Polyglotte de Complute—Buku oyo esalisi mingi mpo na kobongola Biblia
SOKI na mobu 1455, mbongwana monene ekɔtaki na mosala ya kobimisa Babiblia. Johannes Gutenberg abimisaki Biblia ya liboso na masini ya konyata mikanda. Kobanda wana, Babiblia ekómaki mingi mpamba te bazalaki kokoma yango lisusu na mabɔkɔ te. Banda wana, bakómaki kobimisa Babiblia ebele na mbongo moke. Mwa moke na nsima, Biblia ekómaki buku oyo ezalaki kokabolama koleka babuku mosusu nyonso.
Biblia ya Gutenberg ezalaki na Latin. Kasi, eumelaki te, bato ya mayele na Mpoto bamonaki ete basengeli kozala na makomi ya malamu ya Biblia na minɔkɔ oyo bakomaki yango na ebandeli, elingi koloba na Liebele mpe na Grɛki. Lingomba ya Katolike ezalaki kondima kaka Biblia Vulgate na Latin; nzokande Biblia yango ezalaki na mikakatano mibale ya minene. Na bambula ya 1500, bato oyo bayebaki Latin bazalaki lisusu mingi te. Lisusu, bato oyo basalaki bakopi ya Vulgate na boumeli ya mbula koleka 1 000, bakɔtisaki mabunga mingi.
Babongoli ná bato ya mayele bazalaki bango nyonso na mposa ya Biblia na minɔkɔ oyo bakomaki yango mpe libongoli ya Latin oyo ezali na mabunga te. Na mobu 1502, Kardinale Jiménez de Cisneros, mopesi-toli ya Isabelle I, mokonzi-mwasi ya Espagne, na makambo ya politiki mpe ya losambo, azwaki mokano ya kokokisa mposa na bango na lisalisi ya buku kaka moko. Buku yango oyo esalisi mingi mpo na kobongola Babiblia ebengamaka Polyglotte de Complute. Cisneros azalaki na mposa ya kobimisa Biblia na minɔkɔ ebele, kasi na buku kaka moko; esengelaki kozala na makomi ya malamu mpenza ya Liebele, ya Grɛki, ya Latin, mpe ya Aramɛyɛ. Na ntango wana, mosala ya kobimisa mikanda na masini ezalaki naino na ebandeli; yango wana, buku na ye ebongolaki mpe makambo na mosala yango.
Mpo na mosala monene wana, Cisneros abandaki naino kosomba bamaniskri ya kala ya Liebele oyo ezalaki mingi na Espagne. Asangisaki mpe ebele ya bamaniskri ya Grɛki mpe ya Latin. Yango nde esalisaki mpo na kobimisa buku moko oyo ezali na makomi ya Biblia na minɔkɔ ebele. Cisneros apesaki mosala ya koyanganisa makomi yango epai ya etuluku moko ya bato ya mayele; basalaki yango na Iniversite ya Alcalá de Henares, oyo eutaki kofungwama sika na Espagne. Moko na bato oyo abengaki mpo na mosala yango ezali Érasme de Rotterdam; kasi, moto yango ya mayele mingi na makambo ya lokota aboyaki.
Bato yango ya mayele basalaki mbula zomi mpo na kosilisa mosala monene wana ya kosangisa makomi; na nsima, kobimisa mpenza mikanda na masini ezwaki mpe mbula minei. Mikakatano ezalaki mingi mpamba te, na Espagne, bamasini ya konyata mikanda ezalaki kaka na balɛtrɛ oyo bakomaka na yango Espagnol, balɛtrɛ ya Liebele, ya Grɛki, to ya Aramɛyɛ ezalaki naino te. Yango wana, Cisneros asɛngaki lisalisi ya Arnao Guillén de Brocar, moto moko oyo ayebaki mpenza mosala ya kobimisa mikanda na masini, mpo asala makomi na minɔkɔ wana mpo na kobakisa yango na masini. Nsukansuka, babandaki kobimisa yango na masini na mobu 1514. Bavolimi nyonso motoba esilaki kobimisama na mokolo ya 10 Yuli 1517, kaka sanza minei liboso Kardinale Cisneros akufa. Babimisaki babuku soki 600 na bavolimi nyonso; likambo ya kokamwa ezali ete nyonso wana esalemaki na ntango oyo, na Espagne, Lingomba ya Katolike ezalaki kosambisa bato oyo balingaki lisusu kolanda mateya na yango te (Inquisition espagnole).a
Ndenge oyo babongisaki makomi na buku yango
Lokasa mokomoko ya Polyglotte ezalaki na makambo ebele. Makomami nyonso ya Liebele ezalaki na volimi minei; kati na yango, makomi ya Vulgate ezalaki na katikati ya lokasa mokomoko; makomi ya Liebele ezalaki na lobɔkɔ ya mobali; makomi ya Grɛki, ná libongoli ya liloba na yango mokomoko na Latin na lobɔkɔ ya mwasi. Na mipanzi, batyaki ndimbola ya maloba mingi ya Liebele. Na nse ya lokasa mokomoko ya mikanda mitano ya liboso, batyaki mpe Targum ya Onkelos (Libongoli moko ya Aramɛyɛ ya mikanda mitano ya liboso na Biblia) ná libongoli na yango na Latin.
Volimi ya mitano ya Polyglotte ezalaki na Makomami ya Grɛki, na milɔngɔ mibale. Molɔngɔ moko ya makomi ya Grɛki, mpe molɔngɔ mosusu ya libongoli na yango na Latin, ndenge ezalaki na Vulgate. Mpo na kolakisa motángi liloba ya Grɛki oyo ekokani na liloba ya Latin, bakomaki balɛtrɛ mikemike pembeni ya liloba mokomoko ya Grɛki mpe bazongelaki yango pembeni ya liloba mokomoko ya Latin oyo ekokani na yango. Makomi ya Grɛki ya Polyglotte ezalaki buku ya liboso oyo ezali na mikanda nyonso ya Makomami ya Grɛki, to “Testama ya Sika” oyo ebimisamaki na masini, mwa moke na nsima, libongoli ya Érasme elandaki.
Bato wana ya mayele balandelaki malamumalamu makomi ya bavolimi mitano mpo mabunga ezala te; yango wana, mabunga ya masini ezalaki kaka 50. Lokola basalaki mosala yango malamu, lelo oyo bato oyo bayekolaka makomi balobaka ete buku yango eleki kutu makomi ya Grɛki oyo Érasme abimisaki. Ndenge oyo makomi ya Grɛki na masini ebongisamaki ezalaki kitoko lokola kaka ndenge bazalaki kokoma yango na mabɔkɔ. Na buku na ye Mosala ya kobimisa mikanda na monɔkɔ ya Grɛki na bambula ya 1400 (na Lingelesi), Robert Proctor alobi boye: “Tosengeli kopesa Espagne lokumu na ndenge babimisaki makomi ya liboso ya Grɛki na masini, oyo elekaki makomi nyonso na kitoko.”
Volimi ya motoba ya Polyglotte ezalaki na bisaleli ndenge na ndenge oyo ekokaki kosalisa moto ayekola Biblia: diksionɛrɛ ya Liebele mpe ya Aramɛyɛ, ndimbola ya bankombo ya Grɛki, ya Liebele, mpe ya Aramɛyɛ, gramɛrɛ ya Liebele, mpe index ya Latin mpo na maloba ya diksionɛrɛ ya Liebele mpe Aramɛyɛ. Makambo nyonso wana ezali komonisa ntina oyo balobaki ete Polyglotte de Complute ezali “mokanda ya ntina mingi na mosala ya kobongisa makomi ya masini mpe na mayele ya Makomami.”
