Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g18 No. 2 lok. 4
  • 1 Kotosa ndai ya libala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 1 Kotosa ndai ya libala
  • Lamuká!—2018
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • YANGO ELIMBOLI NINI?
  • MPO NA NINI EZALI NA NTINA?
  • OYO OKOKI KOSALA
  • Sekele 2: Komipesa
    Lamuká!—2010
  • Ndenge ya kokómisa ndai ya libala makasi
    Lamuká!—2015
  • Ndenge okoki kobongisa libala na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ndenge ya kokokisa ndai na yo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Lamuká!—2018
g18 No. 2 lok. 4
Longo ebatelaka masuwa mpo ezinda te na ntango ya mopɛpɛ makasi

Ndai ya libala ezali lokola longo oyo ebatelaka libala na ntango ya mikakatano makasi

MPO NA BABALANI

1 Kotosa ndai ya libala

YANGO ELIMBOLI NINI?

Mwasi ná mobali oyo balapi ndai ya libala batalelaka libala na bango lokola boyokani oyo esengeli koumela libela mpe yango esalisaka bango báfanda na kimya na libala na bango. Molongani mokomoko azalaka na kondima ete moninga akokabwana na ye te, ata na ntango ya mpasi.

Babalani mosusu babangaka koboma libala kaka mpo na kosepelisa bandeko ya libota to baninga na bango. Kasi, eleki malamu nde kotosa ndai ya libala mpo bino mibale bolingani mpe mokomoko na bino azali na limemya mpo na moninga.

TOLI YA BIBLIA: “Mobali atika mwasi na ye te.”​—1 Bakorinti 7:11.

“Soki otosaka ndai ya libala, okosilika noki te. Okolimbisa noki mpe okosɛnga bolimbisi noki. Okotalela te mikakatano oyo ebimi lokola libaku ya koboma libala.”​—Micah.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Soki mwasi ná mobali oyo batosaka ndai ya libala na bango te bakutani na mikakatano, mbala mingi, balobaka: ‘Ozali sapato ya lokolo na ngai te’ mpe basalaka nyonso mpo na koboma libala.

“Bato mingi babalaka na likanisi ete soki makambo etamboli malamu te, bakoboma libala. Soki bato oyo babalani bazali na makanisi ya ndenge wana, bakotosa ndai na bango ya libala te.”​—Jean.

OYO OKOKI KOSALA

MITALELÁ

Ntango bino mibale bozali na matata . . .

  • Omipesaka foti mpo obalá ye?

  • Ozalaka na likanisi ya kotya moto mosusu na esika na ye?

  • Esilá kokómela yo oloba: “Mokolo mosusu nakokima yo” to “Nakoluka moto mosusu oyo akoyeba valɛrɛ na ngai”?

Soki oyanoli “ɛɛ” na motuna moko to na mituna wana nyonso, salá makasi otosa ndai na yo ya libala.

SOLOLÁ NA MOLONGANI NA YO

  • Tozali kaka kotosa ndai na biso ya libala? Soki te, mpo na nini?

  • Nini tokoki kosala sikoyo mpo na kotosa ndai na biso ya libala?

TOLI

  • Komeláká molongani na yo mikanda to bamesaje ya bolingo

  • Tyá bafɔtɔ ya molongani na yo na biro to na esika na yo ya mosala mpo na komonisa ete otosaka ndai na yo ya libala

  • Bengáká molongani na yo na telefone mokolo na mokolo ntango ozali na mosala to soki bozali esika moko te

TOLI YA BIBLIA: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”​—Matai 19:6.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto