Liteya 18
Ndenge nini okoki kopesa biyano malamu
1, 2. Mpo na nini biso banso tosengeli koyekola kopesa biyano malamu?
1 Moklisto nyonso asengeli koyekola kopesa biyano malamu. Ntoma Paulo akomaki: “Tika ete maloba na bino mazala na ngolu, na elengi na mungwa ntango nyonso ete boyeba soko ekoki na bino kozongisela bato nyonso maloba nini.” (Bakolose 4:6) Yango wana tokosalaka makasi ete biyano na biso bizala malamu. Soko topesi eyano malamu, tokosepelaka na yango. “Moto azali na esengo mpo na kozongisa monoko na ye; liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni!”—Masese 15:23.
2 Ozali komona ete osengeli kobongisa lisusu biyano na yo? Osepeli na lolenge na yo ya koyanola na makita ya lisangá, to okozala nde na esengo mingi soki okoki kobongisa lisusu? Kati na mosala ya kosakola, oyokaka mawa na nsima ete oyanolaki malamu te? Yango ekomelaka biso banso; ntina wana tolingi koyekola elongo ndenge nini tokoki kobongisa biyano na biso.
3, 4. Ndenge nini komantere mingi ekoki kobima na motuna bobele moko etunami na likita?
3 Na makita ya lisangá. Na masangá mingi ya ba Témoins de Jéhovah ezali na bandeko oyo bazalaka ntango nyonso prêt mpo na koyanola na mituna mitunami na boyekoli ya Mosenzeli, na boyekoli ya mokanda to na bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Nzambe. Ezalaka parazare te. Ekoki kozala ete bandeko yango baumeli mbula mingi na lisangá ya Jéhovah, na boumeli na yango bayekoli makambo mingi, kasi mingimingi biyano na bango ezali nde mbuma na kobongama to komilengela poso na poso. Na motindo yango, ata bato ya sika bakoki kopesa biyano malamu soki basili koyekola makambo oyo makolobama na makita.—Masese 15:28.
4 Soki baponi yo moto ya liboso mpo na koyanola na motuna moko, ebongi malamu opesa eyano direke na motuna oyo batuni. Kasi soki ndeko moko asili kopesa eyano, okanisa te ete esili bobele bongo. Okoki kobakisa bakomantere mosusu na motindo boye: Okoki kolimbola lisusu polele eyano oyo epesami; kolakisa ndenge nini mikapo ya Biblia mipesami kati na paragrafe mizali kosimba eyano; kolimbola ndenge nini makanisi malobelami makoki kosalelama kati na bomoi na biso. Soki boyekoli ezali kolobela bilembo ya mikolo ya nsuka to mitindo ya mangomba ya lokuta, okoki koyebisa likambo moko elekaki na mboka na bino mpo na komonisa ete paragrafe elobi solo. Bakomantere motindo oyo ekopesa litomba mingi mpe elengi mingi na boyekoli.
5. Mpo na nini ebongi malamu kopesa eyano mokuse mpe na maloba na yo moko?
5 Biyano ya mikuse bileki malamu mpo ete bayoki bakosimba yango noki. Nzokande eyano molai, oyo moto azali kozongela makanisi nyonso ya paragrafe, likambo ya ntina ekoyebana te, mpe bayangani bakoyeba te wapi eyano ya direke na motuna oyo etunamaki. Epai mosusu, biyano ya litomba koleka ezali oyo tokopesaka na maloba na biso moko. Bakomantere motindo wana esalisaka moto oyo ayanoli ete amikotela malamu makanisi yango, mpe lokola asaleli maloba na ye moko mpo na kobimisa yango ekoki kosalisa bayangani mosusu na kokanga ntina na yango mpo na mbala ya liboso. Masolo oyo tosalaka na Eteyelo ya mosala ya Nzambe ezali kopesa biso libaku ya kokolisa makoki na biso na ntina yango.
6. Ndenge nini tokoki komilengela mpo na koyanola nokinoki na mituna oyo mitunami na makita?
6 Mbala mosusu ozali mpe na mposa ya koyeba koyanola noki. Mpo na kolonga na yango, osengeli komibongisa liboso. Nzokande komibongisa ntango bazali kotanga paragrafe to ntango bandeko mosusu bazali koyanola, okozanga koyoka makambo mingi oyo mazali kolobama. Kamata momeseno ya kotya bilembo libela na biyano oyo okani kopesa. Tiya mokolótó na nse na maloba ya ntina to mots clés na esika ete osala bongo mpo na bafraze mibimba; esili yo kobwaka liso na lokasa mpe omoni liloba ya ntina, ekokundola yo eyano mobimba mpe okozala prêt mpo na kopesa yango. Soki motuna ezali na “a” mpe “b”, koma kati na marge makanisi nini mazali mpo na “a” mpe makanisi nini mazali mpo na “b”, soki te okoki kopesa eyano na motuna oyo motambwisi ya boyekoli atuni naino te. Masolo mosusu oyo esengaka kolobana na bayoki ezalaka na mituna te; nde ata bongo, ezali litomba na kotya libela mikolótó na bapwɛ́ oyo omoni ete eleki ntina. Na yango, okokoka koyanola noki, mpe okosunga mpo ete lisolo elala te. Nsima na kopesa eyano, kokanisa te ete esili mpo na yo, ekomi ngala ya bamosusu. Te, zala ntango nyonso prêt mpo na kopesa komantere.
7. Mpo na nini moto na moto asengeli komema mokumba na ye ya kopesa biyano na makita?
7 Bamoko bakoki kokakatana na kopesa eyano mpo bakanisi ete biyano ya bamosusu bileki. Nzokande Biblia elendisi biso ete moto na moto amema mokumba na ye. Ntoma Paulo akomaki: “Tosimba ngwi eyambweli na elikya na biso . . . Totala ete topesana simbisi moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. Totika koyangana elongo moko te, pelamoko motindo na bamosusu, kasi topesana toli.” (Baeb. 10:23-25) Na biyano na biso, tozali kolendisa bayangani ete bazala na bolingo mpe kosalaka misala kitoko. Tozali kopesa móto na mitema na bango mpe tozali koyikisa bango mpiko. Epai mosusu, biso moko tozali kozwa bolamu na yango, mpamba te tozali na esengo ya kopesa mpe tozali komiyikisa mpiko.
8-12. Pesa mwa makanisi na ndenge tokoki koyanola na lolenge malamu na ntembe oyo tokutani na yango na mosala ya kosakola.
8 Ndenge nini okoki koyanola kati na mosala ya kosakola. Soki ozali na momeseno ya koyekola yo moko mpe soki ozali koyangana poso na poso na makita ya lisangá, okoyoka mpasi mingi te mpo na koyanola na mituna oyo bakotuna yo ntango okokenda ndako na ndako. Nzokande soki oyebi eyano te na motuna moko oyo batuni yo, koyoka nsoni te, loba na moto yango ete okokenda koluka eyano mpe okozongela ye mokolo mosusu. Soki azali na motema malamu, akozala na esengo.
9 Longola mituna, okoki kokutana mbala mosusu na maloba ya ntembe. Okosala nini? Liboso ya koyanola, ebongi malamu koyeba naino mwa moke makanisi ya moto yango. Okoki kotuna ye mpo na nini alobi bongo. Na ndakisa, moto akoki koloba ete bino bondimaka Klisto te, nzokande makanisi na ye mazali na la Trinité to Bosato Bosantu. Maloba mingi ya ntembe ezalaka mpo ete moto azali kokanisa eloko mosusu, biso mpe tozali kokanisa eloko mosusu. Na yango, ntango moto abimisi ntembe, ebongi otuna ye ndimbola ya maloba oyo asaleli, soko osimbi yango malamu te. Esili bino koyokana na ndimbola na liloba moko, na nsima nde okoki kobanda kopesa eyano. Mbala mosusu, nsima na kolimbwela ye liloba oyo asaleli, okomona ete eyano nyonso se yango wana mpe ntina ya kobakisa ndimbola mosusu ezali te.
10 Ntango moto abimisi ntembe, otalela ye lokola monguna te. Monisa ete olingi kosalisa ye mpo na kozwa eyano. Na yango, na esika ya komona mabe mpo na ntembe oyo moto abimisi, talela nde yango lokola eloko oyo esimbi mpenza moto yango, mpe loba ete osepeli lokola abimisi likambo azalaki na yango. Kamata yango lokola mwango ya kolanda lisolo, lokola fungola oyo ekofungola elimo ya moto mpe ekopesa ye nzela na koyamba solo ya Biblia. Omimesenisa na yango na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, kosalaka mikumba na yo mosusu lokola ete ozali koyanola na ntembe oyo moto abimisi.
11 Ntango mosusu, wana ezali yo koloba na moto moko oyo azali koyoka yo malamu, moto mosusu abimisi ntembe mpo na kokata lisolo na bino. Na likambo motindo oyo, okoki koyanola na kotunaka ye motuna. Yesu Klisto asalaki bongo mpo na kokanga minoko na banguna oyo bazalaki koluka kotelemela kosakola na ye. (Mat. 22:41-46) Kobosana te ete soki moto alobi likambo ezali mokumba na ye amonisa bosolo ya likambo oyo alobi. Na ndakisa, soki moto alobi ete “Bino bondimaka la Trinité te”, okoki koyanola ye ete: “Ngai nandimaka makambo nyonso oyo Biblia ezali koteya. Lakisa ngai esika nini bazali koteya Trinité kati na Biblia mpo ete nandima yango.” Ekomi mokumba ya moto oyo abimisaki ntembe ete apesa bilembeteli na makambo oyo ye alobi ete ezali solo.
12 Soki ntembe ebimisami na moto moko oyo andimaka Makomami, eyano oyo ekoleka kondimisa ye ezali oyo ezwami na Liloba na Nzambe. Yango ekozala na kilo mingi koleka maloba na biso moko. Tosengeli ntango nyonso koyanola na kimya mpe na limemya, ata soki moto azongiseli biso mabe. Ebongi bongo mpo na ministre nyonso ya Nzambe.
13, 14. Na boyekoli ya Biblia na ndako, tokoki kosala nini soki moyekoli atuni mituna?
13 Na boyekoli ya Biblia. Na boyekoli ya Biblia na ndako, tokozalaka lokola baninga elongo na bayekoli na biso. Na yango, soki moyekoli atuni yo motuna, nsima na koyanola ye, ebongi malamu kotuna ye soki eyano na yo esilisi ntembe na ye nyonso na ntina yango. Bapwɛ́ mosusu ekoki kozala naino molili kati na elimo na ye. Soki ozali sûr te na eyano oyo osengeli kopesa, yebisa ye ete okokenda koluka na mikanda. Soki mposa ezali, okoki kotuna na mosakoli moko oyo azali na eksperianse mingi. Kobosana te ete wana ezali yo kosalisa moto na kokolisa boyebi na ye na Biblia, ekoki kozala ete okosalisa ye abanda kotambola na nzela ya bomoi, ndenge Filipe mopalanganisi na nsango malamu asalisaki mokube Moetiopia ntango ayanolaki mituna na ye.—Misala 8:26-39.
14 Mituna misusu oyo moyekoli atuni, ntango mosusu ekoyekolama na mikapo mizali liboso. Soki ezali bongo, ntina ya koyanola yango sikasikawa ezali te. Epai mosusu, mpo na kosalisa moto ete akola, ebongi malamu kolakisa ye ndenge nini akoki kozwa biyano na mituna na ye na kolukaka ye moko kati na mikanda. Okoki kolakisa ye ndenge akoki kosalela index ya mikanda ya la Société to kotinda ye ete atanga mokapo boye to mokapo boye kati na mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis. Na nsima okoki kotuna ye soki amonaki eyano mpe soki akangi ntina na yango. Soki ozali komibanzabanza mpo na kokola ya elimo ya moto yango, okolakisa ye ndenge akoki koluka biyano ye moko, na esika ete yo oyanola nyonso.
15-18. Ezaleli nini tosengeli kozala na yango ntango bakonzi ya Leta bazali kotuna biso mituna?
15 Na miso ya bakonzi. Na ntina na monyokoli, ntoma Petelo alobaki: “Bobulisa Klisto lokola Nkolo kati na mitema na bino; boselingwaka mikolo nyonso mpo na kozongisa monoko na moto na moto oyo akotuna bino mpo na ntina na elikya ezali kati na bino. Kasi bozongisa monoko yango na bopolo mpe na limemya.” (1 Pet. 3:14-16) Ekoki kozala ete tozwi konvokasio mpo na kosamba na tribinale to na miso ya mokonzi mosusu ya Leta oyo azali na lotomo ya kotuna biso na ntina na bindimeli na biso. Kobosana te toli oyo ya ntoma Petelo: “Bobulisa Klisto lokola Nkolo kati na mitema na bino.” Na yango, na nse ya motema, zala na limemya mozindo mpo na Nkolo Yesu Klisto mpe ndima etelemelo na ye ya bulee oyo esengeli kobebisama te. Kosalaka bongo, ntina ya komitungisa ezali te, mpamba te soki tozali kosepelisa Ye oyo Nzambe aponi ye lokola Mokonzi na mokili mobimba, tokoki kobanga bato minene ya mokili te.
16 Nzokande, na boyokani na toli epesami kati na Baloma 13:1-7, zala na limemya epai na mikonzi na Leta. Ata soki moto oyo azali kotuna yo azali na ntembe mpo na maloba na yo to azali kotiola ba Témoins de Jéhovah, kozongisela ye maloba makasi te. (Baloma 12:17, 21; 1 Pet. 2:21-23) Kobosana te ete ozali wana mpo na kopesa litatoli. Ntango mosusu motema ya mokonzi wana ekosimbama na biyano na yo. Na nsima akoki kozala ata na etaleli malamu mpo na mosala na biso ya kosakola. Tika ete etamboli na yo mpe elobeli na yo ebatela malamu nzela ya solo! —Mat. 10:18-20.
17 Mbala mosusu, ntina ya kolobaloba ezali te. Okomekola bongo ntoma Paulo mpe okotikela bayini na yo mokumba ya kopesa bilembeteli na makambo oyo bazali kofunda yo na yango. (Misala 24:10-13) Mituna misusu ntina ya koyanola yango ezali te. Ebongi kosala boye soki omoni ete bazali kotiola yo to bazali koluka kozwa yo na motambo, kasi bazali mpenza na mposa ya koyeba solo te. (Luka 23:8, 9) Okokanga mpe monoko na yo soko bato oyo bazali kotuna yo bazali koluka ete obimisela bango basekele oyo ekoki kosala mabe epai na bandeko na yo baklisto. Mokomi na nzembo Davidi akomaka: “Nakobatela monoko na ngai na ekangeli na ntango wana bato mabe bazali liboso na ngai.” (Nz. 39:1, 2) Mingimingi na mikili epai kuna mosala ya baklisto epekisami, tosengeli koyeba ete ezali na ‘ntango mpo na koloba’ mpe ‘ntango mpo na kozala nyee’.—Mosakoli 3:7.
18 Na ntina na basaleli ya Jéhovah mpe na makoki na bango mpo na koyanola na mituna, zulunalo moko na Angleterre elobaki boye: “Misala nyonso Batemwe basalaka ezali oyo esimbami na Biblia. Moboko na mateya na bango nyonso ezali Biblia, oyo bandimaka ete ezali nyonso solo. Mpe yango elimboli sekele ya mibale ya makasi na bango: Bayebi koyanola na mituna nyonso.” Ya solo, Liloba na Nzambe mpe elikya totii kati na yango ezali kopesa biso nzela na koyanola na mituna mingi oyo mizali kotungisa bato. Nyonso wana ezali se lokumu ya Nzambe. Kasi soki toluki kobongisa biyano na biso, tokosanzola Jéhovah koleka, tokobakisa esengo na biso moko mpe tokosalisa bazalani na biso ete bamona nzela ya kozala na kimya elongo na Nzambe.