Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g16 No. 6 nk. 10-11
  • Didier Érasme

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Didier Érasme
  • Lamuká!—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BOYEKOLI MPE MATEYA
  • TESTAMA YA SIKA YA MAKOMI YA GRƐKI
  • Boyekoli nimero 6—Makomi ya Greke ya boklisto kati na Makomami Mosantu
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Polyglotte de Complute​—Buku oyo esalisi mingi mpo na kobongola Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Biblia Mokanda oyo elingamaki mpe epekisamaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2016
Makambo mosusu
Lamuká!—2016
g16 No. 6 nk. 10-11

TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Didier Érasme

Didier Érasme

NTANGO Didier Érasme azalaki na bomoi (kobanda mobu 1469 tii 1536) bato bazalaki kotalela ye lokola moto ya mayele mingi koleka bato ya mayele ya Mpoto, kasi na nsima bakómaki kotyola ye mpe kobenga ye moto ya bibangabanga to mopengwi. Lokola amikɔtisaki na bantembe ya mangomba, alukaki komonisa mabunga mpe makambo ya mabe oyo ezalaki na lingomba ya Katolike mpe ya baoyo bazalaki koluka mbongwana ekɔta. Lelo oyo batalelaka ye lokola moto ya liboso oyo asalá ete mbongwana ekɔta na makambo ya mangomba na mikili ya Mpoto. Na ndenge nini?

BOYEKOLI MPE MATEYA

Lokola Érasme ayebaki malamumalamu monɔkɔ ya Grɛki ná Latin, yango esalisaki ye akokanisa mabongoli ya Biblia ya Latin na ndakisa Vulgate ya Latin na bamaniskri ya ebandeli ya Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo babengaka Testama ya Sika. Andimisamaki ete boyebi ya Biblia ezali na ntina. Yango wana, amonaki ete esengeli kobongola Makomami mosantu na minɔkɔ mosusu oyo bato bazalaki koloba na ntango wana.

Érasme amonaki ete mbongwana esengeli kokɔta na lingomba ya Katolike mpo amonaki ete kobengama mokristo ezali te likambo ya kosala milulu ezangá ntina kasi esengelaki nde komonana na bizaleli. Yango wana, ntango bato oyo bazalaki koluka mbongwana ekɔta na eglize ya Roma bakómaki kotya matata, lingomba ya Katolike ekómaki kokanisela ye mabe.

Érasme alukaki komonisa mabunga mpe makambo ya mabe oyo ezalaki na lingomba ya Katolike mpe ya baoyo bazalaki koluka mbongwana

Na makambo oyo akomaki, Érasme amonisaki polele mabe ya bakonzi ya lingomba ya Katolike, ndenge bazalaki konduka bozwi mpe ndenge bapape bazalaki kotinda bato na bitumba. Akesanaki mpenza na bakonzi mosusu ya lingomba oyo bazalaki sembo te, oyo bazalaki kosalela mimeseno ya lingomba na ndakisa, kotubela masumu, kosambela basantu, kokila bilei mpe mibembo ya losambo mpo na kolyela bandimi. Atɛmɛlaki mpe makambo mosusu oyo lingomba esalaka, na ndakisa kofutisa bato mbongo mpo na milimo ya bawei mpe kopekisa bato kobala.

TESTAMA YA SIKA YA MAKOMI YA GRƐKI

Na 1516, Érasme abimisaki libongoli na ye ya liboso ya Testama ya Sika, na monɔkɔ ya Grɛki, ezalaki Biblia ya liboso ya Makomami ya Grɛki oyo ebimaki. Na Biblia yango atyaki mpe banɔti mpe libongoli mosusu ya Makomami ya Grɛki na Latin oyo ekesanaki na Vulgate. Nsima ya bambula, akobaki kobongisa libongoli na ye mpe ntango asilisaki, libongoli yango ekesanaki lisusu makasi na Vulgate ya Latin.

