Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/09 lok. 1
  • Okoyanola ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoyanola ndenge nini?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki kopesa biyano malamu
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Yebá kopesa biyano
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Tómekola Moteyi Monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Kosalela malamu mituna
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 9/09 lok. 1

Okoyanola ndenge nini?

1. Mpo na nini tosengeli komekola ndakisa ya Yesu soki batuni biso motuna?

1 Tii lelo oyo, bato bakamwaka ndenge oyo Yesu azalaki kopesa biyano ya malamu na mituna oyo bazalaki kotuna ye. Ntango batuni biso motuna ata ya ndenge nini na mosala ya kosakola, ebongi tómekolaka Yesu.​—1 Pe. 2:21.

2. Nini ekoki kosalisa biso tópesa eyano ya malamu na motuna oyo batuni biso?

2 Yokáká liboso: Yesu azalaki naino koluka koyeba mpo na nini moto atuni motuna. Ntango mosusu, esɛngaka kotuna moto yango mituna mpo na koyeba makanisi na ye. Moto oyo atuni ete, “Bondimaka Yesu?” akoki mbala mosusu kozala na mposa ya koyeba mpo na nini tosalaka fɛti ya Noele te. Soki oyebi ntina oyo moto atuni motuna, okoki kosalisa ye malamu.​—Luka 10:25-37.

3. Biloko nini tozali na yango mpo na kopesa biyano ya malamu na mituna oyo batunaka biso?

3 Saleláká Liloba ya Nzambe: Mbala mingi ezalaka malamu komonisa oyo Biblia elobi na motuna oyo batuni biso. (2 Tim. 3:16, 17; Ebr. 4:12) Buku Comment raisonner mpe “Masolo ya kosolola na Biblia” oyo ezali na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika esalisaka mingi mpo na kopesa eyano oyo ebongi na mituna oyo batunaka biso. Ata soki moto oyo atuni motuna andimaka Biblia te, okoki komonisa ye na mayele makambo oyo Biblia eteyaka. Lendisá moto yango azwa mpenza ntango ya kotalela bwanya ya solosolo oyo ezali na Biblia. Soki ozali komekola Yesu, biyano na yo ekozala “lokola bapɔme ya wolo na kati ya eloko ya mayemi ya palata,” elingi koloba ete ekozala biyano ya lokumu, ya kitoko mpe oyo ebongi.​—Mas. 25:11.

4. Na makambo nini ekoki kozala malamu koyanola te na motuna nyonso oyo batuni biso?

4 Osengeli koyanola na motuna nyonso? Soki oyebi te eyano oyo okopesa na motuna oyo batuni yo, koyoka nsɔni te mpo na koloba: “Nayebi te, kasi nakoluka eyano na motuna na yo mpe nakozonga mpo na kopesa yo eyano.” Komikitisa mpe komibanzabanza ya ndenge wana ekoki kotinda moto andima ete ozongela ye. Soki omoni ete motuna yango euti epai ya batɛmɛli oyo bazali koluka kobimisa ntembe, landá ndakisa ya Yesu mpe pesá ye eyano na mokuse. (Luka 20:1-8) Lisusu, soki moto azali mpenza na mposa te ya koyeba solo, kasi azali koluka bantembe ya mpambampamba, na limemya nyonso, katá lisolo ná ye mpe salelá ntango na yo mpo na koluka bato oyo bazali mposa ya koyeba solo.​—Mat. 7:6.

5. Yesu apesaki ndakisa nini na likambo etali kopesa biyano na mituna?

5 Yesu ayebaki ete kotyela Yehova motema ezali na ntina mingi mpo na kokokisa mokumba na ye ya ‘kopesa litatoli na ntina na solo,’ oyo ezalaki mpe kosɛnga kopesa biyano na mituna oyo bato bazalaki kotuna mpo bázwa mpenza biyano. (Yoa. 18:37) Tozali mpenza na libaku malamu ya komekola Yesu mpo na kopesa eyano na baoyo bazali “na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko”!​—Mis. 13:48.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto