Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/12 nk. 3-4
  • Biblia Mokanda oyo elingamaki mpe epekisamaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia Mokanda oyo elingamaki mpe epekisamaki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makanisi ya bato ezali se kobongwana
  • Didier Érasme
    Lamuká!—2016
  • Ba-Vaudois​—Babandaki na lipɛngwi mpo na kosuka na Lingomba ya Protesta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2016
  • Biblia​—⁠Búku oyo esengeli kotángama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/12 nk. 3-4

Biblia Mokanda oyo elingamaki mpe epekisamaki

Didier Érasme, moto ya mayele mpe ya lokumu mingi na Pays-Bas na ekeke ya 16 akomaki boye: “Mposa na ngai ezali ete mikanda mosantu ebongolama na minɔkɔ nyonso.”

ÉRASME azalaki na mposa makasi ete bato nyonso bátángaka Makomami mpe bákanga ntina na yango. Kasi, banguna ya Biblia balingaki koyoka likanisi ya ndenge wana ata moke te. Kutu, na ntango wana, na Mpoto, moto nyonso oyo alingi koyeba ata moke makambo ya Biblia azalaki na likama mpenza. Na Angleterre, Parlema ebimisaki mobeko moko oyo elobaki ete “moto nyonso oyo akotánga Makomami na Lingelesi, bakobɔtɔla ye mabele, bibwele, biloko mpe bomoi . . . mpe, soki asali motó makasi mpe atiki te, to soki balimbisi ye mpe na nsima azongeli, bakobaka ye naino na nzete mpo azali sembo te epai ya mokonzi, mpe na nsima, bakotumba ye mpo apɛngwi na miso ya Nzambe.”

Na Mpoto, bato ya Lingomba ya Katolike bazalaki kolukaluka bandimi ya mangomba mikemike ya “lipɛngwi,” lokola ba Vaudois, mpe bazalaki kokanga bango mpe konyokola bango mpo bazalaki koteya “baevanzile mpe mikanda mpe biteni mosusu ya makomami mosantu, . . . mpo moto oyo azali mokonzi ya lingomba te [azalaki] na ndingisa ata moke te ya kosakola mpe kolimbola makomami mosantu.” Banyokolaki bato ebele mpe mingi bakufaki kaka mpo balingaki Biblia. Moto akokaki kozwa etumbu ya makasi kaka mpo asali libondeli ya Tata wa Biso to mpo atángi Mibeko Zomi mpe soki ateyi yango bana na ye.

Bolingo ya ndenge wana mpo na Liloba ya Nzambe esilaki te na mitema ya ebele ya ba pèlerins oyo bakatisaki mai monene mpo na kofanda na Amerika ya Nɔrdi. Buku moko (A History of Private Life—Passions of the Renaissance) elobi ete ntango bato wana bakómaki sika na Amerika, “kotánga mpe losambo ezalaki kotambola nzela moko, yango wana bamesanaki mpenza na Biblia.” Kutu, lisolo moko oyo ebimaki na engumba Boston na mobu 1767, elobaki boye: “Omipesa na kotánga makomami mosantu. Ntɔngɔ nyonso mpe mpokwa nyonso, osengeli kotángaka mokapo moko ya Biblia na yo.”

Ebongiseli moko (Barna Research Group) oyo ezali na engumba Ventura, na etúká ya Californie, elobi ete na États-Unis, bato ebele (90 %) bazali na Biblia soki misato misato. Ankɛtɛ moko euti kosalema emonisi ete, atako na Amerika bato mingi balingaka Biblia, kasi “kozwa ntango ya kotánga, koyekola mpe kosalela yango . . . ezali makambo ya kala.” Bato mingi bayebi Biblia kaka likolólikoló. Mokomi moko ya zulunalo alobaki boye: “Bato bakanisaka lisusu mpenza te ete tii lelo oyo [Biblia] ezali na ntina mpo na kosilisa mikakatano mpe mitungisi oyo bato bazali kokutana na yango lelo oyo.”

Makanisi ya bato ezali se kobongwana

Bato mingi bakanisaka ete tokoki kobongisa bomoi na biso soki tozali na mayele mpe soki tozali kosalisana. Mpo na bato mingi, Biblia ezali kaka moko kati na mikanda mingi oyo eteyaka makambo ya Nzambe mpe makambo oyo bato mosusu bakutanaki na yango, kasi ezali mpenza te mokanda ya makambo mpe ya mateya ya solo.

Bato mingi basalaka nini mpo na kosilisa mikakatano ya bomoi oyo ezali se kobakisama? Na makambo ya elimo, bato yango bazali lokola koyengayenga, bazali mpenza na toli mpe na mateya ya solosolo te oyo euti na Nzambe. Bato bakómi lokola masuwa oyo ezali na yenda te, ‘bazali koningana mpe kotɛngatɛnga epai na epai na mipɛpɛ nyonso ya mateya mpe na mayele ya bato, na bozimbisi na bango na nzela na mikano mabe.’—Baefese 4:14.

Yango wana, ebongi tómituna boye: Biblia ezali kaka moko ya mikanda ebele oyo elobelaka makambo ya Nzambe? To ezali mpenza nde Liloba ya Nzambe oyo ezali na makambo ya ntina oyo ekoki mpe kosalisa biso? (2 Timote 3:16, 17) Ezali mpenza na ntina ete tótalela Biblia? Tokolobela makambo yango na lisolo oyo elandi.

[Elilingi na lokasa 3]

Didier Érasme

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Euti na buku Deutsche Kulturgeschichte

[Elilingi na lokasa 4]

Bazalaki kokanga ba Vaudois mpe konyokola bango mpo bazalaki koteya Makomami

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Stichting Atlas van Stolk, Rotterdam

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto