Biyano oyo mangomba mosusu epesi
Lingomba ya Hindu
balobaka ete moto abotamaka mbala na mbala mpe na banzoto ekeseni. Mpo na bango, soki moto azali komona mpasi ezali mpo na makambo oyo asalaka to oyo asalá na bomoi na ye oyo eleká. Soki moto azali lisusu komitungisa te mpo na biloko ya mokili oyo, akokóma na moksha, elingi koloba akobotama lisusu te mbala na mbala.
Lingomba ya Bamizilma
balobaka ete soki moto azali komona mpasi ezali mokano ya Nzambe mpe ete mpasi ezali etumbu mpo na masumu mpe komekama ya kondima. Dr. Sayyid Syeed, oyo azali prezida ya Bamizilma ya Amerika ya Nɔrdi, alobi ete bampasi esalaka ete tóbosana te “kopesa Nzambe ntango nyonso matɔndi mpo na mapamboli oyo apesi biso mpe kosalisa bato oyo bazangi.”
Bayuda
balobaka ete moto anyokwamaka mpo na makambo oyo asalaka. Bayuda mosusu balobaka ete lisekwa ekozala, mpe na nsima bato malamu bakozwa mbano. Bakabbale bateyaka ete moto abotamaka mbala na mbala, yango epesaka ye libaku ya kobongola motema.
Bindimeli ya Buda
balobaka mpe ete moto abotamaka mbala na mbala. Moto yango akobaka komona mpasi tii ntango akotika makambo ya mabe oyo asalaka mpe makanisi ya mabe. Soki moto akómi na bwanya, akómi kosala makambo ya malamu mpe abateli makanisi ya pɛto akokóma na nirvana, elingi koloba akomona lisusu mpasi te.
Lingomba ya Confucius
balobaka ete soki moto atambwisi bomoi na ye malamu mpenza akokitisa bampasi na ye, kasi akokoka te kosilisa yango nyonso mpo ezali na bikelamu ya nguya oyo babimisaka bampasi yango.
Mangomba mosusu ya Afrika
balobaka ete bampasi ezali misala ya bilimo mabe. Bandimaka ete bandɔki bakoki kosala moto malamu to mabe. Yango wana, basalaka milulu mpo bakanisaka ete bakoki kokitisa bampasi oyo bandɔki babimisi. Ntango moto azali na maladi, banganga-nkisi bakanisaka ete bakosukisa misala ya bandɔki soki basali milulu mpe bapesi ye bankisi.
Bakristo
balobaka ete mpasi eutá na lisumu ya baboti na biso ya liboso, ndenge Biblia emonisi yango na mokanda ya Ebandeli. Kasi, mangomba mingi babakisá mateya mosusu. Na ndakisa, Bakatolike mosusu balobaka ete moto asengeli komona mpasi ndenge Yesu amonaki mpasi mpo na biso, mpe Nzambe akoki kosalela bampasi ya moto mpo na bolamu ya lingomba to kosalela bampasi yango mpo na kobikisa bato mosusu.
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU
Talá video Nzambe andimaka mangomba nyonso? ezali na jw.org.