Mposa ya Cisneros ezalaki te ete bato nyonso bázwa Biblia, kasi alingaki kaka ete buku yango “epesa bato lisusu mposa ya koyekola Biblia, mposa oyo ebungaki mpenza na ntango wana.” Na makanisi na ye, “esengelaki kobomba mpenza Liloba ya Nzambe mpo bato mpamba bákanga ntina na yango te.” Azalaki mpe na likanisi ete “Makomami esengeli kotikala kaka na minɔkɔ misato ya liboso oyo Nzambe andimaki bákoma likoló ya motó ya Mwana na ye na nzete oyo babakaki ye.”b Yango wana, Polyglotte de Complute ezalaki na libongoli ya Espagnol te.
Bokeseni kati na Vulgate mpe minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia
Ndenge oyo Polyglotte ebongisamaki ekabolaki mwa moke bato ya mayele oyo basalaki mosala yango. Antonio de Nebrija,c moto moko ya mayele oyo ayebanaki mingi na Espagne, azwaki mokumba ya kobongola bisika mosusu ya Vulgate oyo batyaki na Polyglotte. Atako Lingomba ya Katolike ezalaki kondima kaka Vulgate ndenge Jérôme abongolaki yango, Nebrija amonaki ete asengeli kotalela yango lisusu mpo ayokanisa yango na makomi ya ebandeli ya Liebele, Aramɛyɛ, mpe Grɛki. Alingaki kobongisa bisika oyo mabunga ekɔtaki na bakopi ya Vulgate.
Mpo bokeseni ezala te kati na Vulgate mpe minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia, Nebrija asɛngaki Cisneros boye: “Pelisá lisusu miinda mibale ya lingomba na biso oyo esí ekufa: monɔkɔ ya Liebele ná monɔkɔ ya Grɛki. Baoyo bamipesi na mosala yango, pesá bango mbano.” Apesaki mpe likanisi oyo: “Mbala nyonso oyo bokeseni emonani na bamaniskri ya Testama ya Sika na Latin, tosengeli kolanda bamaniskri ya Grɛki. Mbala nyonso oyo tomoni bokeseni kati na bamaniskri ya Latin to kati na bamaniskri ya Testama ya Kala ya Latin mpe ya Grɛki, tosengeli kotala na makomi ya malamu ya Liebele mpo na koyeba likanisi ya solosolo.”
Ndenge nini Cisneros atalelaki toli yango? Na maloba ya ebandeli ya Polyglotte, Cisneros amonisaki makanisi na ye polele. “Totye libongoli ya Latin ya santu Jérôme na katikati ya libongoli ya Sinagoga [makomi ya Liebele] mpe makomi ya Lingomba ya Orient [makomi ya Grɛki], lokola miyibi oyo batyamaki na nzete pembeni ya Yesu, oyo azali komonisa Lingomba ya Loma, to ya Latin.” Yango emonisi ete Cisneros andimaki te ete Nebrija aluka na minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia mpo na kobongisa bisika oyo Vulgate na Latin ezalaki na mabunga. Nsukansuka, mpo bátánga nkombo na ye te ete apesaki mabɔkɔ na libongoli wana oyo esalemaki malamu te, Nebrija atikaki mosala yango.
Comma Johanneum
Atako Polyglotte oyo esalemaki na Iniversite ya Alcalá de Henares ezalaki buku ya ntina mingi mpo na kozwa makomi ya malamu ya minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia, na bisika na yango mosusu makanisi ya bato ezwaki esika ya liboso na esika báluka koyeba mpenzampenza oyo Makomami elobaki. Bato bazalaki kopesa motuya mingi na Vulgate, yango wana, mbala mingi babongisaki makomi ya Grɛki ya “Testama ya Sika” mpo elanda Latin, na esika Latin elanda Grɛki. Ndakisa moko ya likambo yango ezali maloba babakisaki oyo ebengamaka comma Johanneum.d Maloba yango ezali na maniskri ata moko te ya Grɛki ya kala, mpe emonani polele ete babakisaki yango na mokanda ya Yoane bankama ya bambula na nsima. Maloba yango ezali te ata mpe na bamaniskri ya kala ya Vulgate na Latin. Yango wana, na “Testama ya Sika” oyo abongolaki, Érasme alongolaki maloba wana oyo babakisaki yango kobakisa.
Babimisi ya Polyglotte bakakatanaki mpo na kolongola vɛrsɛ oyo ezalaki na Vulgate banda bankama ya bambula. Yango wana, batikaki yango na Latin mpe bazwaki ekateli ya kobongola yango mpe kokɔtisa yango na makomi ya Grɛki mpo ezala ndenge moko na bisika yango mibale.
Buku oyo esalisaka mpo na kobongola Babiblia lelo oyo
Polyglotte de Complute ezali na motuya mingi mpamba te ezali buku ya liboso ebimisami na masini oyo ezalaki na mikanda nyonso ya Makomami ya Grɛki mpe ya Biblia ya Septante. Kasi, longola yango, se ndenge “Testama ya Sika” ya Érasme na Grɛki ekómaki kobengama “Texte reçu” ya Makomami ya Grɛki (oyo basalelaka na minɔkɔ mingi mpo na kobongola Biblia), Polyglotte mpe ezali na makomi malamu mingi mpo na mikanda oyo ekomamá na Liebele mpe na Aramɛyɛ.e William Tyndale asalelaki makomi ya Liebele ya Polyglotte mpo na kobongola Biblia na Lingelesi.
Na bongo, Polyglotte de Complute, buku oyo ebongisamaki na bato mingi ya mayele, esalisaki mingi mpo na koyeba lisusu Makomami malamu. Buku yango ebimisamaki na ntango mpenza oyo bato mingi na Mpoto bakómaki kosepela na Biblia mpe, mpo na yango, bakómaki kobongola Biblia na minɔkɔ oyo bato nyonso bazalaki koloba. Polyglotte ezalaki buku mosusu ya sika oyo ebakisami na milende oyo ezalaki kosalema mpo na kobongisa mpe kobatela makomi ya Grɛki mpe ya Liebele. Nyonso wana eyokani na mokano ya Nzambe ete ‘maloba mapɛtolami ya Yehova,’ elingi koloba ‘liloba ya Nzambe na biso, eumela seko.’—Nzembo 18:30; Yisaya 40:8; 1 Petelo 1:25.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Babimisaki mikanda 600 na bapapye, mpe mikanda 6 na mposo ya nyama. Na mobu 1984, babimisaki yango na fac-similé, kasi ezalaki mingi te.
b Liebele, Grɛki, mpe Latin.—Yoane 19:20.
c Balobaka ete Nebrija azali moto ya liboso ya mayele na Espagne oyo alingaki bonsomi ya makanisi (libéral). Na mobu 1492, abimisaki buku ya liboso ya Gramática castellana (Gramɛrɛ na monɔkɔ ya Castillan). Mbula misato na nsima, azwaki mokano ya komipesa mobimba na koyekola Makomami Mosantu tii liwa na ye.
d Maloba oyo babakisá na 1 Yoane 5:7 na Babiblia mosusu elobaka ete “na likoló, Tata, Liloba, mpe Elimo Santu: mpe bango misato bazali moko.”
e Lisolo ya libongoli ya Érasme ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1982, nkasa 8-11.
[Elilingi na lokasa 29]
Kardinale Jiménez de Cisneros
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Biblioteca Histórica. Universidad Complutense de Madrid
[Elilingi na lokasa 30]
Antonio de Nebrija
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Biblioteca Histórica. Universidad Complutense de Madrid
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 28]
Biblioteca Histórica. Universidad Complutense de Madrid