Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 8/15 nk. 10-11
  • Koyekola Biblia elendisaka moto ayeba kotánga mpe kokoma

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyekola Biblia elendisaka moto ayeba kotánga mpe kokoma
  • Lamuká!—2015
  • Masolo mosusu
  • Bibongiseli ya kopesa mateya
    Batatoli ya Yehova mpe kelasi
  • Koyeba kotánga mpe kokoma kati na libota ya Nzambe
    Lamuká!—1994
  • Mwana na ngai asengeli kokɔta kelasi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Yehova alaki danyele mbano monene
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 8/15 nk. 10-11
Motatoli moko ya Yehova azali kolakisa bato kotánga mpe kokoma

Bamilio ya mwa babuku Omipesa na kotánga mpe kokoma oyo esalisaka mpo na koyekola kotánga mpe kokoma, ebimaki na minɔkɔ koleka 100

Koyekola Biblia elendisaka moto ayeba kotánga mpe kokoma

“Moto nyonso azali na lotomo ya koyeba kotánga mpe kokoma, mpo esalaka ete moto akóma na mwa valɛrɛ mpe esalaka ete ekólo ekende liboso.”​—UNESCO.a

BAANKƐTƐ emonisi ete na mokili mobimba bato koleka milio 700 ya mbula 15 mpe koleka bayebi kotánga mpe kokoma te. Yango esali ete bázala na likoki te ya koyeba makambo mingi na mokili; ezala mpe bizaleli malamu mpe mateya ya Nzambe oyo ‘ekomamaki na Biblia mpo eteya biso.’ (Baroma 15:4) Yango wana, na mikili mingi, Batatoli ya Yehova bakɔtisá koyekola kotánga mpe kokoma na programɛ na bango ya koteya bato Biblia mpe boyekoli yango ezalaka ofele. Programɛ yango elongaki?

Tótalela mosala ya Batatoli ya Yehova na Mexique, mboka oyo balobaka mingimingi monɔkɔ ya Espagnol. Kobanda 1946, Batatoli ya Yehova basalisaki bato 152 000 báyeba kotánga mpe kokoma, mingi na bango bakómaki mpe balakisi. Mpo na komonisa botɔndi na mosala oyo Batatoli ya Yehova basalaki, guvɛrnema etindelaki bango mikanda ebele. Mokanda moko elobaki ete: “Toyebi valɛrɛ ya mateya oyo bozali kopesa mpe tozali kopesa bino matɔndi mpo bozali kopesa mabɔkɔ mpo na kosalisa mikóló báyeba kotánga mpe kokoma.”

Bilenge mpe mibange bazwelaki programɛ yango litomba. Na ndakisa, Josefina azalaki na mbula 101 ntango akɔtaki kelasi yango mpe nsima ya mbula mibale ayebaki kotánga mpe kokoma!

Atako bato ya Mexique balobaka mingimingi monɔkɔ ya Espagnol, kasi kelasi ya kotánga mpe kokoma ezalaki kosalema kaka na monɔkɔ yango te. Na 2013, na lisalisi ya programɛ wana, basalisaki bituluku mwambe ya bato ya mboka yango oyo balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge báyekola kotánga mpe kokoma na monɔkɔ oyo balobaka.

Koyeba kotánga mpe kokoma esalisaka moto ayekola makambo mingi ya sika. Kasi oyo eleki nyonso, koyeba kotánga mpe kokoma esalisaka bato ya lolenge nyonso bátánga Biblia; buku oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe oyo ekoki kolongola bato na boombo ya biyambayamba, mateya ya mangomba ya lokuta mpe bizaleli mabe.​—Yoane 8:32.

a (Ebongiseli ya ONU mpo na koteya, siansi, mpe makambo ya ntɔki).

AKAMWISAKI LIBOTA NA YE

Daniel, oyo ayokaka malamu te, azali kokoma makambo oyo azali komona na DVD ya monɔkɔ ya jɛstɛ ya Mexique

Daniel ayekolaki elobeli ya bajɛstɛ ya Mexique na lisalisi ya DVD

Daniel azalaki na mokakatano ya koyoka mpe koloba malamu. Yango esalaki ete mbala mingi azala mawamawa mpe asilikelaka bato ya libota na ye. Ntango akómaki na mbula 23, Motatoli moko ya Yehova na nkombo Josué oyo azalaki na mokakatano ya koyoka abandaki koyekola na ye Biblia na lisalisi ya bajɛstɛ mpe mayemi. Na nsima, na lisalisi ya DVD, Daniel ayekolaki elobeli ya bajɛstɛ ya Mexique.b

Lokola Daniel azalaki kosalela mateya ya Biblia, akómaki na bizaleli oyo Biblia ebengi “bomoto ya sika,” oyo emonanaka na “bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai.” (Bakolose 3:10, 12) Daniel asalelaki mpe toli ya Biblia oyo esɛngaka bana bátosaka mpe bákumisaka baboti na bango. (Baefese 6:1, 2) Libota na ye ekamwaki! Kutu, na mai na miso, mama ya Daniel apesaki Josué mersi na ndenge asalisaki mwana na ye ayeba Nzambe. Na 2007, Daniel azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova.

b Na Mexique, batyá babuku ya Batatoli ya Yehova 46 ya elobeli ya bajɛstɛ ya Mexique na DVD. Na site na biso jw.org, ezali na bisaleli koleka 80 ya elobeli ya bajɛstɛ. Ezali mpe na mikanda ya ekomeli ya bato oyo bakufá miso mpo na kosalisa bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto