Abrahama azalaki nani?
BATO oyo batiká nsango na makambo ya losambo bazali mingi te. Kasi Abrahamaa azali moto oyo ezala Bayuda, Bamizilma to bakristo bamemyaka mingi, batalelaka ye lokola “moto ya ntina mingi” mpe “ndakisa monene ya kondima.” Biblia ebengaka ye “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima.”—Baroma 4:11.
Mpo na nini bato bamemyaka Abrahama mingi ndenge wana? Moko ya bantina ezali ete Abrahama azali moto kaka moko oyo Biblia ebengi moninga ya Nzambe.—Yisaya 41:8; Yakobo 2:23.
Nzokande, na makambo mosusu, Abrahama azalaki kaka moto lokola biso. Akutanaki na mikakatano mingi oyo biso mpe tokutanaka na yango, mpe alongaki yango. Okolinga koyeba ndenge asalaki mpo na kolonga yango? Tótalela oyo Biblia elobi mpo na moto yango.
Esika akolaki
Abrahama abotamaki na mobu 2018 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) mpe akolaki na Ure. (Ebandeli 11:27-31) Ure ezalaki engumba moko monene mpe ya bozwi. Etondaki mpe na losambo ya bikeko. Ekoki kozala ete Tera, tata ya Abrahama azalaki na kati ya bato oyo bazalaki kosambela bikeko ndenge na ndenge. (Yosua 24:2) Kasi, Abrahama aponaki kosambela kaka Yehovab, na esika ya kosambela bikeko ya banzambe mosusu.
Nini etindaki Abrahama azwa ekateli wana? Abrahama abotamaki mbula 150 liboso Seme, mwana ya Noa, akufa. Soki azalaki kolekisa ntango mingi ná Seme, oyo azalaki mokóló mpenza, yango esalisaki ye na nini? Ekoki kozala ete Seme abɛtelaki ye lisolo ndenge babikaki na Mpela monene. Ekoki mpe kozala ete yango nde eteyaki ye ntina ya kosambela Yehova, Nzambe oyo abatelaki Seme mpe libota na ye na Mpela.
Ezala ayokaki makambo yango epai ya Seme to na nzela mosusu, Abrahama andimaki na motema moko makambo oyo bateyaki ye na ntina na Nzambe ya solo. Ntango Yehova, “moto oyo atalaka mitema malamumalamu,” atalaki Abrahama, amonaki eloko moko ya malamu epai na ye, mpe asalaki ete Abrahama akóma moto ya malamu mpenza.—Masese 17:3; 2 Ntango 16:9.
Bomoi na ye
Abrahama alekisaki bomoi moko ya malamu mpe ya ntina mpenza, atako mbala mingi azalaki kokutana na mikakatano. Tótalela kaka mwa makambo mosusu oyo akutanaki na yango.
▪ Ntango Abrahama azalaki kofanda na Ure, Nzambe asɛngaki ye alongwa na engumba yango epai abotamaki, mpe akende epai akolakisa ye. Atako Abrahama ná Sara bayebaki makambo nyonso te, mpo na esika oyo basengelaki kokende to mpo na nini Nzambe asɛngaki bango bálongwa na Ure, batosaki. Nsukansuka, Abrahama ná Sara bakómaki kofanda na bahema na mokili ya Kanana lokola bapaya bomoi na bango mobimba.—Misala 7:2, 3; Baebre 11:8, 9, 13.
▪ Atako Abrahama ná Sara babotaki naino te, Yehova alakaki ete akobimisa ekólo moko monene na nzela ya Abrahama. Yehova abakisaki ete mabota nyonso ya mabele ekopambolama na nzela ya Abrahama. (Ebandeli 11:30; 12:1-3) Na nsima, Yehova amonisaki ete akokokisa elaka yango. Ayebisaki Abrahama ete bana na ye bakokóma ebele mpenza, lokola minzoto na likoló.—Ebandeli 15:5, 6.
▪ Ntango Abrahama akómaki na mbula 99 mpe Sara mbula soki 90, Yehova alakaki bango ete bakobota mwana. Mpo na biso bato, likambo ya ndenge wana ekokaki kosalema te, kasi eumelaki te, Abrahama ná Sara bamonaki ete mpo na Yehova, ezali ata ‘na likambo moko te ya mpasi koleka.’ (Ebandeli 18:14) Mbula moko na nsima, ntango Abrahama akómaki na mbula 100, mwasi na ye abotelaki ye mwana mobali, oyo bapesaki ye nkombo Yisaka. (Ebandeli 17:21; 21:1-5) Nzambe amonisaki polele ete bato bakozwa mapamboli mingi na nzela ya Yisaka.
▪ Bambula mingi na nsima, Yehova asɛngaki Abrahama likambo moko ya mpasi mpenza: Asɛngaki ye apesa Yisaka mbeka, mwana kaka moko oyo azalaki kolinga mingi, atako mwana yango abalaki te mpe azalaki na bana te.c Atako Abrahama ayebaki ete liwa ya mwana na ye ekokaki kopesa ye mpasi na motema, atosaki mpe alingaki kopesa Yisaka mbeka. Abrahama azalaki na elikya makasi ete Nzambe azali na nguya ya kosekwisa Yisaka, soki esengeli, mpo na kokokisa bilaka na ye. (Baebre 11:19) Ntango Abrahama alingaki koboma mwana na ye Yisaka, Nzambe apekisaki ye. Akumisaki Abrahama mpo na botosi monene oyo amonisaki. Na nsima, Yehova azongelaki lisusu bilaka oyo apesaki Abrahama liboso.—Ebandeli 22:1-18.
▪ Ntango Abrahama akufaki azalaki na mbula 175. Biblia elobi ete “akufaki nsima ya kozala na bomoi moko ya malamu mpe ya molai,” mpe ebakisi ete “anuni, atondi na mikolo.” (Ebandeli 25:7, 8) Na yango, Abrahama amonaki kokokisama ya elaka mosusu ya Nzambe, oyo elobaki ete akozala na bomoi molai liboso akufa.—Ebandeli 15:15.
Ndakisa oyo atikelá biso
Abrahama azali kaka te moto moko oyo azalaki kobanga Nzambe, oyo azalaki na bomoi kala mpenza. Ndakisa ya Abrahama ezali mpenza na ntina mpo na biso lelo oyo. (Baebre 11:8-10, 17-19) Tótalela bizaleli minei ya malamu oyo Abrahama amonisaki. Tokotalela liboso ezaleli na ye oyo ntango mosusu eyebani mingi koleka: kondima.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liboso, nkombo ya Abrahama ezalaki Abrama mpe oyo ya mwasi na ye ezalaki Sarai. Na nsima, Nzambe alongolaki nkombo Abrama mpe apesaki ye nkombo Abrahama, oyo elimboli “Tata ya bana ebele,” mpe alongolaki nkombo Sarai mpe apesaki ye nkombo Sara, oyo elimboli “mokonzi-mwasi.” (Ebandeli 17:5, 15) Na lisolo oyo mpe na masolo oyo ekolanda, tokobenga bango Abrahama mpe Sara.
b Yehova ezali nkombo ya Nzambe ndenge emonisami na Biblia.
c Talá lisolo “Mituna ya batángi: Mpo na nini Nzambe asɛngaki Abrahama apesa mwana na ye mbeka?” na lokasa 23 ya nimero oyo.
[Etanda na lokasa 4]
Moto moko ya ntina mingi na Biblia
Na Biblia, mikapo zomi ya liboso ya mokanda ya Ebandeli elobeli masolo ya bomoi ya ebele ya mibali ya kondima lokola Abele, Enoka mpe Noa. Kasi, na mikapo 15 oyo elandi, elobeli mingi bomoi ya mobali moko: Abrahama.
Lisusu, ezali na maloba mosusu ya ntina mingi oyo Biblia esaleli mpo na mbala ya liboso kaka epai ya Abrahama. Na ndakisa, na lisolo ya bomoi ya Abrahama, . . .
▪ mpo na mbala ya liboso, Biblia elobi ete Nzambe azali nguba to Mobateli, ya basaleli na ye.—Ebandeli 15:1; talá Kolimbola Mibeko 33:29; Nzembo 115:9; Masese 30:5.
▪ mpo na mbala ya liboso esaleli maloba kondimela Nzambe.—Ebandeli 15:6.
▪ mpo na mbala ya liboso esaleli liloba mosakoli.—Ebandeli 20:7.
▪ mpo na mbala ya liboso elobeli bolingo oyo moboti azalaka na yango mpo na mwana na ye.—Ebandeli 22:2.