Testama ya sika ye makomami ya Grɛki ya Didier Érasme

Libongoli ya Grɛki ya Testama ya Sika oyo Érasme asalaki

Moko ya makambo oyo ekesenisi libongoli na ye ná ya Vulgate ezali 1 Yoane 5:7. Mpo na kondimisa liteya ya Trinite oyo ezali na Biblia te, babakisá na Vulgate maloba oyo babengaka comma Johanneum. Maloba yango elobi: “Na likoló, Tata, Liloba mpe elimo santu: bango nyonso misato bazali moto moko.” Kasi, Érasme alongolaki maloba yango na mabongoli na ye mibale ya liboso ya Testama ya Sika mpo maloba yango ezalaki te na bamaniskri ya Grɛki ya bokristo oyo ye atalaki. Na nsima lingomba ya Katolike etyaki ye mbamba akɔtisa yango na libongoli na ye ya misato.

Lokola Érasme abongisaki mabongoli na ye ya Testama ya Sika, babongoli mosusu basalelaki yango mpo na kobongola Biblia malamu na minɔkɔ mosusu ya Mpoto. Martin Luther, William Tyndale, Antonio Brucioli mpe Francisco de Enzinas basalelaki yango mpo na kobongola Makomami ya Grɛki na Allemand, Anglais, Espagnol mpe Italien.

Érasme azalaki na bomoi na eleko oyo mangomba ezalaki na yikiyiki mpe bato oyo basalaki lingomba ya Protesta bazalaki kozwa libongoli na ye ya Testama ya Sika na monɔkɔ ya Grɛki na valɛrɛ mingi. Liboso kutu lingomba ya Protesta esalema mpenza, bato mosusu bazalaki kotalela ye lokola moto ya Protesta. Na nsima, aboyaki kokɔta na bantembe ya bato ya teoloji. Likambo ya kokamwa, eleki sikoyo mbula 100, David Schaff moto moko ya mayele akomaki ete Érasme “azalaki moto ya lingomba moko te ntango akufaki. Ezala Katolike to Protesta, moko te akoloba ete Érasme azalaki moto ya lingomba na bango.”

NA MOKUSE

  • Na 1516, Érasme abimisaki libongoli na ye ya liboso ya Testama ya Sika, na monɔkɔ ya Grɛki. Ezalaki na makomi ya grɛki na ngámbo moko mpe na ngámbo mosusu libongoli ya Latin ná banɔti.

  • Na maloba ya ebandeli ya Testama na ye ya Sika, akomaki boye: “Nazali kotɛmɛla mpenza baoyo baboyaka ete bato mpamba bátánga Makomami mosantu to balingaka te ete ebongolama na minɔkɔ oyo bato mingi balobaka.”

  • Na mikili mosusu ya Mpoto bato oyo bazalaki kotɛmɛla ye batumbaki babuku na ye mpe na boumeli ya bambula mingi bapape ya Roma batyaki babuku yango na molɔngɔ ya babuku oyo bato basengeli kotánga te.

Ayebanaki mokili mobimba

Érasme azalaki moto ya mayele oyo ayebaki mikili ndenge na ndenge. Afandaki mpe asalaki na mikili mingi ya Mpoto mpe asalaki boninga na bato minene ya baguvɛrnema mpe ya bainiversite. Bato ya mayele ya mikili mingi bazalaki koya kotuna ye makambo. Lokola bato mingi bazalaki kotánga mpe kosepela na makomi na ye, yango esalaki ete ayebana mingi. Na ntango moko, bisika nyonso azalaki kokende bazalaki koyamba ye na ba-fanfare mpe bakonzi, baepiskɔpɔ ná bato ya mayele bazalaki kobɛtela ye mabɔkɔ. Yango wana, mokomi moko ya mikolo na biso atye ye “na molɔngɔ ya bavedɛti oyo bayebani mokili mobimba na mikolo na biso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto