Moto nyonso akoki kozwa liteya na kasɛti video Noé: il marchait avec Dieu
Tángá to zongelá kotánga Genese 6:1 kino 9:19. Na nsima, talá kasɛti video Noé, mpe kanisá ndenge nini okopesa biyano na mituna oyo: (1) Mokili ezalaki ndenge nini na mikolo ya Noa, mpe nini esalaki ete mokili ekóma ndenge wana? (2) Noa akesanaki na bato ya ntango na ye na nini, mosala nini Nzambe apesaki ye, mpe mpo na nini? (3) Ekoki kozala ete batongaki masuwa yango na esika nini, mosala yango ezwaki ntango boni, mpe masuwa yango ezalaki na bonene ya ndenge nini? (4) Longola mosala ya kotonga masuwa, likambo nini mosusu Noa na libota na ye basengelaki kosala? (5) Na makanisi na yo, makambo ezalaki ndenge nini na kati ya masuwa ntango porte na yango ekangamaki? (6) Olingaki koyoka ndenge nini soki obikaki na Mpela yango? (7) Na bantango mosusu, eloko nini tomonaka oyo ekundwelaka biso Mpela, mpe yango elimboli nini? (8) Lisolo ya Biblia oyo elobeli Noa eteyi yo moko nini, eteyi libota libota na yo nini, mpe eteyi biso nini mpo na mosala oyo Nzambe apesi biso? (9) Mituna nini okosepela kotuna Noa na libota na ye ntango okokutana na bango na Paladiso? (10) Sikoyo, ndenge nini ozali kokana kosalela kasɛti video Noé?