Mituna ya batángi
Yehova asalaki kondimana na ye na Abalayama na mboka Ulu to na mboka Halana?
Lisolo ya liboso oyo etali kondimana oyo Yehova asalaki na Abalayama ezali na Genese 12:1-3, yango elobi boye: “Yehova alobelaki Abalama ete, Longwa na mokili na yo mpe na bandeko na yo mpe na ndako na tata na yo, kokenda na mokili ekomonisa ngai yo. Nakozalisa yo libota monene . . . mpe mpo na yo mabota nyonso na nse [bakomipambola, NW].”a Ekoki kozala ete Yehova asalaki kondimana na ye wana na Abalayama na ntango oyo Abalayama azalaki na mboka Ulu mpe azongelaki yango lisusu na ntango oyo Abalayama akómaki kofanda na mboka Halana.
Na ekeke ya liboso, Setefano alobelaki etinda oyo Abalayama azwaki epai ya Yehova ya kokende na Kanana. Na lisukulu oyo asalaki na Sanedrina, Setefano alobaki boye: “Nzambe na nkembo amonanaki na tata na biso Abalayama, wana ezalaki ye na Mesopotamia, naino efandi ye na Halana te. Alobi na ye ete: Longwa na yo na mokili na yo mpe na biboto na yo, mpe kendá kuna na mokili oyo nakotalisa yo.” (Misala 7:2, 3) Abalayama azalaki moto ya mboka Ulu, mpe kaka ndenge Setefano amonisaki, ezalaki kuna nde azwaki etinda mpo na mbala ya liboso ya kokende na Kanana. (Genese 15:7; Nehemia 9:7) Setefano alobelaki te kondimana oyo Nzambe asalaki na Abalayama, kasi na Genese 12:1-3, kondimana yango ekanganaki na etinda ya kokende na Kanana. Yango wana, ebongi mpenza tóndima ete Yehova asalaki kondimana elongo na Abalayama na mboka Ulu.
Nzokande, soki otángi na likebi mpenza lisolo oyo ezali na Genese, okomona ete Yehova azongelaki lisusu kondimana na ye epai ya Abalayama na mboka Halana; kaka ndenge azongelaki yango mpe abakisaki makambo mosusu oyo etali kondimana yango mwa mbala mingi na Kanana. (Genese 15:5; 17:1-5; 18:18; 22:16-18) Na kotalela Genese 11:31, 32, Tela, tata ya Abalayama, alongwaki na Ulu mpo na kokende na Kanana elongo na Abalayama, Sala mpe Lota. Bakómaki na mboka Halana mpe bafandaki kuna tii na liwa ya Tela. Ebele ya bozwi oyo azwaki emonisi ete Abalayama afandaki ntango molai mpenza na mboka Halana. (Genese 12:5) Na eleko moko, Nahola, ndeko mobali ya Abalayama, akendeki mpe kofanda kuna na Halana.
Nsima ya kolobela liwa ya Tela, Biblia eyebisi maloba oyo Yehova alobaki na Abalayama mpe ekobi boye: “Bongo Abalama alongwaki lokola elobelaki Yehova ye.” (Genese 12:4) Na yango, Genese 11:31–12:4 ezali komonisa na makasi lokola nde Yehova alobaki maloba oyo ezwami na Genese 12:1-3 nsima ya liwa ya Tela. Soki ezali bongo, boye Abalayama alongwaki na mboka Halana mpe akendaki na mboka oyo Yehova alakisaki ye mpo na kotosa etinda oyo autaki kozwa, mpe lisusu mpo na kotosa etinda oyo azwaká kala na mboka Ulu.
Na kotalela Genese 12:1, Yehova apesaki Abalayama etinda oyo: “Longwa na mokili na yo mpe na bandeko na yo mpe na ndako na tata na yo.” Na eleko moko, “mokili” ya Abalayama ezalaki bongo Ulu, mpe “ndako” ya tata na ye ezalaki kuna na mokili yango. Kasi tata ya Abalayama na libota na ye mobimba balongwaki kuna mpo na kokende kofanda na Halana, mpe Abalayama azalaki kobenga esika yango mokili na ye. Nsima ya kofanda bambula mingi na Kanana, ntango atindaki mosaleli na ye ete akenda na ‘mboka na ye mpe na libota na ye’ mpo na kolukela Yisaka mwasi, mosaleli yango akendeki na “engumba ya Nahola” (ekoki kozala Halana to esika mosusu oyo ezalaki zingazinga na Halana). (Genese 24:4, 10) Kuna mosaleli aponaki Lebeka kati ya bandeko ya Abalayama, na libota ya Nahola oyo ezalaki monene.—Genese 22:20-24; 24:15, 24, 29; 27:42, 43.
Na kati ya lisukulu oyo asalaki liboso ya Sanedrina, Setefano alobaki na ntina na Abalayama ete: “Aumeli wana kino kufa na tata na ye. Na nsima Nzambe alongolaki ye wana, mpe akɔtisi ye na mokili oyo efandi bino na yango sasaipi.” (Misala 7:4) Maloba wana elakisi polele ete Yehova na Abalayama basololaki na Halana. Esengeli mpenza kondima ete na libaku wana, Yehova azongelaki kondimana na ye elongo na Abalayama, ndenge yango elobelami na Genese 12:1-3, mpamba te kondimana yango ebandaki mosala na yango na ntango Abalayama akómaki kofanda na Kanana. Na yango, makambo nyonso oyo totaleli ememi biso na koloba ete mbala mosusu Yehova asalaki kondimana na ye na Abalayama na mboka Ulu mpe azongelaki yango lisusu na mboka Halana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezali na Kanana, ntango Abalayama azalaki na mibu 99, nde Yehova abongolaki nkombo Abalama mpe akómisaki yango Abalayama.—Genese 17:1, 5.