Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 27
  • Bayisraele bakómi baombo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bayisraele bakómi baombo
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Moize aponaki kosambela Yehova
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Bakatisi Mbu Motane
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Jéhovah azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Malɔzi motoba oyo elandaki
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 27

Lisolo 27

Bayisraele bakómi baombo

NA ELILINGI oyo bozali komona ndenge bazali kosalisa bato mosala na makasi. Talá kutu moto moko azali kobɛta moko ya basali yango fimbo. Baoyo bazali kosala mosala bazali bato ya libota ya Yakobo, Bayisraele. Kasi baoyo bazali kosalisa Bayisraele mosala na makasi ezali Baezipito. Bayisraele bakómi baombo ya Baezipito. Yango ebandaki boni?

Libota monene ya Yakobo efandaki na kimya na Ezipito bambula mingi. Yozefe, oyo azalaki moto monene koleka bato nyonso nsima ya mokonzi Farao, azalaki kobatela bato na ye. Kasi Yozefe akufi. Na nsima, Farao mosusu, oyo alingaki Bayisraele te, akómaki mokonzi ya Ezipito.

Mokonzi mabe yango akómisaki Bayisraele baombo. Aponeli bango bakapita ya mabe. Basalisi Bayisraele misala makasi ya kotonga bamboka ya Farao. Kasi atako minyoko ezalaki, Bayisraele bazalaki se kokóma ebele. Nsima ya mwa ntango, Baezipito bakómaki kobanga Bayisraele mpo bakómaki ebele mpe makasi mingi.

Bongo Farao asalaki nini? Ayebisaki basi oyo bazalaki kosalisa basi ya Yisraele na kobota makambo oyo bakosala, mpe alobaki ete: ‘Bosengeli koboma bana mibali nyonso.’ Kasi basi yango bazalaki basi malamu mpe babomaki bana yango te.

Yango wana Farao apesaki bato na ye nyonso etinda oyo: ‘Bosengeli koboma bana mibali nyonso oyo Bayisraele bakobota, kasi bótika bana basi na bomoi.’ Mobeko yango ezalaki mabe mpenza! Tótala ndenge nini mwana mobali moko boye abikaki.

Kobima 1:6-22.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto