Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 12/15 nk. 12-13
  • Molimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Molimo
  • Lamuká!—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Molimo ekufaka te?
  • Molimo ekabwaná nde na nzoto?
  • Nini ekómelaka molimo soki moto akufi?
  • Ozali na molimo oyo ekufaka te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Oyo Biblia ezali koloba na ntina na molimo
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Molimo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Molimo etikalaka na bomoi nsima na kufa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 12/15 nk. 12-13

BIBLIA ELOBI NINI?

Molimo

Mangomba epesaka makanisi ndenge na ndenge oyo ekeseni mpo na molimo mpe oyo ekómelaka yango soki moto akufi. Kasi, Biblia epesi ndimbola ya polele.

Molimo ekufaka te?

OYO BATO BALOBAKA

Bato mingi bakanisaka ete molimo ekufaka te. Bamosusu bakanisaka ete molimo ekobaka kobotama, ekɔtaka na nzoto ya sika soki nzoto oyo ezalaki na yango liboso ekufi. Bamosusu mpe bakanisaka ete nsukansuka molimo ekendaka na esika mosusu, na ndakisa na likoló to na lifelo.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia elobi te ete molimo ekufaka te. Kutu, mbala mingi elobelaka molimo lokola eloko moko oyo ekufaka. Mosakoli Ezekiele oyo Nzambe asalelaki mpo akoma mokanda moko ya Biblia, alobaki ete molimo ekoki kozwa etumbu ya liwa. Na libaku mosusu, Biblia esaleli maloba “molimo oyo akufi” mpo na kolobela nzoto. (Balevi 21:11) Ezali polele ete Biblia eteyaka te ete molimo ekufaka te.

“Molimo oyo esali lisumu​—yango nde ekokufa.”​—Ezekiele 18:20.

Molimo ekabwaná nde na nzoto?

OYO BATO BALOBAKA

Molimo epesaka nzoto nguya ntango moto azali na bomoi, kasi soki moto akufi molimo ebimaka.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia elobeli mama moko oyo azali kobota “milimo”​—elingi koloba bato oyo bazali na mpema ya bomoi. (Ebandeli 46:18) Kutu, liloba ya Ebre oyo Biblia esaleli mpo na “molimo” ekoki kobongolama na “oyo ezali kopema.” Na bantango mosusu liloba yango ekoki kutu kosalelama mpo na kolobela banyama. Lisusu, Biblia emonisi ete molimo ezalaka na mposa ya kolya. (Kolimbola Mibeko 12:20) Soki molimo ekabwaná na nzoto, elingaki nde kozala na mposa ya kopema to kolya? Mbala mingi na Biblia, liloba “molimo” emonisaka mpenza moto; elingi koloba nzoto, mayoki mpe bomoto na ye.

‘Abotaki . . . milimo zomi na motoba.’​—Ebandeli 46:18.

Nini ekómelaka molimo soki moto akufi?

OYO BIBLIA ELOBI

Lokola nzoto na biso epɔlaka soki tokufi, Biblia eyebisi biso polele ete “mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda.” (Mosakoli 9:10) Biblia emonisi ete soki moto akufi, “akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.” (Nzembo 146:4) Molimo oyo ekufi esalaka lisusu eloko te; yango wana mbala mingi na maloba ya elilingi Biblia ekokanisaka liwa na “mpɔngi.”​—Matai 9:24.

Mwasi moko ná mobali na ye oyo bazali kolela batɛlɛmi liboso ya cercueil oyo ezali ya kokanga

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Soki ndeko to moninga na yo akufi, okolinga kozwa biyano na mituna lokola oyo: Azali wapi? Azali ndenge nini? Azali konyokwama? Lokola Biblia emonisi ete bakufi bayebaka eloko te, koyeba ete bandeko to baninga na biso oyo bakufá banyokwamaka te ekoki kobɔndisa biso. Tokoki kobɔndisama lisusu soki toyebi ete Yehova alaki ete na mikolo ezali koya akozongisa na bomoi milimo oyo ekufá.​—Yisaya 26:19.

“Bakufi bayebi ata eloko moko te.”​—Mosakoli 9:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto