Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 13
  • Abrahama, moninga ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Abrahama, moninga ya Nzambe
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Abrahama ná Sara batosaki Nzambe
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Abrahama azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ozali na Kondima lokola oyo ya Abalayama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 13

Lisolo 13

Abrahama, moninga ya Nzambe

MOKO ya bisika oyo bato bakendeki kofanda nsima ya Mpela babengaki yango Ure. Esika yango ekómaki mboka monene, na bandako ya kitoko. Kasi bato ya mboka yango bazalaki kosambela banzambe ya lokuta, kaka ndenge ezalaki kosalema na Babele. Bato ya Ure bazalaki te lokola Noa ná mwana na ye Seme, oyo bazalaki kosambela Yehova.

Nsukansuka Noa, moto ya sembo, akufaki mbula soki nkama misato na ntuku mitano (350) nsima ya mpela. Ezalaki mbula mibale liboso ya kobotama ya moto oyo bozali komona na elilingi oyo. Nzambe asepelaki na moto yango mingi. Nkombo na ye Abrahama. Ye ná libota na ye bazalaki kofanda na engumba Ure.

Mokolo moko Yehova alobi na Abrahama ete: ‘Longwá na Ure elongo na bandeko na yo mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.’ Abrahama asalaki nini? Atosaki? Ɛɛ, akendeki mpe atikaki biloko kitoko ya mboka wana. Abrahama azalaki ntango nyonso kotosa Nzambe; yango wana akómaki moninga ya Nzambe.

Bato mosusu ya libota na ye balongwaki na Ure mpe bakendeki elongo na ye. Tata na ye Tera; Lota, mwana ya ndeko na ye, ata mpe Sara mwasi na ye, bakendeki na ye. Nsima ya mobembo molai, bakómi na esika babengi Harane. Tera akufaki wana. Ure etikalaki mosika.

Nsima ya mikolo, Abrahama ná libota na ye balongwe na Harane, bakómi na mokili ya Kanana. Kuna Yehova alobi na ye ete: ‘Talá mokili nakopesa bana na yo.’ Abrahama afandaki na Kanana; na mokili yango azalaki kofanda na bahema.

Nzambe apambolaki Abrahama mpe akómaki na bampate, bangɔmbɛ, ná bibwɛlɛ mosusu ebele; azalaki mpe na basali mingi. Kasi ye na mwasi na ye Sara bazalaki kobota te.

Ntango Abrahama akómi na mbula ntuku libwa na libwa (99), Yehova apesaki ye elaka oyo: ‘Okokóma tata ya mabota mingi.’ Lokola Abrahama ná mwasi na ye bakómaki mibange mpe bazalaki na likoki ya kobota lisusu te, ndenge nini elaka yango ekokokisama?

Ebandeli 11:27-32; 12:1-7; 17:1-8, 15-17; 18:9-19.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto