Mituna ya batángi
Ezalaki mabe ndenge Yakobo akosaki ete ye nde Esau, ndenge emonisami na Genese 27:18, 19?
Ekoki kozala ete oyebi lisolo yango malamu. Ntango Yisaka akómaki mobange, alobaki na Esau ete abomela ye nyama mpo ‘alya, na ntina ete apambola ye liboso ya kufa na ye.’ Ntango Lebeka ayokaki oyo mobali na ye alobaki, alambaki elubu moko ya kitoko mpe alobaki na Yakobo ete: “Okoya na [biloko] yango epai ya tata na yo ete alya na ntina ete apambola yo naino ye akufi te.” Na nsima, Yakobo alataki bilamba ya Esau, atyaki mposo ya mwana ya ntaba na kingo mpe na mabɔkɔ na ye mpe amemelaki tata na ye elubu yango. Ntango Yisaka atunaki ye ete, “Ozali nani mwana na ngai?” Yakobo ayanolaki ete: “Nazali Esau, mwana na yo ya nkulutu.” Yisaka andimaki oyo Yakobo alobaki mpe apambolaki ye.—Genese 27:1-29.
Atako Biblia emonisi ete likambo yango esalemaki na mbalakaka, eyebisi te ntina oyo Lebeka ná Yakobo basalaki bongo. Tósimba ete Liloba ya Nzambe elobi te ete basalaki malamu to mabe, yango wana, tokoki koloba te ete basalelaki lokuta to mayele mabe. Kasi, Biblia eyebisi makambo oyo ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya likambo yango.
Ya liboso, lisolo yango emonisi polele ete Yakobo nde abongaki kozwa lipamboli epai ya tata na ye, kasi Esau te. Bambula liboso, Yakobo asombaki esika ya mwana ya liboso epai ya lipasa na ye, oyo amonaki yango mpamba mpe atɛkaki yango kaka mpo azwa bilei, mpo na kosilisa nzala na ye. Esau “atyolaki bokonzi na ye ya nkulutu [to mwana ya liboso].” (Genese 25:29-34) Na yango, ntango Yakobo akendaki koluka lipamboli epai ya tata na ye, azalaki koluka eloko oyo ezalaki mpenza ya ye.
Ya mibale, ntango Yisaka ayebaki ete apambolaki nde Yakobo na esika ya Esau, alukaki te kobongola lisusu oyo asilaki kosala. Ntango mosusu amikundolaki oyo Yehova ayebisaki Lebeka liboso mapasa yango bábotama: “Oyo ya liboso akosalela oyo ya nsima.” (Genese 25:23) Tóbosana mpe te ete ntango Yakobo alingaki kokende na Halana, Yisaka apambolaki ye lisusu ndenge asalaki liboso.—Genese 28:1-4.
Likambo ya nsuka, tosengeli koyeba ete Yehova ayebaki mpe azalaki kolanda na likebi ndenge likambo yango ezalaki kosalema. Lipamboli oyo Yisaka apesaki ezalaki na boyokani na elaka oyo Nzambe apesaki Abalayama. (Genese 12:2, 3) Soki Nzambe alingaka te ete Yakobo azwa lipamboli yango, akokaki kopekisa yango na lolenge moko to mosusu. Na esika apekisa, Yehova amonisaki nde ete andimi likambo yango ntango alobaki na Yakobo ete: “Mabota nyonso na mokili bakopambolama [na nzela ya, NW] . . . libota na yo.”—Genese 28:10-15.