na bokatikati, babengisaki bato mingi te mpe bapesaki motuya mingi na lisukulu ya libala na bango; na ndenge yango bakokaki kosalela ntango na bango mpe biloko na bango mosusu na ndenge oyo eyokani na mokano ya Nzambe. (Matai 6:33) Tózwa ndakisa ya LIoyd ná Alexandra, baoyo nsima ya libala na bango bakobaki na mosala ya ntango nyonso ekoki lelo mbula 17. LIoyd alobi boye: “Bato mosusu bamonaki ete tolekisaki ndelo mpo tosalaki makambo ya mindɔndɔ te na libala na biso, kasi ngai ná Alexandra tozalaki na esengo mingi. Mpo na biso mokolo ya libala na biso esengelaki kozala mokolo ya kosepela na ebongiseli oyo Yehova azwaki ya kopesa bato mibale esengo mingi na esika ezala mokolo oyo tosengeli kobimisa mbongo mingi.”
Alexandra alobi boye: “Nazalaki mobongisi-nzela liboso nabala, mpe mposa na ngai ezalaki nakoba na mosala yango, kasi te natika mosala yango mpo na koluka mbongo ya kosalisa fɛti monene ya libala. Mokolo ya libala na biso ezalaki mokolo ya ntina mingi mpo na biso. Kasi, yango ezalaki nde ebandeli ya bomoi ya sika lokola mwasi ná mobali. Tosalelaki toli ya koboya komipesa koleka ndelo kaka na kobongisa mokolo ya libala, mpe tolandaki litambwisi ya Yehova na ndenge ya kofanda malamu na libala. Yango ememeli biso mapamboli mingi.”c
Ya solo, mokolo ya libala na bino ezali mokolo ya ntina mingi. Ndenge bokozala na mokolo yango mpe makambo oyo bokosala ekoki kosalisa bino bózala malamu na libala na bino na bambula oyo ekolanda. Yango wana, bótyela batoli ya Yehova motema. (Nzembo 3:5, 6) Bóluka ete makambo oyo eleki ntina na miso ya Yehova ezala na esika ya liboso. Bópesana mabɔkɔ mpo na kokokisa mikumba oyo Nzambe apesi bino. Na ndenge yango bokobanda libala na bino malamu, mpe Yehova akopambola bino mpo esengo na bino esuka te kaka na mokolo ya libala.—Masese 18:22.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Masolo mosusu ebimaki na Lamuká! ya Aprili-Yuni 2002, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Soki babalani babengi moto moko akanga bafɔtɔ to azwa bilili na kamera ntango lisukulu ezali kosalema na Ndako ya Bokonzi, basengeli kokeba ete eloko moko te ebebisa lokumu ya molulu yango.
c Talá buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, lokasa 26, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 29]
Mwasi ná mobali basengeli kosolola malamumalamu ntango bazali kobongisa mokolo ya libala
[Elilingi na lokasa 31]
Bóluka ete makambo oyo eleki ntina na miso ya Yehova ezala na esika ya liboso