Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 12 lok. 34-lok. 35 par. 5
  • Yakobo azwaki libula

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yakobo azwaki libula
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mapasa oyo bakeseni
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Zwáká bikateli ya malamu mpo na kobatela libula na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Yakobo ná Esau bayokani
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 12 lok. 34-lok. 35 par. 5
Yakobo apesi Esau saani ya supu mpe azwi lotomo na ye ya mwana ya liboso

LITEYA 12

Yakobo azwaki libula

Yisaya ná Rebeka mpe bana na bango ya mapasa, Yakobo ná Esau

Yisaka azalaki na mbula 40 ntango abalaki Rebeka. Alingaki ye mingi. Na nsima, babotaki mapasa ya mibali.

Ya liboso nkombo na ye ezalaki Esau, mpe oyo ya mibale Yakobo. Esau azalaki kolinga kotambola libándá, mpe azalaki mobomi-nyama. Kasi Yakobo azalaki kolinga kofanda na ndako.

Na ntango wana, mwana ya liboso azalaki kozwa mabele mpe mbongo ya libota soki tata akufi. Bazalaki kobenga biloko yango libula. Na libota ya Yisaka, longola makambo wana, lokumu ya kozwa mokumba na kokokisama ya bilaka oyo Yehova apesaki Abrahama ezalaki mpe libula. Esau azalaki mpenza kokipe bilaka yango te, kasi Yakobo ayebaki ete ezali na ntina mingi.

Yakobo ná Esau

Mokolo moko Esau azongaki ndako azalaki ya kolɛmba makasi mpo alekisaki mokolo mobimba na koluka banyama. Ayokaki nsolo ya biloko kitoko oyo Yakobo azalaki kolamba, mpe alobaki: ‘Nazali na nzala makasi! Pesá ngai mwa ndambo ya supu ya motane wana!’ Yakobo alobaki: ‘Nakopesa yo, kasi liboso pesá ngai elaka ete nakoki kozwa libula na yo.’ Esau alobaki: ‘Nazali na ntina ya libula te! Zwá na yo. Nalingi nde kolya.’ Okanisi ete likambo oyo Esau asalaki ezalaki ya mayele? Te. Esau akabaki eloko ya ntina mingi kaka mpo na mwa saani ya supu ya lantiye.

Ntango Yisaka akómaki mobange, ekómaki ntango ya kopesa mwana na ye ya liboso lipamboli. Kasi Rebeka asalisaki Yakobo, leki ya Esau, azwa lipamboli yango. Ntango Esau ayebaki likambo yango, ayokaki nkanda makasi mpe akanaki koboma lipasa na ye. Yisaka ná Rebeka balingaki kobatela Yakobo, yango wana bayebisaki ye: ‘Kende kofanda epai ya Labana, ndeko ya mama na yo, tii nkanda ya Esau ekokita.’ Yakobo ayokaki toli ya baboti na ye mpe akimaki mpo na kobatela bomoi na ye.

“Litomba nini moto akozala na yango soki azwi mokili mobimba kasi abungisi bomoi na ye? To eloko nini mpenza moto akoki kopesa na esika ya bomoi na ye?”​—Marko 8:36, 37

Mituna: Esau azalaki moto ya ndenge nini? Yakobo azalaki moto ya ndenge nini? Mpo na nini Yakobo azwaki lipamboli na esika ya Esau?

Ebandeli 25:20-34; 27:1–28:5; Baebre 12:16, 17

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto